14-20/01
MISALA 23-24
Loyembo 148 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Bafundi ye ete azali likama monene mpe azali kobimisa botomboki”: (Min. 10)
Mis 23:12, 16—Likita moko ya mabe mpo na koboma Paulo elongaki te (bt lok. 191 par. 5-6)
Mis 24:2, 5, 6—Molobeli moko na nkombo Tertulusi afundaki Paulo epai ya guvɛrnɛrɛ Moroma (bt lok. 192 par. 10)
Mis 24:10-21—Paulo akweisaki bifundeli yango na limemya nyonso mpe apesaki litatoli na mpiko (bt nk. 193-194 par. 13-14)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Mis 23:6—Mpo na nini Paulo amibengaki Mofarisai? (“nazali Mofarisai” nɔti mpo na koyekola na Mis 23:6, nwtsty-E)
Mis 24:24, 27—Drusila azalaki nani? (“Drusila” nɔti mpo na koyekola na Mis 24:24, nwtsty-E)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Mis 23:1-15 (th liteya 5)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na bokutani ya liboso: (Min. 4) Lakisá video mpe bólobela yango.
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) Salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 1)
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino. (th liteya 2)
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Pesá eyano na ntembe moko oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino. (th liteya 3)
BOMOI YA BAKRISTO
Lapolo ya mbula na mbula: (Min. 15) Diskur ekosalema na nkulutu moko. Nsima ya kotánga mokanda ya biro ya filiale oyo etali lapolo ya mbula na mbula, tuná basakoli oyo oponaki, oyo bakutanaki na makambo ya kolendisa na mosala ya kosakola na mbula oyo eleki.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 50
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 128 mpe libondeli