Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
07-13/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YAKOBO 3-5
“Monisá bwanya oyo euti na Nzambe”
“Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?
9 “Libosoliboso pɛto na bizaleli.” Kozala pɛto na bizaleli elimboli kozanga mbindo, ezala na libándá to na kati. Biblia elobaka ete bwanya ezalaka na motema, kasi bwanya oyo euti na likoló ekoki te kokɔta na motema oyo makanisi, bamposa mpe mikano ya mabe ekómisi yango mbindo. (Masese 2:10; Matai 15:19, 20) Nzokande, soki motema na biso ezali pɛto—elingi koloba, na ndenge oyo ekoki na bato ya kozanga kokoka—‘tokotika mabe mpe tokosala malamu.’ (Nzembo 37:27; Masese 3:7) Ebongi solo ete bopɛto ya bizaleli ezala likambo ya liboso oyo balobeli mpo na bwanya, boye te? Kutu, soki tozali pɛto te na bizaleli mpe na elimo, ndenge nini tokoki mpenza komonisa bizaleli mosusu ya bwanya oyo euti na likoló?
10 “Na nsima kimya.” Bwanya oyo euti na likoló etindaka biso tólanda kimya, oyo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe. (Bagalatia 5:22) Tosalaka makasi mpo tóbebisa te “ekanganeli ya kimya” oyo esangisi basaleli ya Yehova. (Baefese 4:3) Tosalaka mpe makasi mpo tózongisa kimya ntango ebebi. Mpo na nini yango ezali na ntina mingi? Ezali mpo Biblia elobi ete: “Bókoba . . . kofanda na kimya; mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na bino.” (2 Bakolinti 13:11) Na yango, soki tozali kofanda ntango nyonso na kimya, Nzambe ya kimya akozala na biso. Boyokani na biso na Yehova etali ndenge tofandaka na baninga oyo tosambelaka na bango. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bato oyo batyaka kimya? Tózwa ndakisa moko.
“Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?
12 “Makambo makasimakasi te.” Kozala na makambo makasimakasi te elimboli nini? Bato ya mayele balobi ete, liloba ya Grɛki, oyo basalelaki na ebandeli, oyo ebongolami na Yakobo 3:17 “makambo makasimakasi te” ezalaka mpasi mpo na kobongola yango. Babongolaki liloba yango na maloba lokola “na boboto,” “kokanga motema,” mpe “komitya na esika ya basusu.” Ndimbola mpenzampenza ya liloba yango ya Grɛki ezali “koyokela basusu.” Ndenge nini tokoki komonisa ete likambo yango ya bwanya oyo euti na likoló ezali kotambwisa biso?
“Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?
14 “Esepelaka kotosa.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “esepelaka kotosa” ezali epai mosusu te na Makomami ya Grɛki ya boklisto. Moto moko ya mayele alobi ete liloba yango “esalelamaka mbala mingi mpo na disiplini ya basoda.” Epesaka likanisi ya “kozala moto oyo bandimisaka makambo nokinoki” mpe “kozala moto ya botosi.” Moto oyo atambwisami na bwanya ya likoló atosaka noki makambo oyo Makomami elobi. Ayebani te ete azali moto oyo aboyaka kobongola bikateli na ye soki makambo mosusu emonisi ete bikateli yango ezali malamu te. Kasi, aumelaka te kobongola makanisi soki bamonisi ye polele na Makomami ete asalaki libunga to azwaki bikateli ya mabe. Bato bayebi ete yo ozalaka ndenge wana?
“Etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu”
15 “Etondi na motema mawa mpe na bambuma ya malamu.” Motema mawa ezali eteni ya ntina mingi ya bwanya oyo euti na likoló, mpamba te balobi ete bwanya yango “etondi na motema mawa.” Omoni ete batángi “motema mawa” esika moko na “bambuma ya malamu.” Yango ebongi mpenza, mpamba te na Biblia, mbala mingi motema mawa elakisaka mposa ya kosalela basusu mpo tozali komibanzabanza mpo na bango, to mawa oyo ebotaka ebele ya misala malamu. Buku moko elimboli motema mawa lokola “koyokela moto mawa mpo na mpasi oyo azali na yango mpe koluka kosala likambo moko mpo na kosilisa mpasi yango.” Na yango, bwanya ya Nzambe ezali te ezaleli moko oyo ezangi bolingo, to oyo esuki kaka na motó. Kasi ezalaka nde na nsai, eutaka na motema mpe etalelaka mayoki ya basusu. Ndenge nini tokoki komonisa ete totondi na motema mawa?
“Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?
18 “Eponaka bilongi te.” Bwanya ya Nzambe elongaka makanisi mabe oyo bato bazwelaka basusu mpo bakeseni mposo mpe lolendo oyo bato bazalaka na yango mpo na ekólo na bango. Soki totambwisami na bwanya yango, tokosala milende tólongola na mitema na biso ezaleli nyonso ya koponapona. (Yakobo 2:9) Tokotyela basusu likebi koleka te mpo batángá kelasi mingi, bazali na mbongo mingi, bazali na mikumba na lisangá; mpe na kati ya bandeko na biso, tokomona moto moko mpamba te, ata soki azali mobola. Soki Yehova amoniseli bango bolingo na ye, mpo na nini biso tokoboyela bango bolingo na biso?
19 “Ezalaka na bokosi te.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolamaka na “na bokosi” ezalaki kosalelama mpo na “mosani moko ya teyatre.” Na ntango ya kala, basani ya Bagrɛki mpe ya Baloma bazalaki kolata maskɛ ya monene na ntango ya lisano. Na yango, liloba yango ekómaki komonisa moto oyo azali kobomba bomoto na ye. Likambo yango ya kozala na bokosi te, oyo ezali mpe na kati ya bwanya ya Nzambe, esengeli kosalisa biso kaka te na ndenge oyo tofandaka na bandeko na biso, kasi mpe na ndenge oyo tokanisaka mpo na bango.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petro
4:5—Mokapo nini Yakobo azongeli awa? Azongeli mokapo moko ya sikisiki te. Nzokande, ekoki kozala ete maloba wana eutaki na makanisi oyo ezali na Ebandeli 6:5; 8:21; Masese 21:10; mpe Bagalatia 5:17.
Kondima esalaka ete tózala na motema molai mpe tóbondelaka mingi
8 Koloba mabe na ntina na moninga na biso mondimi ezali lisumu. (Yakobo 4:11, 12) Nzokande basusu batɔngaka baninga na bango bakristo, mbala mosusu mpo ete bazali kokanisa ete bango nde bazali sembo to mpo ete balingi komitombola na kokitisáká basusu. (Nzembo 50:20; Masese 3:29) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kotɔnga’ ezali kopesa likanisi ya koyina mpe emonisi efundeli ya kolekisa ndelo to ya lokuta. Yango ekokani na kokweisa ndeko ntango ozali kosambisa ye. Lolenge nini yango ekokani na ‘kosambisa mpe koloba mabe na mibeko ya Nzambe’? Na ndakisa, Bakomeli mpe Bafarisai ‘bazalaki koboya malako na Nzambe’ mpe bazalaki kosambisa engebene mitinda na bango moko. (Marko 7:1-13) Lolenge moko, soki tokweisi ndeko moko oyo Yehova akweisi te, ‘tokosambisa mibeko ya Nzambe’ mpe tokosala lisumu na kopesáká likanisi ete mibeko yango ebongi te, boye te? Mpe soki tozali kotɔnga ndeko na biso kozanga boyengebene, tozali kokokisa mobeko ya bolingo te.—Baroma 13:8-10.
14-20/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 PETRO 1-2
“Bosengeli kozala basantu”
Lisiko—‘Libonza oyo ekoki mpenza’ oyo euti na Tata
5 Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka nkombo ya Yehova? Na etamboli na biso. Yehova asɛngaka biso tózala basantu. (Tángá 1 Petro 1:15, 16.) Yango elingi koloba ete tosengeli kosambela kaka ye mpe kotosa kaka ye na motema na biso mobimba. Ata ntango bazali konyokola biso, tosalaka nyonso tózala na bomoi oyo eyokani na makambo oyo Yehova ateyaka biso. Ntango tozali kotosa mitinda ya Yehova na bomoi na biso, tokumisaka nkombo na ye. (Matai 5:14-16) Tomonisaka ete mibeko na ye ezali malamu mpe ete Satana azali mokosi. Tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana tosalaka mabunga. Kasi soki tosali mabunga, tobongolaka motema mpe tosalaka makasi tótika kosala makambo oyo ebebisaka lokumu ya nkombo ya Nzambe.—Nzembo 79:9.
Ndenge ya kopona kominanola
6 Yehova ayebisi biso: “Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” (1 Petro 1:14-16; 2 Petro 3:11) Yehova akondima losambo na biso kaka soki ezali mosantu, to pɛto. (Kolimbola Mibeko 15:21) Losambo na biso ekoki kozala pɛto te soki tosalaka makambo oyo Yehova ayini, na ndakisa makambo ya mbindo, makambo ya mobulu, to makambo oyo ezali na boyokani na bademo. (Baroma 6:12-14; 8:13) Kasi, Yehova akosepela mpe te soki tondimaka kominanola na makambo yango. Makambo yango ekoki kosala ete losambo na biso ekóma mbindo mpe Yehova andima yango te, mpe ekoki mpenza kobebisa boyokani na biso na ye.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petro
1:10-12. Baanzelu bazalaka koluka koyeba makambo mozindo ya Nzambe oyo basakoli na ye ya ntango ya kala bakomaki na ntina na lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na yango, makambo yango ekómaki polele ntango Yehova abandaki kosalela lisangá yango. (Ef. 3:10) Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa ya baanzelu mpe kosala makasi mpo na koluka koyeba “makambo mozindo ya Nzambe.”—1 Ko. 2:10.
Mokɛngɛli
Mokɛngɛli oyo aleki bakɛngɛli nyonso. Emonani ete 1 Petro 2:25 ezongeli maloba ya Yisaya 53:6 mpo na kolobela baoyo bazali ‘lokola bampate oyo babungaki nzela,’ mpe na nsima Petro alobi: “Kasi sikoyo bozongeli mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya milimo na bino.” Oyo Petro alobeli awa esengeli kozala Yehova Nzambe, mpo bato oyo Petro akomelaki mokanda batikaki nzela ya Kristo Yesu te. Kutu, na nzela na ye nde bazongaki epai ya Yehova Nzambe, oyo azali Mobateli Monene ya bato na ye. (Nz 23:1; 80:1; Yir 23:3; Ezk 34:12) Yehova azali mpe mokɛngɛli to Moto oyo azali kotalatala. (Nz 17:3) Liloba kotalatala (Gr., épiskopê) ekoki kosalelama mpo na kolobela lisambisi na ye ya etumbu, ndenge esalemaki na siɛklɛ ya liboso na Yerusaleme, oyo esosolaki te ntango oyo bayaki ‘kotala yango [Gr., épiskopês].’ (Lk 19:44) Ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela bolamu mpe matomba, na ndakisa mpo na baoyo bazali kokumisa Nzambe na mokolo “oyo akoya kotala [Gr., épiskopês].”—1Pe 2:12.
21-27/10
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 PETRO 3-5
“Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene”
“Bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza”
MOTO moko oyo kala azalaki kosala na butu alobi ete: “Kosɛnzɛla ekómaka mpasi mingi soki ntɔngɔ elingi kotana.” Na ntembe te, bato mosusu oyo esɛngaka bálala te butu mobimba bayebi ete ezali bongo. Lelo oyo, biso bakristo tozali mpe na mokakatano ya ndenge wana mpamba te, mokili mabe ya Satana, oyo ezali lokola molili ya butu, ekómi na nsuka. (Rom. 13:12) Kolala mpɔngi na ntango oyo ntɔngɔ elingi kotana ekozala mpenza likama mpo na biso! Tosengeli mpenza ‘kozala bato ya makanisi malamu’ mpe kolanda toli oyo Biblia epesi biso ya ‘kozala na bokɛngi mpe kobondelaka mpenza.’—1 Pe. 4:7.
Ndenge ya koyeba mpe kosilisa bolɛmbu ya elimo
Na nsuka, tóbatela na makanisi toli ya bolingo oyo ntoma Petro apesaki ete: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. Yango wana, bózala bato ya makanisi malamu mpe bózala na bokɛngi, bóbondelaka mpenza. Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka ebele ya masumu.” (1 Petro 4:7, 8) Ezali mpasi te mpo na kotika ezaleli ya kozanga kokoka ya bato—ezala ya bato mosusu to mpe ya biso moko—ekɔta na motema mpe na makanisi na biso mpe ekóma mabaku. Satana ayebi malamu bolɛmbu wana ya bato. Kokabola bato mpo na koyangela bango ezali moko ya mayele mabe oyo asalelaka. Yango wana, tosengeli kosala nokinoki mpo na kozipa masumu ya ndenge yango na bolingo makasi bamoko epai na bamosusu mpe ‘tópesa Zabolo nzela te.’—Baefese 4:25-27.
Ezaleli ya koyamba bapaya epesaka esengo mpe ezali na ntina mingi!
2 Na makambo oyo ntoma Petro asɛngaki bandeko básala, alobaki mpe: “Bóyambanaka.” (1 Petro 4:9) Liloba ya Grɛki oyo esalelami mpo na “koyamba” elimboli mpenzampenza “kosepela na bapaya, to komonisela bango boboto.” Kasi, atako bandeko yango bayebanaki mpe bazalaki kosala makambo elongo, Petro asɛngaki bango báyambanaka. Ndenge nini koyambana esalisaki bango?
3 Esalisaki bango bázala na bomoko makasi. Bongo yo okoloba nini? Ozali koyeba lisusu ndenge osepelaki ntango moto abengisaki yo na ndako na ye? Ntango obengisi moto na ndako, yango esalaka ete bómesana. Soki tozali koyamba bandeko epai na biso, tokozwa libaku ya koyeba bango malamu mpenza. Bakristo ya eleko ya Petro basengelaki kozala na bomoko makasi wana makambo ezalaki se kobeba. Na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ tosengeli mpe kozala na bomoko makasi.—2 Timote 3:1.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Mituna ya batángi
Biblia elobi ete Yesu “akendaki kosakwela bilimo oyo ezali na bolɔkɔ.” (1 Pe. 3:19) Yango elingi koloba nini?
▪ Ntoma Petro alobi ete bilimo yango ezali bikelamu oyo “kala batosaki te ntango motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa.” (1 Pe. 3:20) Ezali polele ete Petro azalaki kolobela bikelamu ya elimo oyo baponaki kolanda Satana na botomboki na ye. Yuda alobeli baanzelu oyo “babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza,” mpe alobi ete Nzambe “abombi bango na minyɔlɔlɔ ya seko na kati ya molili tuu mpo na lisambisi ya mokolo yango monene.”—Yuda 6.
Ndenge nini bikelamu ya elimo bazangaki botosi na mikolo ya Noa? Liboso ya Mpela, bilimo wana ya mabe balataki nzoto ya mosuni—likambo oyo Nzambe abongisaki te mpo na bango. (Eba. 6:2, 4) Lisusu, baanzelu wana oyo basangisaki nzoto na basi basalaki likambo oyo ebongaki te. Ntango Nzambe asalaki bikelamu ya elimo, ezalaki te mpo básangisaka nzoto na basi. (Eba. 5:2) Baanzelu wana ya mabe, oyo bazangaki botosi, bakobomama na ntango oyo Nzambe atye. Mpo na sikoyo, ndenge Yuda amonisi yango, bazali na kati ya “molili tuu,” na maloba mosusu, na bolɔkɔ ya elimo.
Ntango nini mpe ndenge nini Yesu akendaki kosakwela “bilimo [yango] oyo ezali na bolɔkɔ”? Petro akomaki ete likambo yango esalemaki ntango Yesu “azongisamaki na bomoi na elimo.” (1 Pe. 3:18, 19) Tóbosana mpe te ete Petro alobi ete Yesu ‘akendaki kosakola.’ Ndenge Petro asalelaki vɛrbɛ oyo emonisaki ete likambo yango eleká, emonisi ete Yesu akendaki kosakola liboso Petro akoma mokanda na ye ya liboso. Na yango, emonani lokola ete nsima ya lisekwa na ye, na ntango moko boye, Yesu akendaki koyebisa bilimo wana etumbu oyo bakozwa. Ezalaki te nsango moko oyo epesaki bango elikya. Ezalaki nde nsango ya lisambisi. (Yona 1:1, 2) Lokola Yesu amonisaki kondima mpe bosembo tii na liwa mpe na nsima asekwaki—na ndenge yango amonisaki ete Zabolo azalaki na bokonzi likoló na ye te—Yesu azalaki na bokonzi ya kopesa nsango ya lisambisi ndenge wana.—Yoa. 14:30; 16:8-11.
Na mikolo ezali koya, Yesu akokanga Satana ná baanzelu yango mpe akobwaka bango na libulu mozindo. (Luka 8:30, 31; Em. 20:1-3) Kasi, liboso ntango yango ekoka, bilimo yango oyo bazangaki botosi bazali na molili tuu ya elimo, mpe nsuka na bango eyebani: bakobomama.—Em. 20:7-10.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petro
4:6—‘Bakufi oyo basakwelaki nsango malamu ezali banani’? Ezali bato oyo ‘bakufaki na kati ya mabunga mpe masumu na bango,’ to baoyo bakufaki na elimo liboso báyoka nsango malamu. (Ef. 2:1) Kasi, nsima ya kondima nsango malamu, bakómaki na boyokani na Nzambe.
28/10–03/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 PETRO 1-3
“Bóbatelaka na makanisi na bino kozala ya mokolo ya Yehova”
Yehova “akosala ete likambo ekatama na bosembo”
11 Kasi, maloba ya Yesu ete Yehova akosala ete likambo ekatama na bosembo “nokinoki” elimboli nini? Liloba ya Nzambe emonisi ete “atako [Yehova] azali na motema molai,” soki kaka ntango na ye ekoki, akokata likambo; akozela te. (Luka 18:7, 8; 2 Petro 3:9, 10) Ntango Mpela eyaki na mikolo ya Noa, bato mabe babomamaki mbala moko. Ndenge moko mpe, na mikolo ya Lota, mɔtɔ eutaki na likoló mpe ebomaki bato mabe. Yesu alobaki boye: “Ekozala mpe bongo na mokolo yango ntango Mwana ya moto asengeli komonisama.” (Luka 17:27-30) Na ntango yango mpe, “libebi ya mbalakaka” ekokómela bato mabe. (1 Batesaloniki 5:2, 3) Tokoki kozala na elikya ete lokola Yehova azali na boyengebene, soki ntango oyo akani koboma mokili ya Satana ekoki, akozelisa ata moke te.
“Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi”
18 Yango wana ntoma Petro alendisi biso ete tóbatela na makanisi “kozala ya mokolo ya Yehova”! Ndenge nini tokoki kosala yango? Tokosala yango, na ndakisa, na “misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Petro 3:11, 12) Komipesa na misala ya ndenge wana ekosalisa biso tózelaka “mokolo ya Yehova” na mposa makasi. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela na makanisi’ elimboli mpenza “kobakisa mbangu.” Ya solo, biso tokoki te kolekisa mikolo mbangumbangu mpo mokolo ya Yehova eya noki. Kasi, ntango tozali kozela mokolo yango, soki tomipesi na mosala ya Nzambe, tokomona ete ntango ekoleka noki.—1 Bakorinti 15:58.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petro
1:19—Nani azali “monzoto ya ntɔngɔ,” ntango nini abimaki, mpe ndenge nini toyebi ete likambo yango esalemaki? “Monzoto ya ntɔngɔ” ezali Yesu Kristo nsima ya kokóma mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. (Emon. 22:16) Na 1914, Yesu abimaki liboso ya bikelamu nyonso lokola Mokonzi Masiya, mpe yango emonisaki ete mokolo ya sika ebandi. Mbongwana ya Yesu ezalaki elilingi ya nkembo mpe nguya ya bokonzi na ye, mpe emonisaki bosolo ya liloba ya esakweli ya Nzambe. Kotya likebi na liloba yango engɛngisi mitema na biso, mpe na ndenge yango toyebi ete monzoto ya ntɔngɔ abimá.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Yakobo mpe na mikanda ya Petro
2:4—“Tartare” ezali nini, mpe ntango nini baanzelu oyo batombokaki babwakamaki kuna? Na ndenge ya elilingi, Tartare ezali lokola bolɔkɔ, epai batyá kaka bikelamu ya elimo, kasi bato te. Kuna, bikelamu yango bayebaka ata moke te mikano ya Nzambe mpe elikya ezali te mpo na bango. Nzambe abwakaki baanzelu oyo batombokaki na Tartare na mikolo ya Noa, mpe bazali kuna tii ntango bakobomama.