Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/14 lok. 2
  • Kolimbola bindimeli na biso mpo na mobu 1914

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolimbola bindimeli na biso mpo na mobu 1914
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?—Eteni 2
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?—Eteni 1
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • ‘Bólanda ngai ntango nyonso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 10/14 lok. 2

Kolimbola bindimeli na biso mpo na mobu 1914

Makomami elendisi biso ‘tómibongisaka ntango nyonso mpo na kolobela’ bindimeli na biso, mpe ‘tósalaka bongo na boboto mpe na limemya makasi.’ (1 Pe. 3:15) Kasi, tokoki komona ete ezali mpasi kolobela mateya mozindo ya Biblia, na ndakisa ndenge oyo toyebi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na mobu 1914. Mpo na kosalisa biso, lisolo ya biteni mibale ebongisami, oyo motó ya likambo na yango elobi: “Lisolo na moninga moko ya kartye​—Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?” Masolo yango ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tokokabola na mosala ya kosakola na sanza ya zomi mpe ya zomi na moko. Wana ozali kotalela masolo yango, talelá mituna oyo elandi, oyo elobeli makanisi oyo mosakoli moko na nkombo Cameron asalelaki.

Ndenge nini . . .

  • apesaki longonya mpo epesa nzela ya kosolola na moto?​—Mis. 17:22.

  • amonisaki komikitisa ntango azalaki kolimbola bindimeli na ye?​—Mis. 14:15.

Mpo na nini ezalaki malamu ndenge . . .

  • azongelaki mbala na mbala na mokuse makambo oyo alobaki liboso ya kobakisa mosusu?

  • azalaki kopema mbala mingi, mpe kotuna moto oyo azali kosolola na ye soki akangi ntina na makambo oyo auti kolimbolela ye banda na ebandeli?

  • alobelaki te makambo ebeleebele na lisolo mokomoko?​—Yoa. 16:12.

Tozali mpenza kotɔnda Yehova, ‘Molakisi na biso Monene,’ na ndenge azali koteya biso lolenge ya kolimbola mateya mozindo ya Biblia epai ya bato oyo bazali na nzala na yango!​—Yis. 30:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto