Mituna oyo bilenge batunaka—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya solosolo?
Yehova akelá bato na likoki ya kosolola mpe kosala boninga. (Mas. 17:17; 18:1, 24) Mpo na kozwa matomba na boyokani yango, tosengeli kopona malamumalamu baninga na biso. (Mas. 13:20) Nsima ya kotala video Les jeunes s’interrogent—Comment se faire de vrais amis ? (Mituna oyo bilenge batunaka—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya solosolo?), okoki koyanola na mituna oyo elandi?
Maloba ya ebandeli:
(1) Moninga ya solosolo ezali nani?
Makambo oyo ebebisaka boninga:
(2) Ndenge nini okoki kosala soki basusu balingi ozala moninga na bango te? (Filp. 2:4) (3) Mpo na nini osengeli kondima kobongisa bomoto na yo, mpe nani akoki kosalisa yo osala yango? (2 Ko. 13:11) (4) Ndenge nini tokoki kosala mpo tókóma na baninga ebele?—2 Ko. 6:13.
Boninga na Nzambe:
(5) Ndenge nini tokoki kokóma moninga ya Nzambe, mpe mpo na nini tosengeli kosala milende mpo na yango? (Nz. 34:8) (6) Soki tokómisi Yehova moninga na biso ya motema, matomba nini tokozwa na boninga na biso ná basusu?
Baninga mabe:
(7) Banani bazali baninga mabe? (1 Ko. 15:33) (8) Na ndenge nini baninga mabe bakoki kobebisa boninga na biso na Yehova?
Drame ya mikolo na biso:
(9) Lisolo ya Dina eteyi biso nini? (Eba. 34:1, 2, 7, 19) (10) Ndenge nini Tara alukaki komilongisa na ndenge azalaki na baninga oyo bazali Batatoli te? (11) Baninga na ye ya kelasi batyaki ye na makama nini? (12) Mpo na nini baboti ya Tara bamonaki te likama oyo ezalaki koyela ye, kasi ndenge nini basalaki mpo na kosalisa ye na elimo? (13) Ndenge nini ndeko mwasi moko mobongisi-nzela amonisaki ete azali moninga ya solosolo ya Tara? (14) Ndenge nini Tara ayaki kokóma na makanisi ya malamu?
Mpo na kosukisa:
(15) Mateya nini ozwi na video oyo? (16) Ndenge nini okoki kosalela video yango mpo na kosalisa bato mosusu?
Tiká ete tóponaka baninga oyo bakosalisa biso tóbatela boninga oyo eleki boninga nyonso, elingi koloba boninga na biso na Nzambe!—Nz. 15:1, 4; Yis. 41:8.