Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp20 No. 3 lok. 13
  • Nzambe apambolaka bato oyo basalisaka basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe apambolaka bato oyo basalisaka basusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • OYO MAKOMAMI MOSANTU ELOBI
  • KOSALISA MOTO ELIMBOLI NINI?
  • Tósunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Kozala “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Zwá liteya na ndakisa ya batalanta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ondimaka lisalisi ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
wp20 No. 3 lok. 13
Moto moko atye mosapi na karte mpo na kolakisa moto mosusu nzela.

Okoki kosalisa bato ya mbula nyonso, bikólo nyonso mpe mangomba nyonso

Nzambe apambolaka bato oyo basalisaka basusu

Na mokili, bato mingi bazangi bilei mpe bisika ya kofanda. Basusu bazangi elikya. Soki tozali kosalisa bato ya ndenge wana, Nzambe akopambola biso.

OYO MAKOMAMI MOSANTU ELOBI

“Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.”​—MASESE 19:17.

KOSALISA MOTO ELIMBOLI NINI?

Yesu abɛtaki lisolo ya moto moko oyo miyibi babɛtaki ye pene báboma ye. (Luka 10:29-37) Mopaya moko oyo alekaki na nzela wana, amonaki moto yango, apusanaki mpe akangaki bampota na ye. Asalisaki moto yango atako bazalaki ekólo moko te.

Mopaya yango amonisaki boboto na ndenge amemaki moto yango epai ya monganga, afutaki mbongo, alendisaki moto yango mpe abɔndisaki ye.

Lisolo yango eteyi biso nini? Yesu alingaki komonisa biso ete tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bato oyo bazali na mpasi. (Masese 3:27) Makomami Mosantu elobi ete mosika te Nzambe akosukisa bobola mpe mpasi. Kasi tokoki komituna: Ndenge nini Nzambe akosala yango mpe akosala yango ntango nini? Lisolo oyo elandi ekolobela mapamboli oyo Nzambe abombeli yo.

“NZAMBE ASUNDOLAKI NGAI TE”!

Lisolo ya moto moko oyo autá na Gambie

“Ntango nakómaki na Mpoto, nazalaki na eloko te: mosala te, mbongo te mpe ndako te. Makomami Mosantu eteyaki ngai ete nasengeli kosala mosala makasi, kosalisa basusu, kasi te koluka kaka basusu básalisa ngai. Nzambe asundolaki ngai te, mpe apambolaki ngai!”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto