Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Mai
“Osilá komituna mpo na nini Nzambe atiki nzela na mpasi mpe na mabe? [Tiká ye apesa eyano.] Nalingi kolakisa yo lisolo moko ya ntina mingi oyo elobeli likambo yango.” Bótánga elongo makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya moke na lokasa 16 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai mpe moko ya bavɛrsɛ oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na kotalela eyano na motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mai
Tángá Nzembo 37:10, 11. Na nsima lobá boye: “Okanisi ete mosika te tokomona ndenge elaka oyo ekokokisama? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli bisakweli motoba ya Biblia oyo ezali kokokisama lelo oyo, bisakweli oyo emonisi ete kokokisama ya elaka wana ezali lisusu mosika te.”
Lamuká! Mai
“Bato mosusu balobaka ete moto autá na makako. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Nzembo 139:14.] Ezali solo ete mokomi ya Nzembo ayebaki makambo mingi te na oyo etali ndenge ya kokamwa oyo nzoto ya moto esalaka. Zulunalo oyo elobeli makambo oyo toyebi lelo, bakisá mpe makambo oyo ekesenisaka biso na banyama.”