Ndenge ya kosakola na bisika ya mombongo
1. Matomba nini ezalaka na kosakola na bisika ya mombongo?
1 Olingi kosakola na teritware oyo bayambaka bato ntango nyonso mpe oyo bato bazangaka mpenza te? Okoki kosakola na bisika ya ndenge wana ata na teritware ya lisangá na bino. Ndenge nini? Soki ozali kosakola na bisika ya mombongo oyo ezali na teritware na bino. Mbala mingi, basakoli oyo basakolaka na bamagazini bazwaka matomba mingi.
2. Ndenge nini tokoki kobongisa mosala ya kosakola na bisika ya mombongo?
2 Masangá mosusu ezali na bawenze mpe bamagazini na teritware na bango. Ndeko oyo atalelaka bateritware akobongisa bakarte ya teritware oyo ezali kaka na bawenze to bamagazini yango. Akokoma polele na bakalati ya teritware yango ete basakoli basengeli te kosala yango nzela moko na bandako ya bato. Na bateritware mosusu, basakoli bakoki kotala bawenze to bamagazini nzela moko na bandako mosusu. Soki osakolá naino te na bisika ya mombongo, bandá kosakola na bamagazini ya mike.
3. Nini ekoki kosalisa biso tózwa matomba ntango tozali kopesa litatoli na bamagazini?
3 Salá lisolo ya mokuse: Ntango ozali kosakola na bamagazini, osengeli kolata malamu mpenza ndenge olataka ntango ozali kokende na makita na Ndako ya Bokonzi. Ezali mpe malamu kopona ntango oyo magazini ezali na bato mingi te. Ekozala malamu okɔta na ntango oyo kiliya ata moko te azali kozela bápesa ye biloko. Sɛngá osolola na mokóló magazini to mokonzi ya magazini yango. Salá lisolo ya mokuse mpe lobelá mbala moko likambo ya ntina. Okoki koloba nini?
4-6. Makambo nini tokoki koloba ntango tozali kopesa litatoli na moto oyo azali kobatela magazini to na mokonzi ya magazini?
4 Ntango ozali kosolola na moto oyo azali na porte to na mokóló magazini, okoki koloba boye: “Bato ya mombongo bazalaka na mosala mingi mpe ezalaka mpasi tókuta bango na bandako na bango; yango wana toyei kotala bino na esika na bino ya mosala. Bazulunalo na biso ezali kolobela na mokuse makambo oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili.” Na nsima, lobelá na mokuse likanisi moko ya ntina oyo ezali na zulunalo moko.
5 To okoki koloba na ndenge oyo ya pɛtɛɛ: “Bato mingi balingi koyeba makambo mingi etali Biblia, kasi bazali na ntango mingi te. Trakte oyo ezali kolobela programɛ ya koyekola Biblia kozanga kofuta mbongo, oyo ekosalisa yo ozwa biyano na mituna oyo omitunaka mpo na Biblia.” Na nsima lakisá ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? na lokasa 4 mpe 5.
6 Soki omoni ete mokonzi ya magazini yango azali na makambo mingi ya kosala, okoki kaka kopesa ye trakte mpe koyebisa ye boye: “Nakoleka mokolo mosusu oyo okozala na mosala mingi te. Nakosepela koyeba likanisi na yo mpo na trakte oyo.”
7. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bazali kosepela na nsango na biso na bisika ya mombongo?
7 Salisá baoyo basepeli: Okoki ata koyekola na moto Biblia na esika ya mombongo. Ndeko moko oyo azali mobongisi-nzela monene azalaki kotikela moto moko ya mombongo bazulunalo mbala na mbala. Ntango moto yango amonisaki ete asepeli na makambo oyo azali kotánga, mobongisi-nzela amonisaki ye ndenge bakoki kosalela mwa buku Azali kosɛnga mpo na koyekola Biblia. Babandaki mbala moko koyekola Biblia na esika ya mosala ya moto yango. Lokola mobongisi-nzela ayebaki ete moto yango azali na makambo mingi ya kosala, bazalaki mbala nyonso koyekola kaka miniti 10 to 15. Tiká biso mpe tólanda koluka baoyo babongi mpe tópesaka litatoli na bisika ya mombongo.