Manaka mpo na pɔsɔ ya 20 sanza ya 10
PƆSƆ EBANDI NA 20 SANZA YA 10
Loyembo 109 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 14 par. 16-20, etanda na lok. 147 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 7-10 (Min. 10)
No. 1: Kolimbola Mibeko 9:15-29 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ntina oyo moto ya kokoka akoki kosala lisumu—rs lok. 309, ebandi na maloba “Mpo na koyeba ete Adama . . .” tii na lok. 310 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Adoniya—Kotɛmɛla bikateli ya Yehova te—it-1-F lok. 48, Adoniya No. 1 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: “Sakolá liloba, salá yango na molende.”—2 Tim. 4:2.
Min. 15: “Kolimbola bindimeli na biso mpo na mobu 1914.” Lisolo na bayangani. Sɛngá bayangani bápesa makanisi na motuna mokomoko oyo ezali na elembo ya moindo makasi.
Min. 15: Esaleli oyo ekosalisa biso tólimbola bindimeli na biso mpo na mobu 1914. Bóbanda na elakiseli ya miniti nsambo oyo ekomonisa mosakoli moko azali kosalela etanda na lokasa 11 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2014, mpo na komonisa moyekoli ya Biblia na mokuse ndenge oyo esakweli ya Danyele mokapo 4 etali Bokonzi ya Nzambe. Sɛngá bayangani bálobela mpo na nini elakiseli yango ebongaki mpenza. Mpo na kosukisa, tángá Emoniseli 12:10, 12 mpe sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo koyeba ete Bokonzi ebandaki koyangela na mobu 1914, etindaka biso tósakola nsango malamu na molende.
Loyembo 133 mpe libondeli