Manaka mpo na pɔsɔ ya 10 sanza ya 11
PƆSƆ EBANDI NA 10 SANZA YA 11
Loyembo 99 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 15 par. 20-23, etanda na lok. 157 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 19-22 (Min. 10)
No. 1: Kolimbola Mibeko 22:20-30 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Lisumu ebebisaka boyokani ya moto na Nzambe—rs lok. 312 par. 1-4 (Min. 5)
No. 3: Kokamata mpe kokómisa (Adoption)—Yehova akamati bato mpe akómisi bango bana na ye ya elimo na nzela ya Kristo Yesu—it-1-F lok. 49 par. 5-7 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Sololá na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Kokokisa mokumba na yo esɛngaka makambo nini? Ntango okeyi kotala etuluku moko ya mosala ya kosakola, eloko nini omekaka kosala? Ndenge nini bandeko ya etuluku bakoki kozwa litomba na viziti na yo? Ndenge nini osalisaka mosakoli mokomoko oyo aluki lisalisi epai na yo na likambo moko etali mosala ya kosakola?
Min. 20: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tómonisa ete tozali kotyela moto mokomoko likebi.” Lisolo na bayangani. Na nsuka ya lisolo, bósala elakiseli ya biteni mibale. Ya liboso, mosakoli azali kopesa moto mokanda oyo tozali kokabola na sanza oyo kozanga ete atyela ye likebi. Na nsima, kaka elakiseli yango, kasi na mbala oyo mosakoli amonisi ete azali kotyela moto yango likebi.
Loyembo 84 mpe libondeli