Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr25 Janvier nk. 1-10
  • Mikanda oyo tosaleli mpo na ”Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda oyo tosaleli mpo na ”Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • 06-12/01
  • 13-19/01
  • 20-26/01
  • 27/01–02/02
  • 03-09/02
  • 10-16/02
  • 17-23/02
  • 24/02–02/03
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2025
mwbr25 Janvier nk. 1-10

Mikanda oyo tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

© 2024 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

06-12/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 127-134

Baboti​—Bókoba kobatela bana, libula na bino ya motuya

w21.08 5 par. 9

Zwá na motuya esika oyo ozali na yango na libota ya Yehova

9 Yehova apesá bato likoki ya kobota bana, mpe mokumba ya koteya bango bálinga mpe básalela ye. Soki ozali moboti, ozwaka likabo yango ya ntina mingi na motuya? Atako Yehova apesá baanzelu makoki mingi mpenza, apesá bango te likoki ya kobota bana. Yango wana soki ozali moboti, osengeli kozwa mokumba ya kobɔkɔla bana na motuya mingi. Baboti bazwá mokumba ya ntina mingi ya kobɔkɔla bana na bango na “disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4; Mib. 6:5-7; Nz. 127:3) Mpo na kosalisa baboti, ebongiseli ya Yehova ebimisá bisaleli mingi oyo elimbolaka Biblia, na ndakisa mikanda, bavideo, miziki, mpe biloko mosusu na Internet. Na ntembe te, Tata na biso ya likoló mpe Mwana na ye balingaka bana na biso mingi. (Luka 18:15-17) Yehova asepelaka ntango amonaka baboti bazali kotyela ye motema, mpe kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobatela bana na bango. Baboti yango basalisaka bana na bango bázwa elikya ya kokɔta na libota ya Yehova mpo na libela.

w19.12 27 par. 20

Baboti​—Bóteya bana na bino bálinga Yehova

20 Bóyeba bana na bino malamu. Nzembo 127 ekokanisi bana na makula. (Tángá Nzembo 127:4.) Makula esalemaka na biloko ekeseni mpe ezalaka monene mpe molai ndenge moko te; mwana na mwana mpe azalaka na ndenge na ye. Yango wana, baboti basengeli koyeba ndenge ya koteya mwana mokomoko. Ndeko moko ná mwasi na ye oyo bafandaka na Israël mpe oyo balongaki koteya bana na bango mibale básalela Yehova balobeli makambo oyo esalisaki bango; balobi boye: “Tozalaki koyekola Biblia ná mwana mokomoko.” Kasi, tata mokomoko ya libota akotala soki esengeli mpe ebongi koyekola na bana, moto na moto na esika na ye.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1 543

Milona oyo Biblia elobeli

Mokomi ya Nzembo alobelaki makambo mosusu oyo etali nzete ya olive ntango alakaki moto nyonso oyo abangaka Yehova ete: “Bana na yo bakozala lokola mwa bitape ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.” (Nz 128:1-3) Mbala mingi, ntango bakati mwa bitape ya nzete ya olive oyo ekoli, balonaka yango mpo ebima banzete ya sika. Lisusu, banzete ya olive oyo ekoli mpenza ekoki kobimisa mwa bitape na misisa na yango, mpe na bongo ekómaka ebele esika moko. Ndenge moko na bitape yango, bana bazalaka zingazinga ya tata, mpe na ndenge yango babakisaka esengo na libota.

13-19/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 135-137

“Nkolo na biso aleki mosika mpenza banzambe mosusu nyonso”

it-2 914 par. 4-5

Nguya, misala ya nguya

Nzambe amonisaka nguya na ye na biloko oyo asalá. Mpo na komimonisa ete azali Nzambe ya solo, ebongi mpenza tómizela ete amonisa ete azali na bokonzi likoló ya biloko ya nguya oyo ye asalá, mpe amonisa yango na ndenge oyo emonisi polele ete eyokani na nkombo na ye. (Nz 135:5, 6) Lokola moi, sanza, baplanɛti, mpe minzoto ebalukaka to elandaka kaka nzela moko, lokola mopɛpɛ, mbula, mpe biloko mosusu etosaka mibeko oyo atyá mpo etambwisaka yango, mpe lokola mayoyo epumbwaka na etuluku moko monene mpe bandɛkɛ balongwaka esika moko mpe kokende kofanda esika mosusu mosika mpenza, nyonso wana mpe biloko mosusu oyo esalaka na ndenge ebongi ekoki te mpo na kosantisa nkombo ya nzambe liboso ya botɛmɛli mpe losambo ya lokuta.

Kasi, Yehova Nzambe akoki kosala ete biloko oyo asalá mpe biloko mosusu emonisa bonzambe na ye na ndenge asalelaka yango mpo na kokokisa mikano ya sikisiki longola ntina oyo asalá yango, mbala mingi na ntango oyo aponi mpenza. Ata ntango makambo lokola eleko ya kokauka, mbula ya mopɛpɛ makasi, to eloko mosusu ya ndenge wana oyo euti na klima, ezalaki likambo ya kokamwa te, lokola ezalaki kosalema mpo na kokokisa esakweli moko ya Yehova ezalaki kokesenisa yango mpe na ndenge ezalaka banda kala. (Talá mpe 1Ba 17:1; 18:1, 2, 41-45.) Kasi, na mabaku mingi, makambo oyo ezalaki kosalema ezalaki kokamwisa mpenza, na ndenge eyebani to na ndenge esalemi (Kob 9:24) to mpo ezalaki kosalema na ndenge oyo ezalaka te, ndenge bakanisaki te, sika to ntango ezalaki kosalema te.​—Kob 34:10; 1Sa 12:16-18.

w21.11 6 par. 16

Bolingo ya sembo ya Yehova elimboli nini mpo na yo?

16 Soki tomindimisi ete Yehova azali esika na biso ya komibomba, tokoyoka ete tobatelami. Kasi na bantango mosusu tokoki kolɛmba nzoto mpe kokoka te kotɛlɛma mpo na kosala makambo mosusu. Na bantango ya ndenge wana, Yehova asalaka nini mpo na biso? (Tángá Nzembo 136:23.) Na boboto mpenza atyaka mabɔkɔ na ye oyo ezali koumela seko na nse na biso mpo na kotɛlɛmisa biso mpe kopesa biso makasi. (Nz. 28:9; 94:18) Ndenge oyo esalisaka biso: Koyeba ete tokoki ntango nyonso kotyela lisalisi ya Nzambe motema esalisaka biso tóbosana te mapamboli oyo mibale: Ya liboso, tozali na esika malamu ya komibomba ata soki tofandaka wapi, mpe ya mibale, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo atyelaka biso likebi.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2 1175

Yah

Liloba Yah esalelami mbala mingi mpo na kobimisa mayoki ya makasi oyo emonisami na masanzoli mpe loyembo, libondeli mpe lilɔmbɔ, mpe emonani mbala mingi na esika oyo elobeli mingimingi esengo ya kolonga etumba to kosikolama, to esika oyo bamoni lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe mpe makasi na ye. Bandakisa oyo emonisi yango ezali mingi. Maloba “Bósanzola Yah!” (Hallelujah) ebimi lokola maloba ya kosanzola Nzambe na mokanda ya Nzembo, mbala ya liboso na Nzembo 104:35. Na bisika mosusu ezali kaka na ebandeli (Nz 111, 112), ntango mosusu na kati ya loyembo (135:3), ntango mosusu mpe kaka na nsuka (Nz 104, 105, 115-117), kasi mbala mingi ezalaka na ebandeli mpe na nsuka (Nz 106, 113, 135, 146-150). Na mokanda ya Emoniseli, bikelamu ya likoló bazongeli maloba yango mbala na mbala na masanzoli na bango epai ya Yehova.​—Em 19:1-6.

Bisika mosusu oyo liloba “Yah” emonani ezali mpe komonisa esengo na ntango ya koyemba mpe kosɛnga Yehova. Tokoki kotánga loyembo ya kosikolama ya Moize. (Kob 15:2) Mokanda ya Yisaya esangisi nkombo nyonso mibale “Yah Yehova” mpo na konyata likambo malamu. (Yis 12:2; 26:4) Nsima ya kobika na ndenge ya likamwisi ntango akómaki pene ya liwa, Ezekiasi amonisaki esengo na ye na maloba ya ntɔki na ndenge azongelaki liloba Yah. (Yis 38:9, 11) Mokanda ya Nzembo esali bokeseni kati na bakufi, oyo bakoki te kosanzola Yah, mpe baoyo bazali na ekateli ya kosanzola ye bomoi na bango mobimba. (Nz 115:17, 18; 118:17-19) Nzokande bavɛrsɛ mosusu ya Nzembo elobeli mabondeli oyo esalemi mpo na komonisa botɔndi mpo na kosikola, libateli, mpe disiplini.​—Nz 94:12; 118:5, 14.

20-26/01

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 138-139

Kotika te ete kobanga epekisa yo kopesa eyano

w19.01 10 par. 10

Sanzolá Yehova na lisangá

10 Motema na yo ebɛtaka mbangumbangu soki kaka okanisi kotombola lobɔkɔ mpo na kopesa eyano? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Mingi kati na biso tobangaka mwa moke ntango tozali kopesa eyano. Mpo otika kobanga, osengeli koyeba ntina oyo obangaka. Obangaka ete obosana likambo oyo olingi koloba, to ete okopesa eyano ya malamu te? Obangaka ete eyano ya basusu ekoleka oyo ya yo? Mpo na koloba solo, ezali elembo ya malamu. Ezali komonisa ete ozali moto ya komikitisa mpe omonaka ete basusu baleki yo. Yehova asepelaka na ezaleli ya komikitisa. (Nz. 138:6; Flp. 2:3) Kasi, alingi mpe ete osanzola ye mpe olendisa bandeko na yo na makita. (1 Tes. 5:11) Alingaka yo mpe akopesa yo mpiko oyo osengeli na yango.

w23.04 21 par. 7

Tólendisanaka na makita ya lisangá

7 Okoki kotalela lisusu masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli likambo yango, mpe yango ekoki kosalisa yo. Na ndakisa, komibongisa malamu. (Mas. 21:5) Soki ozali na momesano ya komibongisa malamu, ekozala mpasi te mpo opesa biyano. Lisusu, pesáká biyano ya mikuse. (Mas. 15:23; 17:27) Kopesa eyano ya mokuse ekosala ete obanga mingi te. Mbala mosusu, eyano ya mokuse oyo ekoki kozala kaka na fraze moko to mibale ekosalisa bandeko bákanga ntina mbala moko, na esika ya kopesa eyano ya molai oyo ezali na makanisi kilikili. Eyano ya mokuse oyo opesi na maloba na yo moko, ekomonisa ete omibongisaki malamu mpe okangi mpenza ntina ya lisolo oyo bozali kolobela.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2 490 par. 9

Kolimbisa

Lisusu, Biblia esɛngi bakristo bálimbisaka basusu ntango basali bango mabe, kozanga kotalela mbala boni basali yango. (Lk 17:3, 4; Ef 4:32; Kol 3:13) Nzambe alimbisaka te baoyo baboyaka kolimbisa basusu. (Mt 6:14, 15) Kasi, ata soki lisumu ya monene esali ete “moto mabe” alongolama na lisangá, moto yango akoki kolimbisama na ntango oyo ebongi soki amonisi ete abongoli mpenza motema. Na ntango yango, bandeko nyonso na lisangá bakoki komonisela ye bolingo na bango. (1Ko 5:13; 2Ko 2:6-11) Kasi, bakristo basɛngisami te kolimbisa baoyo bazali kosala masumu minene na nko kozanga kobongola motema. Bato ya ndenge wana bakómaka banguna ya Nzambe.​—Ebr 10:26-31; Nz 139:21, 22.

27/01–02/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 140-143

Salá na boyokani na mabondeli oyo osalaki mpo na kosɛnga lisalisi

w22.02 12 par. 13-14

“Yoká maloba ya bato ya bwanya”

13 Taleláká toli lokola bolingo oyo Nzambe azali komonisela yo. Yehova alingaka tózala na bomoi oyo eleki malamu. (Mas. 4:20-22) Ntango apesi biso toli na nzela ya Liloba na ye, ya mokanda moko ya moombo ya sembo, to na nzela ya mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo, amonisaka ete alingaka biso. Baebre 12:9, 10 elobi ete ‘asalaka bongo mpo na bolamu na biso.’

14 Tyá likebi na toli yango moko, kasi te na lolenge oyo epesami. Na bantango mosusu, tokoki komona ete toli oyo tozwaki epesamaki na ndenge ya malamu te. Ya solo moto oyo azali kopesa toli asengeli kosala makasi mpo toli yango epesama na boboto. (Gal. 6:1) Kasi soki ezali biso nde bazali kopesa toli, ekozala malamu tótya likebi na toli yango moko, ata soki tomoni ete ekokaki kopesama na lolenge ya malamu koleka. Tokoki komituna boye: ‘Ata soki tosepeli te na ndenge oyo toli yango epesamaki, ata likambo moko ya solo na toli yango ezali te? Nakoki koboya kotala mabunga ya mopesi-toli mpe kozwa mateya na toli yango moko?’ Ekozala likambo ya bwanya soki tozali kosala nyonso mpo tózwa mateya na toli nyonso oyo tozwi.​—Mas. 15:31.

w10 15/3 32 par. 4

Tóbatela “bopɛto ya motema” na mikolo oyo mabe

Mitungisi ya batɛmɛli, mikakatano ya nkita, mpe maladi makasi ekómaki kilo epai ya basaleli mosusu ya Nzambe. Na ntango mosusu, mitema na bango etindaki bango bákóma na makanisi oyo ebongi te. Ata Mokonzi Davidi akutanaki na likambo ya ndenge wana: “Elimo na ngai ezali kolɛmba makasi na kati na ngai; motema na ngai ekómi kilo.” (Nz. 143:4) Nini esalisaki ye alonga na ntango wana ya mpasi? Davidi amikundwelaki makambo oyo Nzambe asalaki mpo na basaleli na ye, mpe ndenge oyo abikisaki ye. Akanisaki na mozindo na makambo oyo Yehova asalaki mpo na nkombo na ye monene. Davidi akobaki komibanzabanza mpo na misala ya Nzambe. (Nz. 143:5) Ndenge moko, kokanisa na mozindo Mozalisi na biso mpe makambo nyonso oyo asali mpe azali kokoba kosala mpo na biso ekosalisa biso ata ntango tozali komekama.

w15 15/3 32 par. 2

Likanisi ya kobala “na kati ya Nkolo kaka” esilá ngala?

Na ntango mosusu okoki komiyoka lokola Davidi, oyo alobaki ete: “Ee salá mbangu, yanolá ngai, ee Yehova. Elimo na ngai ekómi na nsuka. Kobombela ngai elongi na yo te.” (Nzembo 143:5-7, 10) Kolɛmba nzoto te. Pesá Yehova ntango ya komonisa yo likambo oyo alingi osala. Yokáká Yehova na nzela ya botángi ya Biblia mpe komanyola na mozindo na makambo oyo otángi. Yango ekosalisa yo oyeba oyo Yehova azali kosɛnga yo mpe ndenge oyo asalisaki basaleli na ye na kala. Soki ozali koyoka ye, okozala na ekateli ya kokoba kotosa ye.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2 1134

Ngɛngɛ

Na ndenge ya elilingi. Maloba ya lokuta, ya kokosela bato makambo oyo bato mabe balobaka oyo ebebisaka mpenza lokumu ya moto, ezali lokola ngɛngɛ ya nyoka oyo ebomaka. (Nz 58:3, 4) Mpo na baoyo bakoselaka bato makambo, Biblia elobi: “Ngɛngɛ ya etupa ezali na nse ya mbɛbu na bango” (to, “nsima ya mbɛbu na bango”), ndenge kaka ngɛngɛ ya nyoka ezalaka na nsima ya mbɛbu mpe na mbanga na ye ya likoló. (Nz 140:3; Ro 3:13) Lolemo ya moto, soki asaleli yango mpo na kokosela bato makambo, kotɔnga basusu, koteya mateya ya lokuta, to koloba maloba mosusu oyo esalaka mabe, “etondi na pwazɔ oyo ebomaka.”​—Yak 3:8.

03-09/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 144-146

“Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”

w18.04 32 par. 3-4

Mituna ya batángi

2. Ndimbola yango eyokani na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo emonisi ete Nzambe alaki kopambola basaleli na ye ya sembo. Nzembo 144 emonisi elikya oyo Davidi akómaki na yango ete lokola Nzambe abikisaki Bayisraele na mabɔkɔ ya banguna, akopesa bango esengo mpe bomɛngo. (Balevi 26:9, 10; Kolimbola Mibeko 7:13; Nzembo 128:1-6) Na ndakisa, Kolimbola Mibeko 28:4 elobi ete: “Mbuma ya libumu na yo ekopambolama mpe mbuma ya mabele na yo mpe bana ya nyama na yo ya mboka, bana ya ngɔmbɛ na yo mpe bana ya mpate na yo.” Kutu, na boyangeli ya Salomo mwana ya Davidi, bato ya ekólo bazalaki na kimya mpe bomɛngo mingi koleka na bileko nyonso. Longola yango, makambo oyo esalemaki na boyangeli ya Salomo emonisaki mwa moke makambo oyo ekosalema na boyangeli ya Masiya.​—1 Bakonzi 4:20, 21; Nzembo 72:1-20.

Na mokuse, kobongisama ya maloba ya Nzembo 144 ebongoli te boyebi na biso ya mateya ya Biblia. Kasi, esali ete nzembo yango mobimba emonisa polele elikya oyo basaleli ya Yehova bazalaka na yango banda kala: Nzambe akobebisa bato mabe mpe akopesa bayengebene kimya mpe bomɛngo libela na libela.​—Nzembo 37:10, 11.

w22.10 28 par. 16-17

Batelá elikya na yo ya bokristo makasi

16 Elikya na biso ya bomoi ya seko ezali likabo moko ya motuya oyo euti na Nzambe. Tozali kozela na mposa makasi bomoi malamu na mikolo ezali koya, oyo tozali na elikya ete ekokokisama mpenza. Elikya yango ezali lokola longo, oyo esalisaka biso tótɛlɛma ngwi mpe tóyikela mikakatano, minyoko, ata mpe liwa mpiko. Elikya yango ezali lokola ekɔti, oyo ebatelaka makanisi na biso mpo tókoka koboya makambo ya mabe mpe tókangama na oyo ezali malamu. Elikya na biso oyo euti na Biblia esalisaka biso tópusana penepene na Nzambe mpe emonisi ete Nzambe alingaka biso mingi. Tozwaka mapamboli mingi ntango tobatelaka elikya na biso mpe tokómisaka yango makasi.

17 Na mokanda na ye epai ya Baroma, ntoma Paulo alendisaki bango ‘básepelaka na elikya.’ (Rom. 12:12) Ntoma Paulo akokaki kosepela mpo ayebaki ete soki atikali sembo, akozwa bomoi ya seko kuna na likoló. Biso mpe tokoki kosepela na elikya na biso mpo tozali na kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye. Mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Esengo na ye . . . oyo elikya na ye ezali epai ya Yehova Nzambe na ye, . . . ye oyo azali kobatela bosolo mpo na libela.”​—Nz. 146:5, 6.

w18.01 26 par. 19-20

Bolingo ya ndenge nini epesaka esengo ya solosolo?

19 Mokili ya Satana ezali konyokola bato esili koleka bambula. Sikoyo, na mikolo oyo ya nsuka, mokili etondi na bato oyo bamilingaka koleka ndelo, oyo balingá mbongo, mpe bisengo. Balukaka kaka kozwa mpe kokokisa libosoliboso bamposa na bango moko. Kasi, bato ya ndenge wana bakoki kozala na esengo ya solosolo te. Nzokande Biblia elobi: “Esengo na ye oyo Nzambe ya Yakobo nde mosungi na ye, oyo elikya na ye ezali epai ya Yehova Nzambe na ye.”​—Nzembo 146:5.

20 Basaleli ya Yehova bazali kolinga ye lisusu mingi, mpe mbula na mbula, bato mosusu mingi bazali koyekola koyeba ye mpe kolinga ye. Yango emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela, mpe ete mosika te ekomema mapamboli oyo tokoki kokanisa te! Mpo tózala na esengo ya solosolo, tosengeli kosala oyo Yehova alingi mpe kosepelisa ye. Bato oyo balingaka Yehova bakozala na esengo libela na libela! Na lisolo oyo elandi, tokoyekola bizaleli mosusu ya mabe oyo bolingo ya moimi ebimisaka. Tokomona mpe ndenge bizaleli yango ekeseni na bizaleli ya basaleli ya Yehova.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1 125 par. 1

Nyama

Biblia eteyaka biso ete tosengeli kosalela banyama makambo na bosembo mpe boboto. Kutu, Yehova ye moko amimonisi lokola Moto oyo akokisaka bamposa na bango mpe abatelaka bango na bolingo. (Mas 12:10; Nz 145:15, 16) Mobeko ya Moize elobaki ete esengeli kobatela malamu banyama ya mboka. Soki moto amoni nyama oyo ebungi, asengelaki komema yango tii epai ya nkolo na yango; ntango nyama ekwei na nse ya mokumba, esengelaki kolongola mokumba yango. (Kob 23:4, 5) Ntango nyama ezali kosala mosala, esengelaki kosalela yango makambo lokola bato. (Mib 22:10; 25:4) Ndenge moko na bato, nyama mpe ezalaki kopema na Sabata. (Kob 20:10; 23:12; Mib 5:14) Esengelaki kokɛngɛla nyama ya kanza to koboma yango. (Eba 9:5; Kob 21:28, 29) Epekisamaki kotya banyama ya motindo ekeseni esangisa nzoto.​—Le 19:19.

10-16/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE NZEMBO 147-150

Tozali na bantina mingi ya kosanzola Yah

w17.07 18 par. 5-6

Mpo na nini tosengeli ‘kosanzola Yah’?

5 Yehova asukaki kaka te na kobɔndisa ekólo mobimba, abɔndisaki mpe Moyisraele mokomoko. Yehova asalaka mpe bongo lelo. Mokomi ya nzembo alobaki ete Nzambe “abikisaka baoyo bazoki na motema, mpe akangaka bampota na bango.” (Nzembo 147:3) Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali kobɛla to kotungisama na makanisi. Alingaka kobɔndisa biso mpe kobikisa mpota ya motema na biso. (Nzembo 34:18; Yisaya 57:15) Apesaka biso bwanya mpe makasi mpo tóyika mpiko ata na mokakatano nini oyo tozali na yango.​—Yakobo 1:5.

6 Na nsima, mokomi ya nzembo atalaki likoló mpe alobaki ete Yehova “atángaka motángo ya minzoto” mpe “abengaka yango nyonso na nkombo na yango.” (Nzembo 147:4) Mokomi ya nzembo akokaki komona minzoto, kasi akokaki ata moke te koyeba motángo na yango. Lelo, bato ya siansi bayebi ete ezali na bamiliare ya minzoto na galaksi na biso. Mpe bagalaksi ekoki kozala bamiliare na bamiliare na molɔ́ngɔ́! Bato bakoki te koyeba motángo ya minzoto nyonso, kasi Mozalisi na biso ayebi. Kutu, ayebi monzoto mokomoko malamu mpe apesá yango nkombo. (1 Bakorinti 15:41) Nzambe oyo ayebi esika monzoto mokomoko ezali ayebi mpe yo: ayebi esika ozali, ndenge ozali komiyoka, mpe oyo osengeli na yango!

w17.07 18 par. 7

Mpo na nini tosengeli ‘kosanzola Yah’?

7 Yehova atyelaka yo likebi, mpe azali na nguya ya kosalisa yo na mikakatano na yo. (Tángá Nzembo 147:5.) Okoki komona lokola mokakatano na yo eleki makasi mpe okokoka kolonga yango te. Nzambe ayebi esika makasi na yo esuki mpe ‘abosanaka te ete ozali putulu.’ (Nzembo 103:14) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosalaka mabunga mosusu mbala na mbala, mpe yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Mbala boni toyokaka mawa mpo tolobaki makambo oyo ebongi te, bamposa mabe eyelaki biso, to mpo toyokelaki basusu likunya! Yehova azali ata na bolɛmbu moko te, kasi ayebi malamu ndenge tomiyokaka.​—Yisaya 40:28.

w17.07 21 par. 18

Mpo na nini tosengeli ‘kosanzola Yah’?

18 Mokomi ya nzembo ayebaki ete na kati ya bikólo nyonso ya mabele, Yehova aponaki ekólo Yisraele mpo ezala ekólo ya bato na ye. Yango nde ekólo kaka moko oyo Nzambe apesaki “liloba na ye” mpe “malako na ye.” (Tángá Nzembo 147:19, 20.) Lelo, tozali na lokumu monene ya kobengama na nkombo ya Nzambe. Tozali na botɔndi ndenge toyebi ye, ndenge Liloba na ye etambwisaka biso, mpe ndenge tokoki kozala na boyokani malamu na ye. Ndenge moko na mokomi ya Nzembo 147, okoki kozwa bantina ebele ya ‘kosanzola Yah’ mpe kolendisa basusu básala yango.

Biloko ya motuya ya elimo

it-2 438

Ndɛkɛ

Mokomi ya nzembo asɛngaki “bandɛkɛ oyo ezali na mapapu” esanzola Yehova (Nz 148:1, 10), mpe bandɛkɛ esalaka yango na lolenge oyo ezali mpe ndenge ekelamá na lolenge ya kokamwa. Ndɛkɛ moko akoki kozala na nsala 1000 to koleka ata 20000. Kasi, nsala mokomoko ezali na mwa tiyo oyo ezali na bankama ya nsuki ya mikemike, mpe nsuki yango mokomoko ezali na bansuki mosusu ye mikemike mpenza ná bakroshɛ ya mikemike mpenza. Na yango balobaka ete nsala moko mpamba ya ebenga oyo ezali na molai ya santimɛtrɛ 15 ezali na bankama mosusu ya nsuki ya mikemike mpe bamilio ya bakroshɛ ya mikemike mpenza. Mibeko ya molɔ́ngɔ́ oyo esalisaka mapapu mpe nzoto ya ndɛkɛ epumbwa ebongisami malamu mpenza mpe esalaka malamu koleka oyo ya bampɛpɔ ya mikolo na biso. Mikuwa ya ndɛkɛ oyo ezalaka lokola tiyo esalaka ete ndɛkɛ ezala pɛpɛlɛ, mpe na bongo mikuwa nyonso ya ndɛkɛ babengi frégate oyo ezalaka mɛtrɛ 2 ekoki kozala kaka na gramɛ soki 110. Epai ya bandɛkɛ ya minene, mikuwa mosusu ya mapapu ezalaka na biloko oyo esimbaka makasi batiyo na yango, lokola oyo ezalaka na mapapu ya mpɛpɔ.

17-23/02

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 1

Bilenge​—Bokoyoka nani?

w17.11 29 par. 16-17

Kotika eloko te ezangisa yo libonza

16 Mbala mosusu ozali elenge mpe ozali komona ete baboti bamityaka na esika na yo te mpe bazali makambo makasi. Mbala mosusu epesaka yo nkanda makasi mpe ozali komituna soki osengeli kutu kosalela Yehova. Kasi soki otiki Yehova, okomona ete moto moko te na mokili alingaka yo koleka baboti na yo oyo bazali bakristo mpe baninga na yo na lisangá.

17 Kanisá naino: Soki baboti na yo basembolaka yo te, okomituna te soki balingaka yo mpenza? (Baebre 12:8) Ezali solo ete bazali bato ya kokoka te, yango wana ndenge bapesaka yo disiplini ekoki kosilikisa yo. Kotyela yango likebi te. Kasi, lukáká koyeba ntina oyo balobi na yo to basali yo likambo moko. Fandá kimya, mpe salá makasi otomboka te. Biblia elobi: “Moto nyonso oyo apekisaka maloba na ye azali na boyebi, mpe moto ya bososoli azali na elimo ya kimya.” (Masese 17:27) Mityelá mokano ya kokóma moto oyo akɔmɛli, oyo andimaka toli mpe azwelaka yango liteya ata soki epesami ndenge nini. (Masese 1:8) Kobosana ata moke te ete kozala na baboti oyo balingaka Yehova ezali likabo ya motuya. Balingi kosalisa yo mpo ozwa bomoi ya seko.

w05 15/2 19-20 par. 11-12

Tóbatela bomoto na biso ya boklisto

11 Luká kosepelisa Nzambe, kasi bato te. Moto nyonso alukaka kozala na kati ya bato oyo bazali na bizaleli oyo asepelaka na yango. Moto nyonso alingaka kozala na baninga, mpe soki bato mosusu bandimi biso, toyokaka malamu. Ntango moto azali kokola, ata mpe ntango akómi mokóló, azalaka na mposa makasi ya kolanda makambo ya baninga, mposa wana etindaka ye asala lokola bato mosusu to aluka kosepelisa bango. Kasi, baninga balukaka ntango nyonso bolamu na biso te. Ntango mosusu balukaka kaka bato oyo bakolanda bango mpo na kosala makambo ya mabe. (Masese 1:11-19) Mbala mingi moklisto oyo akómi kolanda baninga ya mabe alukaka kobomba bomoto na ye. (Nzembo 26:4) Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Bólanda bizaleli ya bato ya mokili oyo té.” (Baloma 12:2, Bible na Lingala ya lelo oyo) Yehova apesaka biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na kolonga mposa nyonso ya kolanda makambo ya baninga.​—Baebele 13:6.

12 Ntango mposa ya kolanda makambo ya baninga ekómi kotinda biso tóbosana ete tozali baklisto, ezali malamu tóbosana te ete kozala sembo epai ya Nzambe ezali na ntina koleka makanisi ya bato to banzela oyo bato mingi bazali kolanda. Maloba ya Exode 23:2 ezali na toli ya malamu mpenza mpo na biso: “[Okolanda] ebele mpo na kosala mabe te.” Ntango bana ya Yisalaele mingi bazangaki kondima ete Yehova akoki kokokisa makambo oyo alakaki, Kalebe aboyaki na motema moko kolanda makanisi ya bato ebele. Azalaki mpenza na kondima ete bilaka ya Nzambe ekozanga te kokokisama, mpe ezaleli wana ememelaki ye ebele ya mapamboli. (Mituya 13:30; Yosua 14:6-11) Yo mpe okoboya kolanda makanisi ya bato mpo na kobatela boninga na yo ná Nzambe?

Biloko ya motuya ya elimo

it-2 1005

Zoba

Na Biblia, liloba “zoba” emonisaka te moto oyo azangi mayele, mbala mingi emonisaka nde moto oyo aboyi mpenza kosalela bososoli mpe alandi etamboli ya mabe oyo eyokani te na mibeko ya sembo ya Nzambe. Maloba ndenge na ndenge ya Ebre oyo emonisi moto ya ndenge wana ezali kesil (‘zoba’; Mas 1:22), ʼèwilʹ (“zoba”; Mas 12:15), naval (“zoba”; Mas 17:7), mpe léts (“motyoli”; Mas 13:1). Liloba ya Grɛki aphrôn elimboli “zoba” (Lk 12:20), anoêtos “bazoba” (Ga 3:1), mpe môros ‘zoba’ to “bazoba” (Mt 23:17; 25:2).

24/02–02/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 2

Mpo na nini osengeli kozala molende na boyekoli na yo moko?

w22.08 18 par. 16

‘Kobá kotambola na kati ya solo’

16 Biso nyonso te nde tolingaka kotánga mpe koyekola. Kasi Yehova azali kosɛnga biso ‘tókoba koluka’ mpe ‘tókoba kolukaluka’ mpo na koyeba solo na mozindo. (Tángá Masese 2:4-6.) Ntango tosalaka milende ya bongo, tozwaka ntango nyonso matomba. Na oyo etali boyekoli na ye moko ya Biblia, ndeko Corey alobi ete atyaka makanisi na ye na vɛrsɛ moko na mbala moko. Alobi boye: “Natángaka banɔti nyonso, natalaka mitindami nyonso mpe nasalaka bolukiluki mosusu. . . . Koyekola ndenge wana esalisaka ngai nayeba makambo mingi mpenza!” Ezala tosalelaka mayele ya ndenge wana to mosusu, tomonisaka ete tozali na botɔndi mpo na solo ntango tosalaka milende mpe tozwaka ntango mpo na koyekola yango.​—Nz. 1:1-3.

w22.10 19 par. 3-4

Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi

3 Bwanya ekoki kozala likoki ya kosalela makambo oyo toyebi mpo na kozwa bikateli ya malamu. Kasi, bwanya ya solosolo esuki kaka wana te. Yango wana, Biblia elobi: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya, mpe boyebi ya Oyo Aleki Bosantu, yango nde mayele.” (Mas. 9:10) Na yango, soki tolingi kozwa ekateli moko ya ntina, tosengeli kolanda makanisi ya Yehova to “boyebi ya Oyo Aleki Bosantu.” Tokoki kosala yango soki tozali kotánga Biblia mpe mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Ntango tosalaka yango, tomonisaka bwanya ya solosolo.​—Mas. 2:5-7.

4 Bwanya ya solosolo ekoki kaka kouta epai ya Yehova. (Rom. 16:27) Mpo na nini tokoki koloba ete bwanya eutaka epai ya Yehova? Ya liboso, mpo azali Mozalisi mpe ayebi makambo nyonso etali bozalisi. (Nz. 104:24) Ya mibale, makambo nyonso oyo Yehova asalaka emonisaka ete azali na bwanya. (Rom. 11:33) Ya misato, baoyo nyonso basalelaka toli ya bwanya ya Yehova, bazwelaka yango matomba. (Mas. 2:10-12) Soki tolingi kozala na bwanya ya solosolo, tosengeli kondima makambo wana misato ya moboko mpe kotika yango etambwisa biso ntango tolingi kozwa bikateli to kosala likambo moko.

w16.09 23 par. 2-3

Bilenge: Bókómisa kondima na bino makasi

2 Lelo oyo, bato mingi bandimaka te ete Nzambe akelá biso. Soki ozali elenge oyo azali kosalela Yehova to ozali koyekola koyeba ye, ntango mosusu okoki komituna ndenge oyo okoki komonisa ete ye nde azali Mozalisi na biso. Biblia esalisaka biso tókanisa malamumalamu na makambo oyo tozali koyoka to kotánga mpe tósosola yango. Liloba ya Nzambe elobi: “Likoki ya kokanisa ekokɛngɛla yo.” Na ndenge nini? Ekosalisa yo obengana makanisi oyo ezali solo te mpe okómisa makasi kondima na yo epai ya Yehova.​​—Tángá Masese 2:10-12.

3 Mpo na kozala na kondima makasi epai ya Yehova, tosengeli koyeba ye malamu. (1 Timote 2:4) Yango wana, ntango ozali kotánga Biblia mpe mikanda na biso, ezali na ntina mingi opemaka mwa moke mpe okanisa likambo oyo bazali kolobela. Luká kokanga ntina ya likambo oyo ozali kotánga. (Matai 13:23) Soki ozali koyekola na ndenge wana, okondimisama mpenza ete Yehova azali Mozalisi na biso mpe ete Biblia eutá epai na ye. (Baebre 11:1) Tótalela ndenge oyo tokoki kosala yango.

Biloko ya motuya ya elimo

it-1 1195 par. 4

Bosembo

Moto akoki kozala na bosembo ya ndenge wana, na makasi na ye moko te, kasi nde soki azali na kondima makasi mpe atyeli Yehova mpe nguya na Ye ya kobikisa motema. (Nz 25:21) Nzambe alaki ete akozala “nguba” mpe “esika makasi ya libateli,” akobatela nzela ya baoyo batambolaka na bosembo. (Mas 2:6-8; 10:29; Nz 41:12) Ndenge balukaka ntango nyonso kondimama na Yehova esalaka ete bátɛngatɛnga te na bomoi na bango, mpe yango esalisaka bango bákokisa mokano na bango. (Nz 26:1-3; Mas 11:5; 28:18) Atako, ndenge Yobo amonisaki yango, moto oyo azangi mbeba akoki konyokwama mpo na mibeko ya bato mabe mpe mbala mosusu kokufa elongo na bato mabe, Yehova alobi ete ayebi malamu bomoi ya moto oyo azangi mbeba mpe alaki ete libula ya moto ya ndenge wana ekokoba, akozala na kimya na mikolo ekoya, mpe akozwa biloko ya malamu. (Yb 9:20-22; Nz 37:18, 19, 37; 84:11; Mas 28:10) Ndenge kaka ezalaki mpo na Yobo, ezali bosembo kasi bozwi te nde esalaka ete moto azala na motuya mingi mpe bápesa ye limemya. (Mas 19:1; 28:6) Bana oyo bazali na moboti ya ndenge wana bakoki kotángama bato ya esengo (Mas. 20:7), mpo bakoki kozwa eloko ya motuya mingi: ndakisa ya tata na bango, mpe bakoki kosepela na nkombo malamu na ye mpe bakozwa limemya oyo bazalaki kopesa ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto