Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
04-10/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 1 YOANE 1-5
“Bólingaka mokili te to biloko oyo ezali na mokili”
Tólanda ndakisa ya Yesu
13 Bato mosusu bakoki koloba ete makambo mosusu ya mokili ezali mabe te. Atako bongo, mokili ná bisengo na yango ekoki kotinda biso tóbosana mosala ya Yehova. Lisusu, mokili ezali ata na eloko moko te oyo esalemi mpo na kosalisa biso tópusana penepene na Yehova. Yango wana, soki tokómi kolinga biloko ya mokili, ata biloko oyo ezali mpenza mabe te, tokomitya na likama. (1 Timote 6:9, 10) Epai mosusu, makambo mingi ya mokili ezali mpenza mabe mpe ekoki kobebisa biso. Soki tozali kotala bafilme ya bitumba, to oyo ezali kopesa mposa ya kozala na biloko mingi ya mokili, to oyo ezali kolakisa pite to ekobo, tokoki kobanda kondima makambo yango mpe nsukansuka tokokóma na mposa ya kosala yango. Soki tokómi baninga ya bato oyo bakanisaka kaka ndenge bakoki kokóma na bomɛngo to kosala mombongo, makambo yango ekoki kozwa esika ya liboso na bomoi na biso.—Matai 6:24; 1 Bakorinti 15:33.
Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala
18 Tokoki mpe kotɛmɛla “biloko oyo ezali na mokili” soki tobateli maloba oyo Yoane akomaki na litambwisi ya elimo santu ete: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoa. 2:17) Mokili oyo ya Satana ezali komonana lokola nde ezwá misisa mpe ezali ya malonga. Nzokande, mokolo mosusu, ekokóma na nsuka na yango. Eloko moko te oyo mokili ya Satana epesaka ekoumela libela. Komikundola likambo yango ekosalisa biso tókwea te na mitambo ya Zabolo.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema
14 Makomami ya Grɛki ya bokristo ezali na mikapo ebele oyo ekundwelaka biso ete tosengeli kolingana. Yesu alobaki ete mobeko ya mibale oyo eleki monene ezali ete “osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Mat. 22:39) Moyekoli Yakobo, oyo azalaki ndeko ya Yesu, abengaki bolingo “mobeko ya mokonzi.” (Yak. 2:8) Ntoma Yoane akomaki ete: “Bandeko ya bolingo, nazali kokomela bino, mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala oyo bozwaki banda na ebandeli.” (1 Yoa. 2:7, 8) Yoane alingaki koloba nini ntango alobelaki “mobeko ya kala”? Azalaki kolobela mobeko ya bolingo. Ezalaki “ya kala” mpamba te Yesu alobelaki yango bambula mingi liboso, “banda na ebandeli.” Kasi, mobeko yango ezalaki mpe “ya sika” mpo ezalaki kosɛnga komonisa bolingo ya komipimela, oyo ekosɛnga bayekoli bámonisa ntango bakokutana na makambo oyo bakutanaki na yango liboso te. Lokola tozali bayekoli ya Kristo, tosengeli kosepela mingi na makundoli wana oyo esalisaka biso tókima elimo ya moimi oyo etondi na mokili, oyo ekoki kopekisa biso tólinga bazalani na biso.
Bolimbisi
Ezali mabe te kosɛnga Nzambe alimbisa basusu, ata mpe bandeko ya lisangá mobimba. Yango nde Moize asalaki mpo na ekólo Yisraele ntango ayambolaki lisumu oyo ekólo yango mobimba esalaki mpe asɛngaki Yehova bolimbisi; mpe Yehova ayokaki libondeli na ye. (Mit 14:19, 20) Longola yango, na molulu ya kofungola tempelo, Salomo abondelaki Yehova ete alimbisa bato na ye soki basali lisumu mpe na nsima batiki etamboli na bango ya mabe. (1 Ba 8:30, 33-40, 46-52) Ezera alobaki na esika ya Bayuda oyo babimaki na boombo ntango abondelaki na miso ya bato nyonso mpo na koyambola masumu na bango. Libondeli oyo asalaki na motema mobimba mpe ndenge alendisaki bango esalaki ete básala makambo oyo ekotinda Yehova alimbisa bango. (Ezr 9:13–10:4, 10-19, 44) Yakobo alendisaki moto nyonso oyo azali maladi na elimo abenga bankulutu ya lisangá mpo bábondela mpo na ye, mpe “soki asalaki masumu, akolimbisama.” (Yk 5:14-16) Kasi, ezali na “lisumu moko oyo ememaka na liwa;” elingi koloba kosalela elimo santu lisumu to mpe kokoba na nko nyonso kosala lisumu oyo mpo na yango bolimbisi ezali te. Mokristo asengeli te kobondela mpo na baoyo bazali kosala lisumu ya ndenge wana.—1 Yn 5:16; Mt 12:31; Ebr 10:26, 27; talá LISUMU, I; ELIMO.
BOMOI YA BAKRISTO
“Kolanda makanisi ya mokili te ntango ozali kobongisa fɛti ya libala na yo”
Bómonisa kondima na makambo ya bomoi na bino
10 Baklisto basengeli kolekisa ndelo te mpe kozala makambo makasimakasi te; mpo na yango, Biblia ekoki kosalisa bango. Atako mokolo ya libala ezalaka mokolo ya ntina mingi, bayebaka ete yango ezali kaka ebandeli ya bomoi ya baklisto mibale oyo baponi kofanda lokola mwasi ná mobali mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko. Eloko moko te ezali kosɛngisa bango básala fɛti ya monene. Soki basepeli kosala fɛti mpo na libala na bango, bakotánga naino motuya mpe bakotalela soki fɛti yango ekozala ndenge nini. (Luka 14:28) Biblia elobi ete na libala, mobali nde azali mokonzi. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 5:22, 23) Na yango, mobali nde azali nkolo fɛti. Ya solo, akosolola na mwasi na ye mpo bápona banani bakobengisa. Ekozala mpasi bábengisa baninga mpe bandeko na bango nyonso; yango wana ekosɛnga ete bázwa bikateli oyo ebongi. Babalani bakotya motema ete soki bakoki kobengisa baklisto mosusu te, baklisto yango bakoyeba komitya na esika na bango mpe bakomona yango mabe te.—Mosakoli 7:9.
11-17/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 YOANE 1–YUDA 1–25
“Tosengeli kobunda etumba mpo na kotikala na solo”
“Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo”
8 Toyebi mayele ya Satana malamu mpamba te Biblia ezali komonisa biso ndenge asalaka. (2 Bakorinti 2:11) Zabolo asilisaki bozwi ya Yobo, abomaki bana na ye, apesaki mwasi na ye makanisi ya kotɛmɛla ye, anyokolaki ye na maladi, mpe atindaki baninga ya lokuta báloba na ye mabe. Yobo atungisamaki mingi mpe akanisaki ete Nzambe asundoli ye. (Yobo 10:1, 2) Lelo oyo, Satana akoki te kobimisela moto mikakatano nyonso wana; kasi baklisto mingi bakutanaka na yango, mpe Zabolo akoki kosalela yango mpo na kolɛmbisa bango.
9 Na mikolo oyo ya nsuka, makambo oyo ekoki kolɛmbisa na elimo ekómi ebele. Tofandi na mokili oyo bato mingi bazali kotya biloko ya mokili liboso ya mikano ya elimo. Kutu televizyo ná babuku ezali komonisa lokola nde kosala pite mpe ekobo ezali na mabe ata moko te, epesaka nde esengo. Bato mingi bakómi ‘kolinga bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.’ (2 Timote 3:1-5) Tosengeli ‘kobunda etumba makasi mpo na kondima,’ soki te, makanisi motindo wana ekobebisa elimo na biso.—Yuda 3.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Bafɛti ya bolingo
Biblia elobeli te bafɛti yango ya bolingo mpe emonisi te soki ezalaki kosalema mbala boni. (Yuda 12) Nkolo Yesu Kristo to bantoma na ye batindaki bato te básalaka bafɛti yango. Ezali polele ete esengeli te kotalela bafɛti yango lokola molulu moko oyo bato basengeli kaka kosala to esengeli kotikala libela. Bato mosusu bakanisaka ete ezalaki bafɛti oyo bakristo oyo bazalaki na bozwi bazalaki kobengisa baninga na bango bakristo oyo bazalaki babola. Bango nyonso, bitike, basi oyo mibali bakufá, bazwi mpe babola bazalaki kolya elongo na mesa oyo etondi na bilei mpo na komonisa ete bango nyonso bazali bandeko.
Libanga
Emonani ete liloba mosusu ya Grɛki, spilas, etaleli libanga ya monene to mabanga oyo ebombaná na nse ya mai. Yuda asaleli liloba yango na ndenge ya elilingi mpo na kolobela bato mosusu oyo bamikɔtisaki na ndenge ya mayele na lisangá ya bokristo na mikano ya mabe. Ndenge kaka mabanga oyo ebombaná na nse ya ebale ezalaka likama mpo na bamasuwa, bato yango mpe bazalaki likama mpenza mpo na bandeko mosusu ya lisangá. Yuda alobi boye mpo na bato yango: “Bango bazali mabanga ebombaná na nse na mai na bafɛti na bino ya bolingo ntango bazali kolya fɛti elongo na bino.”—Yuda 12.
“Asepelisaki mpenza Nzambe”
Enoka asakolaki nini? Esakweli yango elobi boye: “Talá! Yehova ayei na bamiriade na ye basantu, mpo na kokata makambo ya bato nyonso, mpe kokweisa baoyo nyonso batyolaka Nzambe mpo na misala na bango nyonso ya kotyola Nzambe oyo basalaki na ndenge ya kotyola Nzambe, mpe mpo na makambo nyonso ya kozokisa oyo basumuki, oyo batyolaka Nzambe, balobaki mpo na ye.” (Yuda 14, 15) Soki otali malamu, okomona ete Enoka alobeli esakweli yango lokola nde likambo moko oyo esalemá, lokola nde Nzambe así asali makambo nyonso oyo esakweli yango elobi. Bisakweli mingi mosusu na nsima elobamá mpe kaka ndenge wana. Yango elingi komonisa ete mosakoli alobeli likambo moko oyo ekosalema mpenza, yango wana alobeli yango lokola nde esí esalemi!—Yisaya 46:10.
“Asepelisaki mpenza Nzambe”
Kondima ya Enoka esengeli kotinda biso tómituna soki totalelaka mokili oyo ndenge Nzambe atalelaka yango. Nsango ya bitumbu oyo Enoka asakolaki na mpiko nyonso etaleli mpe mokili ya lelo kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Enoka. Ndenge likebisi ya Enoka elobaki, Yehova ayeisaki Mpela monene na mokili mabe ya ntango ya Noa. Yango emonisi ete Nzambe akoboma mpe bato mabe na mikolo ezali ekoya. (Matai 24:38, 39; 2 Petro 2:4-6) Ndenge kaka ezalaki na ntango wana, lelo oyo Nzambe ná bamiriade na ye basantu bamibongisi mpo na kopesa etumbu na mokili oyo mabe. Mokomoko na biso asengeli kozwa likebisi ya Enoka na lisɛki te mpe koyebisa yango basusu. Bandeko to baninga na biso bakoki kosundola biso. Na bantango mosusu tokoki komiyoka lokola tozangi bato. Kasi Yehova asundolaki Enoka te, akosundola mpe te basaleli na ye ya sembo lelo oyo!
18-24/11
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EMONISELI 1-3
“Nayebi makambo oyo osalaka”
Omonisaka elimo ya ndenge nini?
8 Mpo tóboya elimo ya ndenge wana, tosengeli kobosana te likambo oyo Biblia elobi ete Yesu azali “na minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali.” “Minzoto” yango ezali komonisa bankulutu oyo batyami mafuta na elimo, kasi mpe bankulutu nyonso ya masangá. Yesu akoki kotambwisa “minzoto” yango oyo ezali na lobɔkɔ na ye na ndenge oyo amoni malamu. (Em. 1:16, 20) Na yango, lokola Yesu azali Mokonzi ya lisangá, ayebi malamu makambo nyonso oyo elekaka na kati ya masangani ya bankulutu. Soki esengeli kosembola nkulutu moko na likambo moko boye, Yesu, oyo azali na ‘miso lokola lolemo ya mɔtɔ,’ akosala yango na ntango oyo ebongi mpe na lolenge oyo amoni malamu. (Em. 1:14) Kasi liboso ete asala yango, tosengeli kokoba komemya baoyo elimo santu eponi, mpamba te Paulo akomaki ete: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino.”—Ebr. 13:17.
Yehova abatelaka biso mpo na lobiko
11 Na emonaneli oyo ezali na Emoniseli mokapo 2 mpe 3, Yesu Kristo oyo asekwi atalaki makambo oyo ezalaki koleka na masangá nsambo ya Azia Moke. Kristo atalaki te kaka elimo oyo lisangá mobimba ezalaki komonisa, kasi makambo mpenza ya sikisiki. Kutu, na masangá mosusu atángaki bato, mpe mpo na likambo mokomoko, apesaki longonya to toli oyo ebongi. Yango ezali komonisa nini? Masangá nsambo ezali elilingi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo nsima ya 1914, mpe toli oyo Yesu apesaki masangá nsambo ebongi mpe mpo na masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba lelo oyo. Na yango, tokoki mpenza koloba ete Yehova azali kotambwisa basaleli na ye na nzela ya Mwana na ye. Ndenge nini tokoki kolanda litambwisi yango?
Tótambola elongo na ebongiseli ya Yehova
20 Kotambola elongo na ebongiseli ya Nzambe ezali kosɛnga tóndima mokumba oyo Nzambe apesi Yesu Klisto lokola “motó ya [lisangá, NW].” (Baefese 5:22, 23) Lisusu, Yisaya 55:4 ezali kobenda likebi na biso, kuna balobi na biso boye: “Talá [ngai Yehova] nazalisi ye motatoli epai ya bato, motambolisi mpe mokóló mpo na bato.” Ya solo, Yesu ayebi kotambwisa makambo. Mpe lisusu ayebi bampate na ye na misala na bango. Kutu, ntango atalaki masangá nsambo ya Asie Mineure, mbala mitano mobimba alobaki ete: “Nayebi misala na yo.” (Emoniseli 2:2, 19; 3:1, 8, 15) Yesu ayebi mpe bamposa na biso, ndenge moko mpe Tata na ye, Yehova, ayebi yango. Liboso ateya Libondeli ya Ndakisa, Yesu alobaki boye: “Tata na bino ayebi yango ezali bino kosɛnga naino bolɔmbi ye te.”—Matai 6:8-13.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Bokonzi ya Nzambe elongoli banguna na yango
10 Kosambisa. Na ntango wana, banguna nyonso ya Bokonzi ya Nzambe bakomona likambo moko oyo ekobakisela bango mpenza bwale. Yesu alobaki boye: “Bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata na nguya makasi mpe na nkembo.” (Mrk. 13:26) Likambo wana ya nsɔmɔ oyo Yesu akosala mpo na komonisa nguya na ye ekolakisa ete ayei kosambisa. Na esika mosusu oyo Yesu alobelaki mpe esakweli oyo etali mikolo ya nsuka, alobaki makambo ebele mpo na lisambisi yango. Makambo yango ezali na ndakisa ya bampate ná bantaba. (Tángá Matai 25:31-33, 46.) Bato ya sembo oyo bandimi Bokonzi ya Nzambe bakozala na ngámbo ya “bampate” mpe ‘bakotombola mitó na bango,’ mpo bakomona ete ‘kosikolama na bango ekómi pene.’ (Luka 21:28) Kasi, banguna ya Bokonzi bakozala na ngámbo ya “bantaba” mpe “bakomibɛtabɛta na kolela,” mpo bakomona ete “bakokufa liwa ya seko.”—Mat. 24:30; Em. 1:7.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—I
2:7—“Paradiso ya Nzambe” ezali nini? Lokola maloba yango etali bakristo batyami mafuta na elimo, na ntembe te, na vɛrsɛ yango liloba paradiso elimboli paradiso ya likoló—esika Nzambe azalaka. Bakristo bapakolami oyo bakotikala sembo bakolya “nzete ya bomoi.” Bakozwa bomoi ezangi kufa.—1 Kol. 15:53.
25/11–01/12
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EMONISELI 4-6
“Kopota mbangu ya batambwisi-mpunda minei”
Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?
Motambwisi-mpunda ya mpɛmbɛ azali nani? Kaka mokanda yango ya Emoniseli esalisi biso tóyeba ye mpo na nsima ebengi motambwisi-mpunda yango ya likoló “Liloba ya Nzambe.” (Emoniseli 19:11-13) Yesu Kristo nde abengami na titre Liloba, mpo azali molobeli ya Nzambe. (Yoane 1:1, 14) Lisusu, babengi Yesu “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo” mpe alobelami lokola moto ya “sembo mpe solo.” (Emoniseli 19:16) Ezali polele ete abongi kozala mokambi ya limpinga mpe asalelaka bokonzi na ye na ndenge ya mabe te. Kasi yango ebimisi mituna mosusu.
Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?
Ntango nini batambwisi-mpunda babandaki kopota mbangu? Simbá ete Yesu mopoti-mbangu ya liboso abandaki yango ntango bapesaki ye bokonzi. (Emoniseli 6:2) Azwaki bokonzi ntango nini? Azwaki yango mbala moko te ntango azongaki na likoló nsima ya liwa na ye. Biblia emonisi ete azelaki naino mpo na mwa ntango. (Baebre 10:12, 13) Yesu apesaki bayekoli na ye elembo mpo báyeba ntango oyo akobanda koyangela na likoló. Alobaki ete ntango akobanda koyangela, makambo ekobeba mpenza na mabele. Bitumba, kozanga bilei mpe bamaladi mabe ekozala. (Matai 24:3, 7; Luka 21:10, 11) Ntango kaka Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki na 1914, emonanaki polele ete eleko yango ebandaki; eleko ya mobulu oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.”—2 Timote 3:1-5.
Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?
Motambwisi-mpunda yango azali komonisa bitumba. Simbá ete azali kolongola kimya na bikólo nyonso na mokili mobimba. Mpo na mbala ya liboso, na 1914 etumba ebimaki na mokili mobimba. Na nsima Etumba ya Mibale ya mokili mobima ebimaki mpe ezalaki mabe koleka. Basusu balobi ete kobanda 1914 bato koleka milio 100 bakufi na bitumba mpe matata ya basoda! Longola yango, ebele ya bato mosusu mpe bazokaki bampota ya minene.
Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?
“Namonaki, mpe talá! mpunda moko ya moindo; mpe moto oyo afandi likoló na yango azalaki na emekeli-kilo na lobɔkɔ na ye. Mpe nayokaki mongongo moko lokola nde na katikati ya bikelamu yango minei ya bomoi elobi: ‘Kilo moko ya blé denari moko, mpe kilo misato ya ɔrje denari moko; mpe kobebisa mafuta ya olive ná vinyo te.’”—Emoniseli 6:5, 6.
Motambwisi-mpunda yango azali komonisa nzala. Awa ezali komonisa ndenge bakobatela mpenza bilei na boye ete kilo moko ya blé ekozala na ntalo ya denari moko, salɛrɛ ya mokolo mobimba na siɛklɛ ya liboso! (Matai 20:2) Kaka mbongo wana ekokaki kosomba kilo misato ya ɔrje, oyo blé elekaki yango na valɛrɛ. Ndenge nini yango ekoki koleisa libota ya bato ebele? Yango wana bayebisaka bato báyeba kobatela ata bilei ya mokolo na mokolo mpe ebongi mpenza ndenge emonisami na bilei lokola mafuta ya olive mpe vinyo, bilei oyo bato bazalaki kosalela mingi na ntango wana.
wp17.3 lok. 5 par 8-9; lok. 8 par. 1
Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?
Motambwisi-mpunda ya minei azali komonisa liwa oyo ekómelaka bato mpo na bampasi mpe makambo mosusu. Kaka nsima ya 1914, maladi babengi grippe espagnole ebomaki bamilio ya bato. Ekoki kozala ete bato soki milio 500 bazwaki maladi yango, elingi koloba soki ozwi bato misato moko na bango azwaki maladi yango!
Kasi grippe espagnole ezalaki kaka ebandeli. Bato ya mayele balobi ete maladi ya kolokoto ebomaki bamilio ya bato na siɛklɛ ya 20. Tii lelo, bamilio ya bato bazali kokufa na maladi lokola sida, maladi ya ntolo mpe malaria atako minganga bakolisi mayele.
Ata soki moto akufi na bitumba, nzala to na maladi, nyonso ezali kaka ndenge moko. Nkunda ezali kokoba koyamba bato yango mpe solisyo ezali te.
Tóluka biloko ya motuya ya elimo
Nkembo na kiti na bokonzi na Jéhovah
8 Yoane ayebi ete banganga baponamaki kala mpo na kosala mosala kati na tabernakle. Ekoki bongo kozala ete akamwaki na komona makambo oyo ayebisi biso sikawa ete: “Bakiti ya bokonzi ntuku mibale na minei (24) ezalaki zingazinga ya kiti yango ya bokonzi, mpe namonaki bankulutu ntuku mibale na minei bafandi na bakiti yango ya bokonzi balati bilamba ya likoló ya mpɛmbɛ, mpe na mitó na bango mitole ya wolo.” (Emoniseli 4:4) Ee, na esika ete amona banganga, amoni nde bankulutu 24, bafandi likoló na kiti na bokonzi mpe bazali na bikoti ya mikonzi na likoló na mitó na bango. Bazali banani? Ezali bato mosusu te, bobele bapakolami na lisangá na bokristo, basekwisami mpe bapesameli esika na likoló oyo Jéhovah alakaki bango. Ndenge nini toyebi yango?
Nkembo na kiti na bokonzi na Jéhovah
19 Bikelamu yango bizali elilingi ya nini? Emonaneli epesamaki na mosakoli mosusu, Ezekiele, ekosalisa biso na koyeba yango. Ezekiele amonaki Jéhovah afandaki na likalo moko kuna na likoló, mpe bikelamu na bomoi bizalaki esika moko na likalo yango, bikelamu oyo motindo na yango ekokani na oyo Yoane amonaki. (Ezekiele 1:5-11, 22-28) Na nsima Ezekiele amonaki lisusu likalo yango mpe kiti na bokonzi ezalaki likoló na yango esika moko na bikelamu na bomoi. Nde ya mbala oyo abengaki bikelamu wana na bomoi ete bacheribɛ. (Ezekiele 10:9-15) Bikelamu na bomoi minei oyo Yoane amonaki elakisi bongo ebele na bacheribɛ na Nzambe, bikelamu na lokumu mingi kati na lisangá na Ye ya elimo. Yoane akamwi te na komona ete bacheribɛ batelemi penepene na Jéhovah, mpamba te kati na tabernakle ya kala, bacheribɛ mibale basalamaki na wolo bazalaki wana na likoló na ezipeli na sanduku na kondimana, oyo ezalaki elilingi na kiti na bokonzi na Jéhovah. Mongongo ya Jéhovah ezalaki kobima na kati na bacheribɛ wana, mongongo oyo ezalaki kopesa bitinda mpe mibeko na libota ya Yisraele.—Exode 25:22; Nzembo 80:1.
“Talá! Nkɔsi ya libota ya Yuda”
5 Mbala mingi, nkɔsi emonisaka mpiko. Osilá kokutana na nkɔsi ya mobali mpenza boye na miso? Soki ɛɛ, mbala mosusu ezalaki na lopango ya banyama, wana ekangamaki na ndako na yango. Ata bongo, oyokaki nsɔmɔ. Ntango ozali kotala nyama yango ya monene mpe ya nguya, wana miso na yo ekutani na oyo na yango, ekozala mpasi ondima ete nkɔsi ekoki kokima eloko, boye te? Biblia elobeli nkɔsi “oyo ezali na nguya koleka banyama mosusu mpe oyo ezongaka nsima liboso ya eloko moko te.” (Masese 30:30) Kristo azali na mpiko ya ndenge wana.
6 Tólobela sikoyo ndenge Yesu amonisaki mpiko lokola nkɔsi na makambo misato: kolongisa solo, kosimba bosembo, mpe liboso ya botɛmɛli. Tokomona mpe ete biso nyonso, ezala tobotamá bato ya mpiko to te, tokoki komonisa mpiko na ndakisa ya Yesu.