Matomba ya kozala na teritware na yo moko
1. Teritware na yo moko ezali nini?
1 Teritware na yo moko ezali nini? Ezali teritware oyo yo moko osɛngi na kati ya bateritware oyo lisangá na bino ezalaka na yango; ekoki kozala pene na esika ofandaka. Buku Tobongisami, lokasa 103, elobi boye: “Kozala na teritware na yo moko pene na esika ofandaka ekosalisa yo osalela malamu mpenza ntango oyo okoki kolekisaka na mosala ya kosakola. Lisusu, okoki koyokana na mosakoli mosusu ete bósakola na teritware na yo.”
2. Ndenge nini tokoki kosakola elongo na bandeko mosusu atako tozali na teritware ya biso moko?
2 Kosakola elongo na bandeko mosusu: Soki ozwi teritware na yo moko pene na esika na yo ya mosala, okoki kosakola na ngonga ya bopemi to liboso ozonga ndako. Ntango mosusu okoki kosakola elongo na ndeko moko oyo esika na ye ya mosala ezali pene wana. Soki ozwi teritware na yo moko pene na ndako na yo, ekozala mpasi te osakolaka kuna na mpokwa elongo na libota na yo. Soki okei na likita mpo na mosala ya kosakola te, ekozala malamu osɛnga litambwisi ya Yehova na libondeli liboso ya kobanda kosakola. (Flp. 4:6) Lisusu, osengeli kozala na bokatikati; atako osengeli kosakola na teritware na yo moko, osengeli mpe kosakola elongo na bandeko mosusu na kolanda bibongiseli oyo lisangá ezwi. Mingimingi na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo wana basakoli mingi bakutanaka mpo na kobima na mosala ya kosakola, ekozala mpenza malamu osakola elongo na bandeko ya etuluku na bino ya mosala ya kosakola.
3. Wapi matomba ya kozala na teritware na yo moko?
3 Matomba: Soki ozali na teritware na yo moko, okosakola kuna ntango nyonso olingi. Lokola okolekisa ngonga mingi te na kotambola, okozala na ngonga mingi ya kosakola. Yango epesaka bandeko mosusu likoki ya kokóma babongisi-nzela basungi to babongisi-nzela ya sanza na sanza. Lisusu, lokola bato oyo bakosepela bakozala pene na esika ofandaka, ekozala mpasi te ozongela bango mpe oyekola na bango Biblia. Basakoli mingi bamonaka ete kosakola na teritware na bango moko esalisaka bango bámesana na bato mpe básala na bango boninga; mingimingi soki basakoli na teritware yango mbala na mbala liboso bápesa yango na ndeko mosusu oyo asɛngi yango. Okanisi ete kosakola na teritware na yo moko ekosalisa yo mpe libota na yo bókokisa malamumalamu mosala na bino?—2 Tim. 4:5.