Lolenge moko ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso
1. Masangá oyo ezali na bisika oyo bato mingi balekaka na makolo elendisamaki na likambo nini?
1 Masangá oyo ezali na bisika oyo bato mingi balekaka na makolo elendisamaki ete bázwa bibongiseli mpo na kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso na kosalela bamesa to bashario. Soki bosaleli shario, esengeli ata mosakoli moko atɛlɛma to afanda pembeni na yango. Nzokande, esengeli ete basakoli mibale bázala na mesa. Baoyo bakoponama mpo na yango, basengeli kosala makasi bázala na nsai, na boboto mpe báyeba kobenga bato. Soki moto atye likebi na mikanda, moko ya basakoli akoki kobanda lisolo na maloba lokola: “Osilá komituna soki Biblia elobi nini na likambo wana?” Mosakoli mosusu to bango nyonso mibale bakoki kotalaka esika shario ya mikanda ezali ntango bazali kopesa litatoli ya libaku malamu.
2. Lobelá likambo moko oyo emonisi ntina ya kosakola na bisika ya bato nyonso na kotandáká mikanda.
2 Mayele yango esali ete bato mingi báyekola Biblia. Moyekoli moko ya mwasi na iniversite aponaki kokoma zulunalo moko mpo na Batatoli ya Yehova, kasi ayebaki te esika Ndako ya Bokonzi ezali. Pɔsɔ oyo elandaki amonaki mesa ya mikanda na iniversite. Abandaki koyekola Biblia, mpe lelo oyo azali mosakoli oyo azwá batisimo mpe ye moko asanganaka na lolenge wana ya kopesa litatoli.
3. Basakoli mosusu balobi nini mpo na ndenge wana ya kopesa litatoli?
3 Ndeko mwasi moko oyo asepelaki na lolenge wana ya kopesa litatoli alobi boye: “Bato mosusu batɛlɛmaka esika mikanda ezali mpo na kozwa bazulunalo ya sika. Basusu bayoká naino liboso te nsango ya Batatoli ya Yehova. Namoni ete na mayele oyo ya sika, bato mingi bakoyoka nsango malamu.” Ndeko mwasi mosusu alobaki boye: “Yango ezali lolenge moko ya sika ya kopesa litatoli mpo bato bazali koya epai na yo mpe ata soki basepeli mingi te, balukaka koyeba.”
4. Mpo na nini kotyaka mikanda na bangonga moko mpe na esika ya sikisiki pɔsɔ nyonso ezali na litomba?
4 Kotyaka mesa kaka esika moko, na mikolo ya sikisiki mpe na bangonga ya sikisiki pɔsɔ nyonso, ezalaka na litomba. Lokola bato bakomesana na yango, nsukansuka bakobanda kopusana mpe kotuna mituna to kozwa mikanda. Lisangá na bino ezwá ebongiseli ya kosakola na bisika ya bato nyonso? Soki Ɛɛ, okoki kosangana na motindo wana ya kosakola oyo epesaka esengo mpe oyo ebotaka mbuma mpo na “kosakola bokonzi ya Nzambe bipai nyonso.”—Luka 9:60.