Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr19 Août nk. 1-6
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • 05-11/08
  • 12-18/08
  • 19-25/08
  • 26/08–01/09
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2019
mwbr19 Août nk. 1-6

Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

05-11/08

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 TIMOTE 1-4

“Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te”

w09 15/5 lok. 15 par. 9

Bilenge​—Bómonisa bokoli na bino polele

9 Na nsima, Paulo apesaki Timote toli oyo: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi malamu.” (2 Tim. 1:7) Kozala na “makanisi malamu” elimboli kozala na likoki ya kokanisa mpe kososola malamu. Elimboli mpe kondima makambo ndenge ezali, kasi te koluka ezala ndenge yo olingi. Bilenge mosusu bazalaka bibangabanga mpe balukaka kokima makambo oyo ezali kotungisa bango; yango wana bakómaka kolalalala, kolekisa ntango mingi liboso ya televizyo, komɛla bangi to kolangwa masanga, komipesa na biyenga to na pite. Biblia elobi na baklisto boye: “Tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”​—Tito 2:12.

w03 1/3 lok. 9 par. 7

‘Bózala na mpiko mpe na makasi!’

7 Paulo akomelaki Timote maloba oyo: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya . . . Na yango koyoka nsɔni te mpo na litatoli oyo etali Nkolo na biso.” (2 Timote 1:7, 8; Marko 8:38) Nsima ya kotánga maloba yango, tokoki komituna boye: ‘Nayokelaka mateya ya lingomba na ngai nsɔni, to nazalaka nde na mpiko? Na mosala (to na kelasi), nayebisaka bato ete nazali Motatoli ya Yehova to nalukaka nde komibomba? Nayokaka nsɔni bámona ete ngai nakeseni na bato mosusu to namonaka ete soki nakeseni na bato mosusu ezali lokumu mpamba te nazali moninga ya Yehova?’ Soki moto moko abangaka kosakola nsango malamu to akakatanaka mpo na koboya kolanda ndenge oyo bato mingi basalaka, moto ya ndenge wana akanisa lisusu toli oyo Yehova apesaki Yosua: “Zalá na mpiko mpe na makasi.” Tóbosana te ete oyo eleki ntina ezali te makanisi ya baninga na biso ya mosala to ya kelasi, kasi ezali nde makanisi ya Yehova mpe ya Yesu Kristo.​—Bagalatia 1:10.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w17.07 lok. 10 par. 13

Luká bomɛngo ya solosolo

13 Timote azalaki na kondima. Ntoma Paulo abengaki ye “soda ya solosolo ya Kristo,” mpe ayebisaki ye: “Moto oyo azali kosala mosala ya soda amikɔtisaka na mimbongo te lokola bato oyo bazali basoda te, mpo moto oyo azwaki ye na mosala ya soda andima ye.” (2 Timote 2:3, 4) Lelo oyo, bayekoli ya Yesu, kati na bango bandeko koleka milio moko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, basalaka makasi básalela toli ya Paulo. Baboyaka kolanda bapiblisite ya mokili oyo etondi na lokoso mpe babosanaka te etinda oyo elobi: “Modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.” (Masese 22:7) Satana alingi tólekisa ntango na biso nyonso mpe makasi na biso nyonso lokola baombo ya ebongiseli ya mombongo ya mokili na ye. Bato mosusu bakɔtaka banyongo ya minene mpo na kosomba ndako, motuka, kotánga kelasi to kutu mpo na kosala fɛti ya libala. Soki tokebi te, tokoki kokɔta nyongo ya bambula ebele. Tokomonisa mpe mayele soki tokómisi bomoi na biso pɛpɛlɛ, toboyi kokɔta banyongo, mpe tozali kobebisa mbongo mpambampamba te. Na ndenge yango, tokozala na bonsomi ya kosalela Nzambe, na esika tózala baombo ya ebongiseli ya mombongo ya mokili oyo.​—1 Timote 6:10.

w14 15/7 lok. 14 par. 10

Basaleli ya Yehova basengeli ‘kotika makambo ya kozanga boyengebene’

10 Lelo oyo, basaleli ya Yehova bakutanaka te mbala mingi na lipɛngwi na lisangá. Kasi, soki tokutani na mateya oyo euti na Biblia te, ezala euti wapi, tosengeli kozala na ekateli makasi ya koboya yango. Ekozala mpenza bozoba kobanda kotyana ntembe ná bapɛngwi, to kokomela bango na site na bango to kosolola na bango na lolenge moko to mosusu. Ata soki tokoki kozala na likanisi ya kosalisa bato yango, kosolola na bango eyokani te na toli ya Makomami oyo ezali kopekisa biso kosala bongo. Lisusu, biso basaleli ya Yehova tosengeli mpenza koboya mpe kotika lipɛngwi.

12-18/08

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | TITO 1–FILEMO

“Tyá bankulutu”

w14 15/11 nk. 28-29

Mituna ya batángi

Atako Makomami elimboli te makambo nyonso na ndenge koponama ya bankulutu ezalaki kosalema na ntango wana, kasi tomoni mwa likanisi ndenge ezalaki kosalema. Ntango ntoma Paulo ná Barnabasi bautaki na mobembo na bango ya liboso lokola bamisionɛrɛ mpe bazalaki kozonga, Biblia eyebisi biso ete: “Batyelaki bango bankulutu na lisangá moko na moko mpe, babondelaki mpe bakilaki bilei, bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova oyo bango bandimelaki.” (Mis. 14:23) Bambula na nsima, ntoma Paulo akomelaki Tito, moninga na ye ya mobembo ete: “Natikaki yo na Krɛtɛ mpo na ntina oyo: osembola makambo oyo ezali kotambola malamu te mpe otya bankulutu na engumba mokomoko, ndenge napesaki yo mitindo.” (Tito 1:5) Ndenge moko, Timote oyo atambolaki mingi ná ntoma Paulo, azwaki mpe mokumba ya ndenge wana. (1 Tim. 5:22) Na yango, emonani polele ete bakɛngɛli batamboli nde bazalaki kotya bandeko yango, kasi te bantoma mpe mikóló ya Yerusaleme.

Na likanisi wana ya Biblia na motó, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ebongoli lolenge oyo bankulutu mpe basaleli na misala bazali koponama. Kobanda mokolo ya 01/09/2014, bankulutu ná basaleli na misala bakobanda kotyama boye: Mokɛngɛli mokomoko ya zongazonga akobanda kotalela malamumalamu bankombo ya bandeko oyo bapesi ye na zongazonga na ye mpe akoluka koyeba bandeko yango malamu ntango ayei kotala lisangá, kobima ná bango na mosala ya kosakola, soki likoki ezali. Nsima ya kotalela bankombo yango elongo na bankulutu ya lisangá, mokɛngɛli ya zongazonga nde azali na mokumba ya kotya bankulutu mpe basaleli na misala na zongazonga na ye. Na ndenge yango, ebongiseli oyo eyokani mpenza na oyo ya siɛklɛ ya liboso.

Kasi, nani akokisaka mikumba ndenge na ndenge na likambo yango? Lokola momeseno, mokumba ya libosoliboso ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali ya kopesa bato ya ndako bilei. (Mat. 24:45-47) Yango esangisi mpe kolukaluka na Makomami na lisalisi ya elimo santu, mpo na koyeba ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi ya mokristo mpe lolenge oyo masangá esengeli kotambwisama na mokili mobimba. Batyaka mpe bakɛngɛli nyonso ya zongazonga mpe bandeko ya Komite ya filiale. Na ngala na yango, biro ya filiale mokomoko esalisaka mpo ete malako yango esalelama. Lisangani mokomoko ya bankulutu ezali na mokumba monene ya kotalela malamumalamu bandeko oyo balingi kopesa bankombo na bango mpo na kozwa mikumba na lisangá na boyokani ya masɛngami oyo ezali na Makomami. Mpe mokɛngɛli mokomoko ya zongazonga azali na mokumba monene ya kotalela malamumalamu mpe na libondeli bankombo ya bandeko oyo bankulutu ya zongazonga na ye bapesi mpe kotya bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w89-F 15/5 lok. 31 par. 5

Mituna ya batángi

Na ntembe te, apesaki nzela te na likambo ya kokanisela bato ya mposo to ekólo mosusu mabe na ndakisa bato ya Krɛtɛ. Tokoki kondima yango, mpo Paulo ayebaki ete na Krɛtɛ ezalaki na bakristo oyo Nzambe andimaki mpe batyamaki mafuta na elimo santu. (Misala 2:5, 11, 33) Ezalaki na bakristo oyo bamipesaki mpenza mpo na kobandisa masangá na “engumba mokomoko.” Atako bakristo yango bazalaki bato ya kozanga kokoka, tokoki kondima ete bazalaki te bato ya lokuta mpe bato ya lokoso oyo balingaka mosala te; soki bongo te, Yehova alingaki te kokoba kondima bango. (Bafilipi 3:18, 19; Emoniseli 21:8) Ndenge moko mpe na biso lelo, na bikólo nyonso ezali na bato oyo bakokani na bato ya Krɛtɛ, oyo bazali sembo mpe bamitungisaka mpo na makambo ezangi bosembo oyo ezali kosalema na esika bafandi mpe bazali kosepela na nsango malamu.​—Ezekiele 9:4; talá Misala 13:48.

w08 15/10 lok. 31 par. 4

Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Tito, epai ya Filemo mpe epai ya Baebre

15, 16​—Mpo na nini Paulo asɛngaki Filemo te ete apesa Onezime bonsomi? Paulo alingaki kokangama kaka na mokumba na ye ya ‘kosakola bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo oyo etali Nkolo Yesu Kristo.’ Yango wana, aboyaki kokɔta na makambo mosusu, na ndakisa oyo etali moombo ná nkolo na ye.​—Mis. 28:31.

19-25/08

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEBRE 1-3

“Lingá boyengebene mpe yiná makambo ya kobuka mibeko”

w14 15/2 lok. 5 par. 8

Kumisá Kristo, Mokonzi ya nkembo!

8 Yehova atyaki mwana na ye Mokonzi Masiya na likoló na 1914. ‘Lingenda ya bokonzi na ye ezali lingenda ya bosembo,’ yango emonisi ete bokonzi na ye ezali ya bosembo mpe ya boyengebene. Bokonzi na ye ezali mpenza ya kobɛtɛla ntembe te, mpo ‘Nzambe azali kiti na ye ya bokonzi.’ Ezali bongo mpo bokonzi yango euti epai na Yehova. Lisusu, kiti ya bokonzi ya Yesu ekoumela mpo na “ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.” Osepeli te kosalela Yehova na nse ya litambwisi ya mokonzi ya ndenge wana ya nguya, oyo Nzambe atye?

w14 15/2 lok. 4 par. 7

Kumisá Kristo, Mokonzi ya nkembo!

7 Tángá Nzembo 45:6, 7. Lokola Yesu azalaki kolinga mingi boyengebene mpe azalaki koyina eloko nyonso oyo ekokaki kobebisa lokumu ya tata na ye, Yehova atyaki ye mafuta na elimo mpe akómaki Mokonzi ya Bokonzi ya Masiya. Nzambe atyaki Yesu “mafuta ya esengo” koleka “baninga” na ye, elingi koloba bakonzi ya Yuda oyo bazalaki mpe bakitani ya Davidi. Ndenge nini? Ya liboso, ezali mpo Yehova ye moko nde atyaki Yesu mafuta na elimo. Ya mibale, Yehova atyaki ye Mokonzi mpe Nganga-nzambe monene. (Nz. 2:2; Ebr. 5:5, 6) Ya misato, Yesu atyamaki mafuta ya mafuta te, kasi na elimo santu, mpe bokonzi na ye, ezali ya mabele te kasi ya likoló.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

it-1-F lok. 1170 par. 4

Elilingi

Yesu amonisaka ete azali elilingi ya Tata na ye kaka na lolenge moko?

Mwana ya liboso ya Nzambe, oyo na nsima akómaki moto Yesu, asalemaki na elilingi ya Tata na ye. (2Ko 4:4) Emonani ete Nzambe azalaki kosolola na Mwana yango ntango alobaki ete: “Tósala moto na elilingi na biso,” na yango Mwana yango azalaki na elilingi ya Tata na ye, Mozalisi, banda ntango akelamaki. (Eb 1:26; Yn 1:1-3; Kol 1:15, 16) Ntango azalaki moto ya kokoka awa na mabele, amekolaki bizaleli mpe bomoto ya Tata na ye na ndenge ya kokoka na kotalela makoki ya bomoto, yango wana alobaki ete “moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yn 14:9; 5:17, 19, 30, 36; 8:28, 38, 42) Kasi na ntembe te, ntango Yesu asekwaki na nzoto ya elimo mpe ntango Tata na ye, Yehova Nzambe apesaki ye “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” akómaki elilingi ya Tata na ye malamu koleka. (1Pe 3:18; Mt 28:18) Na ntango wana, lokola Nzambe atombolaki Yesu “likoló koleka,” Mwana yango akómaki komonisa nkembo ya Tata na ye mingi koleka ndenge azalaki komonisa yango liboso atika likoló mpo aya awa na mabele. (Flp 2:9; Ebr 2:9) Sikoyo, azali “elilingi [ya Nzambe] mpenza.”​—Ebr 1:2-4.

it-1-F lok. 478 par. 1

Likoló

Maloba ya Nzembo 102:25, 26 esalelamaka mpo na Yehova Nzambe, kasi ntoma Paulo asaleli yango mpo na kolobela Yesu Kristo. Ezali mpo Nzambe asalelaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo na kokela molɔ́ngɔ́. Paulo amonisi ete bomoi ya Mwana ekeseni mpenza ná likoló mpe mabele mpo bomoi ya Mwana ekoumela seko, kasi soki Nzambe alingi, akoki ‘kolínga likoló mpe mabele lokola kazaka’ mpo ezala lisusu te.​—Ebr 1:1, 2, 8, 10-12; talá mpe 1Pe 2:3.

26/08–01/09

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BAEBRE 4-6

“Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo okɔta na kopema ya Nzambe”

w11 15/7 lok. 24 par. 3-5

Kopema ya Nzambe ezali nini?

3 Makambo mibale ezali kotinda biso tóloba ete mokolo ya nsambo ezalaki kokoba tii na ekeke ya liboso T.B. Ya liboso, tótala makambo oyo Yesu alobaki na banguna na ye oyo basilikelaki ye mpo abikisaki moto na Sabata, likambo oyo bamonaki ete ezali lokola kosala mosala. Yesu ayanolaki bango boye: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, ngai mpe nazali kokoba kosala.” (Yoa. 5:16, 17) Alingaki koloba nini? Bato wana bafundaki Yesu ete azali kosala mosala na Sabata. Eyano ya Yesu ete “Tata na ngai azali kokoba kosala” ekweisaki efundeli yango. Yesu azalaki nde koyebisa banguna na ye ete: ‘Ngai ná Tata na ngai tozali kosala mosala ya ndenge moko. Lokola Tata na ngai azali kokoba kosala na boumeli ya Sabata na ye oyo eumeli bankóto ya bambula, ngai mpe nakoki kosala, ata na Sabata.’ Na yango, Yesu amonisaki ete na oyo etali mabele, Sabata monene ya Nzambe, to mokolo ya nsambo oyo azali kopema, esukaki naino te na mikolo na ye.

4 Likambo ya mibale emonisami na maloba ya ntoma Paulo. Liboso azongela maloba ya Ebandeli 2:2, Paulo akomaki boye: “Biso bato oyo tondimi, tozali mpenza kokɔta na kopema yango.” (Ebr. 4:3, 4, 6, 9) Na yango, tii na ntango ya Paulo, mokolo ya nsambo esukaki naino te. Mokolo yango ya kopema esengelaki kokoba lisusu ntango boni?

5 Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tosengeli te kobosana ntina ya mokolo yango ya nsambo. Ebandeli 2:3 eyebisi biso ete: “Nzambe abandaki kopambola mokolo ya nsambo mpe kosantisa yango.” Yehova asantisaki mokolo yango to aponaki yango mpo na kokokisa mokano na ye. Mokano yango ezali ete mabele etonda na mibali mpe basi ya botosi oyo bakobatela yango mpe biloko nyonso oyo ezali na kati. (Eba. 1:28) Ezali mpo na kokokisa mokano yango nde Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo, “Nkolo ya sabata,” bazali “kokoba kosala tii sikoyo.” (Mat. 12:8) Na yango, mokolo ya kopema ya Nzambe ekokoba tii mokano na ye ekokokisama na mobimba na yango, na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo.

w11 15/7 lok. 25 par. 6

Kopema ya Nzambe ezali nini?

6 Nzambe ayebisaki Adama ná Eva mokano na ye polelepolele, kasi bango basalaki na boyokani na yango te. Ya solo, ata nsima ya Adama ná Eva, bamilio ya bato mosusu bazali kolanda nzela ya kozanga botosi. Ata bato ya Yisraele, ekólo ya Nzambe, balandaki mbala na mbala ndakisa yango ya kozanga botosi. Mpe Paulo akebisaki bakristo ya ekeke ya liboso ete ata bato mosusu kati na bango bakoki kokwea na motambo wana, lokola Bayisraele ya kala. Akomaki boye: “Yango wana, tósala nyonso oyo ekoki mpo tókɔta na kopema wana, noki moto moko akwea mpe alanda ndakisa yango ya kozanga botosi.” (Ebr. 4:11) Maloba ya Paulo emonisi ete bato ya kozanga botosi bakoki kokɔta na kopema ya Nzambe te. Elimboli nini mpo na biso? Elimboli nde ete soki na lolenge moko boye totosi te mokano ya Nzambe, totoki kozanga kokɔta na kopema na ye? Ezali polele ete eyano na motuna wana ezali na ntina mingi mpo na biso, mpe tokolobela yango na bozindo na lisolo oyo. Kasi, liboso tókóma kuna, tótalela lisusu ndakisa mabe ya Bayisraele mpe ntina oyo bakɔtaki na kopema na Nzambe te.

w11 15/7 lok. 28 par. 16-17

Kopema ya Nzambe ezali nini?

16 Bakristo mingi te bakoloba ete esengeli kaka kotosa makambo mosusu ya Mibeko ya Moize mpo na kozwa lobiko lelo oyo. Maloba ya Paulo epai ya Baefese ezali polele ete: “Na boboto monene wana nde bobikisami na nzela ya kondima; mpe kobika yango euti na bino te, ezali likabo ya Nzambe. Ɛɛ, euti na misala te, mpo moto moko te azwa ntina ya komikumisa.” (Ef. 2:8, 9) Boye, ndenge nini bakristo bakoki kokɔta na kopema ya Nzambe lelo? Kobosana te ete Yehova aponaki mokolo ya nsambo, mokolo ya kopema na ye, mpo akokisa mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato ya botosi. Tokoki kokɔta na kopema ya Yehova, soki tozali kotosa ye mpe kosala na boyokani na mokano na ye, ndenge ebongiseli na ye ezali komonisa biso yango.

17 Nzokande, soki tozali kotosa te batoli oyo tozali kozwa na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, to soki toponi nzela ya lipanda, tokomonisa ete tozali kosala na boyokani na mokano ya Yehova te. Kosala bongo ekoki kobebisa boyokani na biso na ye. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo mosusu oyo ekoki kokómela basaleli ya Nzambe mpe tokomona ndenge ekateli na biso, ya kotosa to te, ekoki komonisa soki tokɔtá mpenza na kopema ya Nzambe.

Tóluka biloko ya motuya ya elimo

w16.09 lok. 32

Mituna ya batángi

“Liloba ya Nzambe” oyo Baebre 4:12 elobi ete “ezali na nguya mpe epeli makasi” ezali nini?

▪ Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima esalisi biso tóyeba ete ntoma Paulo azalaki kolobela nsango ya Nzambe oyo etali mokano na ye, na ndakisa oyo ezali na Biblia.

Mbala mingi, tosalelaka Baebre 4:12 na mikanda na biso mpo na komonisa ete Biblia ezali na nguya ya kobongola bomoi ya bato, mpe yango ezali solo. Kasi, ezali na litomba koyeba likambo oyo ntoma Paulo azalaki kolobela ntango akomaki maloba ya Baebre 4:12. Azalaki kolendisa bakristo Baebre básala na boyokani na mokano ya Nzambe. Makambo mingi oyo etali mokano yango ezalaki na makomami mosantu. Ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya Bayisraele oyo Nzambe asikolaki na boombo na Ezipito. Bazalaki na elikya ya kokende “na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,” epai bakokaki kopema na ndenge ya solosolo.​—Kobima 3:8; Kolimbola Mibeko 12:9, 10.

Yango ezalaki mokano ya Nzambe. Kasi, Bayisraele baboyaki litambwisi ya Yehova mpe bamonisaki kondima te, yango wana mingi na bango bakɔtaki te na kopema yango. (Mitángo 14:30; Yosua 14:6-10) Nzokande, ntoma Paulo abakisaki ete ezalaki kaka na “elaka ya kokɔta na kopema [ya Nzambe].” (Baebre 3:16-19; 4:1) Emonani polele ete “elaka” yango ezali moko ya makambo oyo Nzambe amonisaki mpo na mokano na ye. Lokola bakristo Baebre, tokoki kotánga makambo oyo etali mokano yango mpe kosala na boyokani na yango. Mpo na komonisa ete elaka yango euti na Makomami, ntoma Paulo azongelaki maloba ya Ebandeli 2:2 mpe Nzembo 95:11.

Koyeba ete “elaka ya kokɔta na kopema [ya Nzambe] ezali naino,” esimbaka mitema na biso. Tondimaka ete makambo oyo Biblia eteyaka na oyo etali kokɔta na kopema ya Nzambe ekosalema mpenza, mpe tozali kotambola na nzela oyo ezali komema na kopema yango. Tosalaka yango te mpo na koluka kotosa Mibeko ya Moize to tosalaka makambo ya malamu te kaka mpo Yehova andima biso. Kasi, lokola tondimelaka Nzambe, tosepelaka kosala na boyokani na mokano na ye mpe kokoba kosala bongo. Ebele ya bato na mokili mobimba babandá mpe koyekola Biblia mpe koyekola makambo oyo Nzambe amonisá mpo na mokano na ye. Yango esalisaki mingi na bango bábongola bomoi na bango, bámonisa kondima, mpe bázwa batisimo. Ndenge oyo bazali kobongwana emonisi polele ete “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” Makambo oyo Nzambe amonisá na Biblia mpo na mokano na ye esilá kobongola bomoi na biso, mpe ekokoba komonisa nguya na yango na bomoi na biso.

it-1-F nk. 799-800 par. 7

Elikya

Elikya ya bomoi ya seko mpe ya kozanga kopɔla mpo na baoyo ‘babengami mpo na kokende na likoló’ (Ebr 3:1) ezali likambo ya solo mpe oyo basengeli kotyela mpenza motema. Elikya na bango esimbami na makambo mibale, oyo mpo na yango Nzambe akoki kobuka lokuta ata moke te: elaka na ye mpe ndai na ye. Lisusu batye elikya yango epai ya Kristo, oyo azali sikoyo na bomoi ya kozanga kokufa kuna na likoló. Yango wana balobeli elikya yango lokola “longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi, mpe elikya yango ezali kokɔtisa biso na nsima ya rido [ndenge nganga-nzambe monene azalaki kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu na mokolo ya kozipa masumu], epai moto oyo aleki liboso akɔtaki mpo na biso, Yesu, oyo akómi nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke libela na libela.”​—Ebr 6:17-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto