Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/13 lok. 8
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 3/13 lok. 8

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya 4

“Tozali kolendisa bato ya kartye na biso bátángaka Biblia na bango. Kasi bato mingi bamonaka ete ezali mpasi kokanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia. Yo mpe omonaka bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge balobi awa.” Lakisá ye ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/2013, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/04/2013

“Moto nyonso oyo tosololi na ye akutanaka na mikakatano. Yango etindaka bato mosusu bámituna soki bomoi ezali mpenza na ntina. Mpo na yo, likambo nini ya monene esalaka ete esengo ezala te lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elaki ete mosika te, Nzambe akolongola mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo. [Tángá Emoniseli 21:4.] Zulunalo oyo emonisi makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya mpe ndenge oyo tokoki kozala na bomoi ya esengo ata sikoyo.”

Lamuká! 04/2013

“Konyokola basi na ndako ezali likambo oyo epalangani na mokili mobimba. Bato mosusu balobaka ete mimeseno ya moto, esika akolá mpe masano ya mobulu nde etindaka bato básala bongo. Okanisi ete likambo nini ya libosoliboso etindaka bato bányokolaka basi na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi boyokani oyo esengeli kozala kati na mwasi ná mobali na ye. [Tángá Baefese 5:33.] Zulunalo oyo elobeli ndenge mabala mosusu ebongaki mpo babalani basalelaki batoli ya Biblia.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto