Manaka mpo na pɔsɔ ya 24 sanza ya 11
PƆSƆ EBANDI NA 24 SANZA YA 11
Loyembo 50 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 16 par. 10-17 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 28-31 (Min. 10)
No. 1: Kolimbola Mibeko 30:15–31:1-8 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Nyama ezali milimo—rs lok. 392 par. 1–lok. 393 par. 2 (Min. 5)
No. 3: Monzɛlɛ (Ornements)—Toli oyo bakristo balandaka mpo na monzɛlɛ—it-2-F lok. 458 par. 4-5 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: “Saleláká site Internet na biso na mosala ya kosakola—‘Biyano na mituna ya Biblia.’” Lisolo na bayangani. Lobelá mwa mituna mosusu oyo biyano na yango epesami na esika yango na site Internet na biso. (Kende na jw.org, mpe kɔtá na MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA.) Bósala elakiseli ya mokuse na moko ya makanisi oyo ezali wana. Sɛngá na bayangani bápesa makanisi na ndenge mosusu ya kosalela yango na mosala ya kosakola.
Min. 10: “Nakutaka ye lisusu te na ndako!” Lisolo na bayangani. Bólobela mpo na nini ezali na ntina kozala na molende soki ezali mpasi kokuta moto moko na ndako.—Mat. 28:19, 20; Mrk. 4:14, 15; 1 Ko. 3:6.
Min. 10: “Esaleli ya sika mpo na bolukiluki.” Diskur. Lobelá malako “Ndenge ya kobanda bolukiluki,” oyo ezali na maloba ya ebandeli ya Buku ya bolukiluki. Lobelá biteni ndenge na ndenge ya esaleli yango ya sika. Bósala elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli azali kolobaloba ye moko, wana azali kosalela Buku ya bolukiluki.
Loyembo 69 mpe libondeli