Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/11 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 3/11 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Marsi

“Bato bazalaka na makanisi ekeseni mpo na Yesu. Otalelaka ye lokola mwana ya Nzambe to kaka lokola moto moko ya malamu?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima bótánga elongo makambo oyo ezali na nse ya moko ya mituna oyo ekomami na moindo makasi, oyo ezali na nkasa 16-17; bótánga mpe moko ya bavɛrsɛ oyo batye wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na koyanola na motuna mosusu.

Lamuká! Marsi

Soki okutani na elenge moko, lakisá ye lisolo oyo ebandi na lokasa 26. Lakisá ye motó ya likambo moke ya liboso mpe tuná ye boye: “Mpo na yo, maloba oyo ezali solo to lokuta? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá 2 Bakorinti 7:1.] Lisolo oyo ezali kolobela makambo oyo osengeli koyeba na likambo etali komɛla likaya mpe ndenge ya kotika likaya.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aprili

“Bato mingi bazali na makanisi ekeseni mpenza na ntina na Yesu. Okanisi ete ezali na ntina koyeba solo na ntina na Yesu? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yoane 17:3.] Zulunalo oyo ezali kolimbola oyo Biblia elobi mpo na Yesu: Autaki wapi? Azalaki na bomoi ya ndenge nini? Mpe mpo na nini akufaki?”

Lamuká! Aprili

“Ondimaka ete kokufela moto oyo ozalaki kolinga ezali moko ya makambo oyo esalaka bato mpasi mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Toli oyo esalisá bato ebele. [Tángá Nzembo 55:22.] Zulunalo oyo elobeli mwa batoli oyo ekoki kosalisa biso ntango tozali na mawa makasi, ezali mpe kosalisa biso tóyeba kobwakela Nzambe mikumba na biso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto