Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita bomoi mpe mosala
© 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
05-11/05
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 12
Mosala makasi ezali na mbano
Ezaleli oyo esepelisaka Nzambe mpe ezali na motuya mingi koleka diama
Ekoki kozala mpasi mingi mpo na basaleli mosusu ya Yehova kozwa mbongo mpo na kokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo. Atako bongo, na esika ya koluka nzela mokuse mpe oyo ebongi te, basalaka mosala makasi mpe na molende. Ntango basalaka bongo, bamonisaka ete bizaleli malamu ya Nzambe, lokola bosembo, ezali na motuya mingi koleka biloko nyonso ya mosuni.—Mas. 12:24; Ef. 4:28.
Ndenge ya kosepela na mosala ya makasi
Eleki malamu kokanisa na motuna oyo ya nsuka mpo mosala epesaka esengo mpenza ntango tomonaka matomba oyo ememelaka basusu. Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Longola bato oyo bazwaka mbala moko matomba na mosala na biso, na ndakisa bakiliya mpe bapatrɔ, ezali na bato mosusu oyo bazwelaka yango mpe matomba. Na ndakisa bato ya libota na biso mpe baoyo bazali kokelela.
Bato ya libota na biso. Ntango mokonzi ya libota azali kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya bato ya libota na ye, akosunga bango na balolenge mibale. Ya liboso, bato ya libota na ye bakozanga te biloko ya ntina; na ndakisa bilei, bilamba mpe esika ya kolala. Na ndenge yango, akokokisa mokumba oyo Nzambe apesá ye ya “kopesa bato na ye, . . . biloko oyo basengeli na yango.” (1 Timote 5:8) Ya mibale, moto oyo asalaka na molende mpo na koleisa libota na ye ateyaka na ndakisa na ye ntina ya kosala mosala ya makasi. Shane, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi boye: “Tata na ngai azali ndakisa malamu ya moto oyo asalaka mosala malamu. Azali moto ya sembo oyo asalaki mosala makasi bomoi na ye mobimba, mingimingi lokola mosali-mabaya. Ndakisa na ye esalisaki ngai nayeba ntina ya mosala ya mabɔkɔ, kosala biloko oyo esalisaka mpenza bato mokolo na mokolo.”
Baoyo bazali kokelela. Ntoma Paulo apesaki bakristo toli ete ‘básala mosala makasi . . . mpo bázala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.’ (Baefese 4:28) Ya solo, soki tozali kosala makasi mpo na kokokisa bamposa na biso mpe ya libota na biso, tokozala mpe na likoki ya kosalisa baoyo bazali kokelela. (Masese 3:27) Na yango, kosala mosala ya makasi ekosalisa biso tózwa esengo monene oyo eutaka na kopesa.
Biloko ya motuya ya elimo
Nayebaka kokanga motema liboso ya mikakatano?
● Talelá mokakatano na yo na ndenge oyo ebongi. Yekolá kokesenisa mokakatano ya monene mpe mokakatano ya moke. Biblia elobi: “Zoba amonisaka nkanda na ye nokinoki, kasi moto ya ekɛngɛ akangaka motema ntango bapesi ye nkanda.” (Masese 12:16) Esengeli te makambo nyonso elya yo nzoto.
“Na eteyelo, bana bamilelaka mingi mpenza mpo na makambo ya mikemike. Na nsima, soki baninga balobeli makambo yango na basite ya kosolola na baninga, nkanda na bango ezalaki koya makasi. Mpe yango esalaka ete bákolisa te likoki ya kotalela mikakatano na ndenge oyo ebongi.”—Joanne.
12-18/05
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 13
“Mwinda ya bato mabe” ekosa yo te
it-2 109 par. 4-5
Mwinda
Bisika mosusu oyo esalelami na ndenge ya elilingi. Eloko oyo moto atalelaka mpo na kongɛngisa nzela na ye emonisami na ndenge ya elilingi na mwinda. Mokanda ya masese esaleli elilingi yango mpo na kokesenisa bato ya sembo na bato ya mabe, elobi: “Pole ya bato ya sembo engɛngaka makasi; kasi mwinda ya bato mabe ekobomama.” (Mas 13:9) Pole ya moto ya sembo ekobaka se kongɛnga, kasi ata soki ezali komonana ete mwinda ya moto mabe ezali kongɛnga makasi mpe ezali komonana ete nzela na ye ezali kolonga, Nzambe akoboma mwinda yango, akokómisa nzela na ye molili, epai makolo na ye ekobɛta libaku. Yango nde ekokómela moto oyo alakelaka tata na ye ná mama na ye mabe.—Mas 20:20.
Maloba ‘mwinda na ye ekobomama’ elimboli mpe ete azali na avenire te. Mokapo mosusu Masese elobi: “Mikolo ekoya ekozala malamu te mpo na bato mabe; mwinda ya bato mabe ekobomama.”—Mas 24:20.
Tósalela Nzambe oyo apesaka bonsomi
3 Lokola Satana alongaki kokosa bato mibale oyo bazalaki bato ya kokoka, bakisá mpe ebele ya baanzelu, báboya bokonzi ya Nzambe, akoki mpe kokosa biso. Mayele na ye ebongwani te. Alukaka kotinda biso tókanisa ete mibeko ya Nzambe ezali kilo, ete epekisaka biso tózala na esengo mpe tósepela na bomoi. (1 Yoa. 5:3) Soki tozali ntango nyonso elongo na bato oyo bakanisaka ndenge wana, biso mpe tokoki kobanda kokanisa bongo. Ndeko mwasi moko ya mbula 24, oyo akweaki na pite, alobaki boye: “Ezali mpenzampenza baninga nde bapusaki ngai nasala makambo ya mabe, mingimingi mpo nazalaki kobanga bámona ete makanisi na ngai ekeseni na oyo ya bango.” Mbala mosusu yo mpe okutaná na likambo ya ndenge wana.
“Moto nyonso ya mayele akosala na boyebi”
Moto ya ekɛngɛ mpe ya sembo oyo asalaka na boyebi ya solosolo akopambwama. Salomo alobi na biso boye: “Moyengebene [azali kolya tii akotondisa, NW] motema na ye; nde libumu ya bato mabe ekozanga.” (Masese 13:25) Yehova ayebi oyo ezali malamu mpo na biso na makambo nyonso ya bomoi: na makambo na biso ya libota, na boyokani na biso na bato, na mosala na biso ya kosakola, to ntango bapesi biso disipilini. Mpe soki tozali kosalela malamu toli oyo ezali na kati ya Liloba na ye, tokozala mpenza na bomoi ya malamu koleka.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1 109 par. 3
Bolingo
Bolingo oyo ebongi te. Mpo na bantina yango, ezali polele ete moto akoki komonisa bolingo ya solosolo, bolingo oyo ebongi, kaka soki aluki mpe alandi litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe boyebi oyo euti na Liloba na Ye. Na ndakisa, moboti akoki kolinga mwana na ye. Kasi akoki kobebisa bolingo yango mpe akoki komonisa bolingo na ndenge oyo ebongi te soki akómi kolanda mayoki na ye, mpe kopesa mwana eloko nyonso oyo asɛngi mpe kotika ye asala oyo alingi. Akoki kotika kosalela bokonzi na ye ya moboti mpo na kopesa mwana disiplini to na bantango mosusu etumbu. (Mas 22:15) Bolingo yango ya mabe ezali kaka lolendo ya libota, oyo ezali nde ezaleli ya moimi. Biblia elobi ete moto oyo asalaka bongo alingaka mwana na ye te; ayinaka ye nde mpo azali te kosala makambo oyo ekobikisa bomoi ya mwana na ye.—Mas 13:24; 23:13, 14.
19-25/05
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 14
Kanisáká malamu liboso osala likambo na ntango ya likama
Zwá na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá yo
10 Na bantango mosusu, tokoki te kopekisa likama moko boye esalema. Na ndakisa, makama oyo ebimaka yango moko, bamaladi mabe to bitumba. Nzokande, soki makambo ya bongo esalemi, tokoki komibatela mpe kobatela bomoi na biso soki tozali kotosa mitindo oyo bakonzi bazali kopesa ya kolongwa na esika yango mpe malako mosusu. (Ro. 13:1, 5-7) Tokoki komibongisa mpo na makama mosusu liboso ebima. Na yango, tosengeli kotosa malako oyo bakonzi ya leta bazali kopesa mpo na komibatela. Na ndakisa, tokoki komona malamu tóbomba mwa mai, biloko oyo epɔlaka te, to mwa bankisi oyo tosengeli na yango nokinoki.
11 Tosengeli kosala nini soki maladi moko ya mabe ezali kopalangana na esika oyo tofandi? Tosengeli kotosa malako oyo bakonzi ya leta bazali kopesa, na ndakisa, kosukolaka mabɔkɔ, kozala mosika na bato, kolata maskɛ mpe kozala na esika ya biso moko soki tozwi maladi yango. Soki tozali kotosa malako yango, tokomonisa ete tozwaka na motuya likabo ya bomoi oyo Nzambe apesá biso.
12 Ntango makama ya mbalakaka ebimi, tokoki koyoka bansango ya lokuta epai ya baninga, bato ya kartye, na tv na basite Internet ya kosolola na baninga to mpe na banzela mosusu. Na esika ya kondima “bansango nyonso” oyo tozali koyoka, ekozala malamu toyokaka nde bansango oyo ebongi kotyelama motema oyo bakonzi ya leta mpe minganga bapesaka. (Tángá Masese 14:15.) Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe babiro ya filiale esalaka makasi mpo na kozwa bansango oyo ebongi liboso ya kopesa malako mpo na makita ya lisangá to mpo na mosala ya kosakola. (Ebr. 13:17) Soki tozali kolanda malako oyo bazali kopesa, tokomibatela biso moko mpe tokobatela basusu na makama. Tokobatela mpe lokumu ya ebongiseli na biso na esika oyo tofandi.—1 Pe. 2:12.
Zalá na mpiko lokola Zadoke
11 Soki basɛngi biso tósalisa bandeko ntango bomoi na bango ezali na likama, ndenge nini tokoki komonisa mpiko lokola Zadoke? (1) Landá malako. Na makambo ya ndenge wana, ezalaka na ntina mingi kotosa mpo tóbatela bomoko. Tosá malako oyo euti na Betele. (Ebr. 13:17) Bankulutu basengeli mbala na mbala kozongelaka bibongiseli oyo lisangá ezwá na oyo etali komibongisa na makama, mpe malako ya ebongiseli ya Yehova mpo na ndenge ya kosala na ntango ya likama. (1 Ko. 14:33, 40) (2) Zalá na mpiko kasi mpe ekɛngɛ. (Mas. 22:3) Salelá bososoli. Komitya na likama ezangá ntina te. (3) Tyelá Yehova motema. Kobosana te ete Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na bolamu na yo moko mpe ya bandeko. Akoki kosunga yo osalisa bandeko kozanga omitya na likama.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1 398
Likoki ya kokanisa
Nzokande, moto oyo amonisaka mpenza likoki ya kokanisa akoki mpe koyinama. Mbala mosusu likanisi yango nde emonisami na Masese 14:17 ete: “Moto oyo atalelaka makambo malamumalamu bayinaka ye.” Mbala mingi bato oyo bazwaka ntango te mpo na kokanisa basepelaka te na bato oyo basalelaka makoki na bango ya kokanisa. Ndenge moko mpe, baoyo basalelaka makoki na bango ya kokanisa mpo na kosala mokano ya Nzambe, basusu bayinaka bango. Kaka ndenge Yesu Kristo alobaki: “Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.” (Yoa 15:19) Ezali solo ete, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kotalela makambo malamumalamu” na Masese 14:17 ekoki mpe komonisa makanisi ya mabe. Na yango, maloba yango ekoki mpe kolimbola ete bayinaka moto oyo azali na makanisi ya mabe, mpe mabongoli mosusu elobi: “Bakoyina moto wa mayele mabe.”—Biblia liloba lya Nzambe.
26/05–1/06
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 15
Salisá basusu bázala na motema ya esengo
Tokotambola na ezaleli na biso ya kozanga mbeba!
16 Yobo azalaki koyamba bapaya. (Yobo 31:31, 32) Ata soki tozali na bozwi te, tokoki ‘kozala na ezaleli ya koyamba bapaya.’ (Rom. 12:13) Tokoki kokabola ata mwa eloko moke ya kolya na basusu; tóbosana te ete “elubu ya ndunda, epai bolingo ezali, ezali malamu koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta mpe koyina elongo na yango.” (Mas. 15:17) Kolya elongo na ndeko mosusu oyo abatelaka mpe bosembo, na esika oyo bolingo ezali, ekokómisa ntango yango ntango moko ya esengo mpe ya kolendisa na elimo.
Tólendisanaka “mingi koleka”
16 Okosala nini soki omonaka ete okokaka te kolendisa basusu na maloba? Mpo na koloba solo, kolendisa ezalaka mpasi mpenza te. Okoki kaka kosɛkisa moto mwa moke. Soki asɛkisi yo te, mbala mosusu azali na likambo oyo ezali kotungisa ye. Mpe soki oyoki ye na likebi, ekoki kolendisa ye.—Yak. 1:19.
17 Ndeko moko ya elenge na nkombo Henri atungisamaki makasi ntango bato ya libota na ye, ata mpe tata na ye oyo azalaki nkulutu, batikaki solo. Mokɛngɛli ya zongazonga moko amonaki ete Henri azalaki mawamawa mpe asɛngaki ye bákende komɛla mwa kafe. Ayokaki Henri na likebi mpenza. Henri amonaki ete mpo asalisa bato ya libota na ye bázongela Yehova, ye moko asengelaki kotikala sembo. Abɔndisamaki mpe ntango atángaki Nzembo 46, Sefania 3:17, mpe Marko 10:29, 30.
18 Ndakisa ya Marthe mpe ya Henri emonisi nini? Emonisi ete mokomoko na biso akoki kobɔndisa mpe kolendisa bandeko. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi! Kongɛnga ya miso esepelisaka motema; nsango oyo ezali malamu ekómisaka mikuwa mafutamafuta.” (Masese 15:23, 30) Oyebi moto moko oyo alɛmbi nzoto to azali mawamawa? Okoki kotángela ye masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to makambo oyo ezali na site Internet na biso! Lisusu, Paulo amonisaki ete koyemba nzembo ya Bokonzi elongo ekoki kolendisa. Akomaki: “Bókoba koteya mpe kokebisana na nzembo, na masanzoli mpo na Nzambe, na nzembo ya elimo elongo na eyembeli kitoko, wana bozali koyembela Yehova na mitema na bino.”—Bakolose 3:16; Misala 16:25.
Biloko ya motuya ya elimo
Mokristo akoki kondima lisalisi ya monganga?
2. Malamu nakende mpe koluka monganga mosusu mpo apesa makanisi na ye? Ezalaka malamu “ntango bapesi-toli bazali ebele,” mingimingi soki ozali na maladi moko ya makasi.—Masese 15:22.
02-08/06
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 16
Mituna misato oyo ekosalisa yo ozwa bikateli ya malamu
Zwá bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge
11 Tozwaka esengo koleka soki tozali kosalela Yehova. (Mas. 16:20) Emonanaki lokola ete Baruke, sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia abosanaki likambo yango. Na ntango moko boye, asepelaki lisusu te kosalela Yehova. Yehova alobaki na ye boye: ‘Ozali koluka makambo minene mpo na yo. Kokoba koluka yango te. Mpo talá nazali komema mpasi na ekelamu nyonso ya mosuni, . . . mpe nakopesa yo molimo na yo lokola eloko oyo epunzami na bisika nyonso oyo okokende.’ (Yir. 45:3, 5) Okanisi nini? Eloko nini ekokaki kopesa Baruke esengo, koluka makambo minene to kobika ntango Yerusaleme ekobomama mpe kotikala mosaleli ya Nzambe ya sembo—Yak. 1:12.
12 Ndeko Ramiro azali moko ya bandeko oyo ayokaki esengo ya kosalela basusu. Alobaki ete: “Nabotamá na libota moko ya bobola oyo ezali na mboka moko na bangomba ya Andes. Na yango, ntango yaya na ngai ya mobali alobaki afutela ngai mbongo mpo na kotánga na iniversite, ezalaki libaku monene. Kasi nautaki kozwa batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova, mpe nazwaki libaku mosusu: Mobongisi-nzela moko asɛngaki ngai tókende kosakola na mwa engumba moko moke. Nakendaki kuna, mpe nayekolaki kokata nsuki, mpe nafungolaki salon ya kokata nsuki mpo nazwaka mwa eloko ya kolya. Ntango toteyaki bato Makomami, mingi bandimaki na motema moko. Na nsuka, nakómaki koyangana na lisangá moko ya engumba wana oyo eutaki kobima. Nakokisi sikoyo mbula zomi na mosala ya ntango nyonso. Ata mosala moko te ekokaki kopesa ngai esengo oyo nazali na yango ya kosalisa bato báyeba nsango malamu na monɔkɔ na bango.”
Obongwaná?
BISO nyonso tosalaka makambo mosusu na kolanda ndenge oyo tobɔkwamá mpe esika oyo tofandi, elingi koloba na kolanda baninga, mimeseno ya bonkɔkɔ, mpe bongo na bongo. Yango emonanaka na ndenge na biso ya kolata, biloko oyo tolyaka, mpe bizaleli na biso.
2 Nzokande, ezali na makambo oyo ezali na ntina mingi koleka lolenge na biso ya kolata to kopona biloko ya kolya. Na ndakisa, ntango tozali kokola, balakisaka biso makambo ya malamu, oyo tosengeli kondima, mpe makambo ya mabe, oyo tosengeli koboya. Kasi, moto na moto atalelaka mabe to malamu na ndenge na ye. Kutu, tokoki kosala makambo mosusu na kolanda lisosoli na biso. Biblia elobi ete mbala mingi ‘bato ya bikólo oyo bazali na mibeko te basalaka makambo ya mibeko kaka mpo bazali bato.’ (Rom. 2:14) Kasi, yango elingi nde koloba ete na makambo oyo mibeko ya Nzambe ezali polele te tokoki kaka kolanda mimeseno mpe makanisi oyo babɔkɔlá biso na yango to kosala makambo oyo bato nyonso basalaka na esika oyo tofandi?
3 Ezali na bantina mibale ya minene oyo mpo na yango bakristo basalaka bongo te. Ya liboso, Biblia ekundweli biso ete: “Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete ebongi, kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.” (Mas. 16:25) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali te na likoki ya komitambwisa biso moko. (Mas. 28:26; Yir. 10:23) Ya mibale, Biblia emonisi ete mimeseno mpe makanisi ya mokili oyo eutaka nde epai ya Satana, “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2 Ko. 4:4; 1 Yoa. 5: 19) Yango wana, mpo Yehova apambola biso mpe andima biso, tosengeli kotosa toli oyo ezali na Baroma 12:2.—Tángá.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1 651
Disiplini
Mbuma ya kondima to ya kotyola disiplini. Bato mabe, bazoba, ná bato ya bizaleli ezangi ntina bamonisaka ete bayinaka disiplini ya Yehova na ndenge baboyaka kondima yango. (Nz 50:16, 17; Mas 1:7) Bozoba ya ndenge wana ebimisaka mbuma mabe mpe esɛngaka kopesa bango lisusu disiplini, mbala mingi etumbu ya makasi. Ndenge mokanda ya Masese emonisi yango: “Disiplini ya bazoba ezali bozoba na bango moko.” (Mas 16:22) Bozoba na bango ekoki komemela bango bobola, nsɔni, maladi, ata mpe liwa ya mobesu. Lisolo ya Bayisraele emonisi polele ete kozanga koyoka ememaka mbuma mabe. Batyaki likebi te na disiplini oyo epesamaki na nzela ya mpamela mpe toli makasi ya basakoli ndenge na ndenge. Bakangaki ntina te ya disiplini oyo Yehova azalaki kopesa bango na ndenge alongolaki libateli mpe lipamboli na ye epai na bango. Nsukansuka, bazwaki disiplini ya makasi oyo esakolamaki: banguna bamemamaki na mboka mopaya.—Yir 2:30; 5:3; 7:28; 17:23; 32:33; Hos 7:12-16; 10:10; Sef 3:2.
09-15/06
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 17
Batelá kimya na libala na yo
Ndenge ya koboya kobomba nkanda
Mitalelá malamumalamu. Biblia elobi ete bato mosusu ‘balingá kosilika’ mpe ‘balingá nkɛlɛ.’ (Masese 29:22) Yo mpe ozalaka bongo? Omituna boye: ‘Nazalaka na momeseno ya kobomba nkanda? Nasilikaka noki? Nalukaka nde kokómisa likambo moke monene?’ Biblia elobi ete “ye oyo azali se kolobaloba likambo azali kokabola baninga ya motema.” (Masese 17:9; Mosakoli 7:9) Likambo yango ekoki mpe kosalema na libala. Soki ozalaka na momeseno ya kobomba nkanda, omituna boye: ‘Nakoki kozala motema molai epai ya molongani na ngai?’—Toli ya Biblia: 1 Petro 4:8.
Ndenge ya kosilisa mikakatano
1. Ponáká ntango mpo na kolobela likambo. “Ntango ezali mpo na eloko na eloko, . . .ntango ya kozala nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:1, 7) Ndenge lisolo oyo ezali na ebandeli emonisi yango, makambo mosusu epesaka nkanda. Soki esalemi bongo, yebá komipekisa mpe tiká naino likambo yango—to ‘zalá nyɛɛ’—liboso ete nkanda epela makasi. Bokobatela boyokani ya malamu soki bolandi toli oyo ya Biblia: “Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mai; malamu ólongwa liboso ‘té koswana ébanda.”—Batoli 17:14, Bible na lingala ya lelo oyo.
Nzokande, ezali mpe na “ntango ya koloba.” Mikakatano ezalaka lokola matiti mabe, soki balongoli yango noki te, epalanganaka. Yango wana, bókanisaka te ete soki mokakatano moko ebimi, ekosila yango moko. Soki omoni malamu bótika naino lisolo wana mpo bobandi kobendana, limemya mpo na molongani na yo esengeli kotinda yo oyebisa ye ete bokolobela yango nsima. Kosala bongo ekosalisa bino bólanda toli ya Biblia oyo elobi ete: “Tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda.” (Baefese 4:26) Soki mpe ntango ya kosolola likambo yango ekoki, bosengeli kosolola ndenge olakaki.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2 432 par. 8
Liso
Miso emonisaka mpenza mayoki ya moto. Liso ekoki komonisa mawa to kozanga mawa (Mib 19:13); ‘kobɛta’ to ‘kofina’ liso ekoki komonisa kotyola, to bokosi. (Nz 35:19; Mas 6:13; 16:30) Balobelaka mpe baoyo batyelaka basusu likebi te to baboyaka kosalisa basusu, lokola baoyo bazipaka miso to bakangelaka bato miso. (Mt 13:15; Mas 28:27) Biblia elobi ete miso ya bazoba “etambolatambolaka tii na bansuka ya mabele,” mpe eyengayengaka kozanga mokano, mpe makanisi na ye ekendaka na makambo oyo asengelaki kutu kokanisa te. (Mas 17:24) Kutu miso emonisaka kolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto, makasi, to esengo na ye. (1Sa 14:27-29; Mib 34:7; Yb 17:7; Nz 6:7; 88:9) Mokonzi Yehoshafate abondelaki Yehova boye: “Miso na biso ezali kotala epai na yo.”—2Nt 20:12.
16-22/06
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 18
Lendisáká na maloba na yo baoyo bazali kobɛla
Bwanya ya solosolo ezali se koganga makasi
17 Kanisáká liboso ya koloba. Soki tokebi te, tokoki kozokisa basusu na maloba na biso. Biblia elobi: “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.” (Mas. 12:18) Tobatelaka kimya ntango baboyaka kolobela mabe ya basusu. (Mas. 20:19) Mpo maloba na biso ebikisa na esika ya kozokisa basusu, tosengeli kotondisa motema na biso na boyebi ya Liloba ya Nzambe. (Luka 6:45) Ntango tomanyolaka makambo oyo Biblia elobi, maloba na biso ekoki kozala lokola “liziba ya bwanya” oyo ebɔndisaka to elendisaka basusu.—Mas. 18:4.
mrt lisolo 19 etanda
Oyo okoki kosala soki obɛli maladi moko ya mbalakaka
Zalá moyoki ya malamu. Likambo eleki malamu oyo okoki kosala mpo na kosalisa moninga na yo ezali ya koyoka ye ntango alingi koloba. Kokanisa te ete ekozala malamu oyanola na makambo nyonso oyo azali koloba. Mbala mingi ezalaka kaka malamu koyoka ye. Omitya na esika na ye mpe boyá kosambisa ye. Koloba te ete oyebi ndenge oyo azali komiyoka, mingimingi soki maladi na ye eyebani mpenza malamu te.—Masese 11:2.
Lobáká na ndenge ya kolendisa. Ekoki kozala ete ozali koyeba te likambo ya koloba, kasi koyebisa moninga na yo kaka ete oyebi ete makambo oyo azali kokutana na yango ezali mpasi mingi, ekoki kolendisa ye na esika oloba eloko te. Soki ozali koyeba te likambo ya koloba, meká ata koloba likambo moko ya pɛtɛɛ, na ndakisa “Nazali koyeba te naloba nini, kasi nalingi oyeba ete natyelaka yo likebi.” Boyá kosalela maloba lokola “Ekoki kozala mpasi” to “Osengeli te ko. . . .”
Okoki komonisa ete ozali kotyela moninga na yo motema soki oyekoli makambo etali maladi oyo azali na yango. Na ntembe te, akozala na botɔndi mpo na milende oyo okosala mpo na koyeba mpasi oyo azali kokutana na yango, mpe yango ekosala ete makambo oyo okoyebisa ye ezali mpenza na ntina. (Masese 18:13) Kasi, osengeli kokeba ete opesa ye te toli oyo ezangá ntina.
Pesá lisalisi oyo ebongi. Na esika oyebisa ye ete oyebi ndenge ya kosalisa ye, tuná ye nde makambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa ye. Kobosana te ete, moninga na yo akoki kondima te ete azali na mposa ya lisalisi, mpo alingi te ete azala kilo mpo na yo. Soki esalemi bongo, meká koyebisa ye likambo moko oyo okoki kosala, na ndakisa kosalela ye wenze, kosalisa ye na kotya bopɛto, to mpe misala mosusu.—Bagalatia 6:2.
Kolɛmba te. Wana moninga na yo azali koyika mpiko na maladi oyo azali na yango, nsima ya mwa mikolo, akoki kobwakisa yo, to mpe akoki koyoka te lokola azali kosolola na yo. Zalá na motema molai mpe omitya na esika na ye. Kobá kopesa ye lisalisi oyo abongi na yango.—Masese 18:24.
Ndenge ya kosalisa bato oyo bazali kobɛla na makanisi
“Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa.”—1 BATESALONIKI 5:14.
Moninga na yo akoki mbala mosusu komitungisa, to mpe kozala na makanisi ete azangi valɛrɛ. Kasi soki omonisi ye ete otyelaka ye likebi, yango ekosalisa ye abɔndisama mpe alendisama, atako oyebi mpenzampenza te makambo oyo ebongi koyebisa ye.
“Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso.”—MASESE 17:17.
Pesá lisalisi oyo ebongi. Na esika ya komona ete oyebi ndenge oyo osengeli kosalisa, tuná nde nini osengeli kosala mpo na kosalisa. Soki ezali mpasi ete moninga na yo aloba likambo oyo azali na yango mposa, okoki kosɛnga ye bosala likambo moko bino mibale elongo, na ndakisa kotambola mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. To kosɛnga ye bokende kosomba biloko elongo, kosukola ndako, to mpe kosala misala misusu bino mibale.—Bagalatia 6:2.
“Bózala na motema molai.”—1 BATESALONIKI 5:14.
Na bantango mosusu moninga na yo akoki te kozala na mposa ya kosolola na yo. Lendisá moninga na yo ete okozala na esengo ya koyoka ye soki asepeli ete bosolola. Lokola azali kobɛla, moninga na yo akoki koloba to kosala likambo moko oyo ekoki kopesa yo mpasi. Mbala mosusu akoki koboya kozala elongo na yo to kosilikela yo. Zalá na motema molai mpe salá makasi osilika te ntango ozali koluka kopesa ye lisalisi oyo azali na yango mposa.—Masese 18:24.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2 1004
Mbɛsɛ
Kobwaka mbɛsɛ ezali momeseno moko ya kala oyo bazalaki kosalela mpo na kokata likambo. Ezalaki kosɛnga kobwaka mabanga to bitanda ya mabaya ya mikemike to mpe kotya libanga na “nsɔngɛ ya elamba” to na kati ya mbɛki mpe na nsima koningisa yango. Moto oyo aponami ezalaki moto oyo mbɛsɛ na ye ekwei to elakisami. Na ntango ya kobwaka mbɛsɛ, bazalaki kosala libondeli ndenge ezalaki kosalema na ntango kolapa ndai. Libondeli ezalaki kosalema na ndenge ya polele to te, kasi bazalaki koluka mpe kozela eyano ya Yehova. Liloba mbɛsɛ (na Ebre gôral) esalelamaka ndenge ezali mpe na ndenge ya elilingi mpo na kopesa likanisi ya “eteni” to “likabo.”—Yos 15:1; Nz 16:5; 125:3; Yis 57:6; Yir 13:25.
Ndenge bazalaki kosalela yango. Masese 16:33 elobi: “Moto akoki kobwaka mbɛsɛ, kasi Yehova nde azwaka ekateli ya nsuka.” Na Yisraele, lolenge oyo ebongi ya kosalela mbɛsɛ ezalaki mpo na kokata makambo: “Mbɛsɛ esukisaka kowelana mpe ekataka likambo kati na bato mibale ya nguya.” (Mas 18:18) Bazalaki kosalela yango te mpo na ngalasisi, masano, to masano ya mbongo. Bazalaki kobɛtana ntembe te na masano to koluka koyeba nani azali na makila malamu, to mpe abungisi to azwi mbano. Bazalaki kobwaka mbɛsɛ te mpo na komema bozwi na tempelo to kokómisa banganga-nzambe bazwi, to mpe mpo na kozwa mbongo ya kosalisa babola. Kasi, basoda ya Roma bazalaki koluka nde matomba na bango moko ntango babwakaki mbɛsɛ mpo na bilamba ya Yesu, ndenge Nzembo 22:18 esakolaki yango.—Mt 27:35.
23-29/06
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 19
Zalá moninga ya solo epai ya bandeko
Ndenge oyo tokoki kokoba kolingana makasi
16 Tyáká likebi na bizaleli malamu ya bandeko na yo, kasi na mabunga te. Tótalela ndakisa oyo. Kanisá ete ozali elongo na bandeko. Bozali kolekisa ntango moko ya malamu mpe na nsuka okangi fɔtɔ ná bango. Kutu, okangi bafɔtɔ mosusu mibale mpo moko ekoki kobima malamu te. Sikoyo okómi na bafɔtɔ misato. Kasi na fɔtɔ moko, omoni ete ndeko moko asɛki te. Okosala nini na fɔtɔ yango? Okoboma yango mpo ozali na bafɔtɔ mosusu mibale oyo moto nyonso, ata mpe ndeko yango azali kosɛka.
17 Tókokanisa bafɔtɔ oyo tobombaka na makambo oyo tobatelaka na bɔɔngɔ na biso. Mbala mingi tobosanaka te bantango ya malamu oyo tolekisá ná bandeko na biso. Kasi kanisá ete na moko ya mabaku yango, ndeko moko alobaki to asalaki likambo moko oyo esepelisaki yo te. Osengeli kosala nini na likambo wana oyo etikalá na bɔɔngɔ na yo? Osengeli kolongola yango na bɔɔngɔ na yo ndenge kaka olingaki koboma moko ya bafoto wana. (Mas. 19:11; Ef. 4:32) Tosengeli kosala nyonso tólongola na bɔɔngɔ na biso mabunga ya bandeko, mpo na bɔɔngo na biso tozali na bantango ya malamu oyo tolekisá na bango. Wana nde makambo oyo tosengeli kobomba na bɔɔngɔ na biso mpe kozwa yango na motuya.
Kobá kokolisa bolingo na yo
10 Biso mpe tolukaka mabaku ya kosalisa bandeko na biso. (Ebr. 13:16) Tólobela ndakisa ya Anna, oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki. Nsima ya mopɛpɛ moko makasi oyo ebɛtaki, ye ná mobali na ye bakendaki kotala ndako ya libota moko ya Batatoli ya Yehova mpe bamonaki ete mopɛpɛ yango ebebisaki nsamba ya ndako na bango. Yango wana, bato ya libota yango bazalaki na bilamba ya pɛto te. Anna alobi: “Tozwaki bilamba na bango, tosukolaki yango, tongomaki yango, togumbaki yango mpe tozongiselaki bango yango. Mpo na biso, yango ezalaki kaka mwa likambo ya moke, kasi esalaki ete tókóma baninga ya motema tii lelo oyo.” Bolingo oyo Anna ná mobali na ye bazalaki na yango mpo na bandeko etindaki bango básunga bandeko.—1 Yoa 3:17, 18.
11 Ntango tosalelaka bato makambo na bolingo mpe na boboto, mbala mingi bamonaka ete tosalaka milende mpo na komekola ndenge oyo Yehova akanisaka mpe asalaka makambo. Mpe bakoki kozala na botɔndi mpo na boboto oyo tomoniseli bango na ndenge oyo tokanisaki kutu te. Khanh, oyo tolobelaki liboso, abosanaka te bato oyo basalisá ye. Alobi boye: “Nazalaka na botɔndi mingi na bandeko basi oyo bazalaki komema ngai na mosala ya kosakola. Bazalaki koya kozwa ngai na ndako na ngai, kobengisa ngai mpo na kolya mwa eloko, mpe koluka koyeba soki nakómi malamu na ndako. Sikoyo nde nayei koyeba ete ezalaki mosala monene oyo bazalaki kosala. Mpe bazalaki kosala yango na bolingo.” Toyebi ete bato nyonso te nde bakopesa biso matɔndi mpo na bolamu oyo tosaleli bango. Khanh alobi boye mpo na bato oyo basalisaki ye: “Nakanisaka mokolo mosusu nakozongisela bango bolamu oyo basalelá ngai, atako nayebi esika bazali te. Kasi, Yehova ayebi esika bazali, mpe nasɛngaka ye afuta bango.” Makambo oyo Khanh alobi ezali solo. Yehova amonaka ata likambo ya moke ya boboto oyo tosalelaka basusu. Atalelaka yango lokola mbeka ya motuya mpe nyongo oyo akofuta.—Tángá Masese 19:17.
Bókoba komoniselana bolingo ya sembo
6 Lelo oyo, tokoki koloba ete soki moto asali na kompanyi moko na boumeli ya bambula mingi, azali mosali moko ya sembo. Kasi ekoki kozala ete akutaná naino te na mokonzi ya kompanyi yango na boumeli ya bambula nyonso oyo alekisi wana. Ekoki mpe kozala ete asepelaka te na mibeko nyonso oyo bakonzi ya kompanyi yango batyá. To mpe alingaka kompanyi yango te, kasi asalaka kaka mpo azwa mbongo. Akokoba kosala tii mokolo akozwa pansiɔ, to mpe tii mokolo akozwa mosala mosusu ya malamu na esika mosusu.
7 Eloko oyo ekesenisi bosembo oyo tolobeli na paragrafe 6 na bolingo ya sembo ezali makanisi oyo etindaka moto amonisa ezaleli yango. Nini ezalaki kotinda basaleli ya Yehova ya ntango ya kala bámonisa bolingo ya sembo? Baoyo bamonisaki ezaleli yango basalaki yango te kaka tiká básala, kasi nde mpo motema na bango etindaki bango. Tótalela ndakisa ya Davidi. Motema na ye etindaki ye amonisela moninga na ye Yonatane bolingo ya sembo atako tata ya Yonatane alingaki koboma Davidi. Bambula nsima ya liwa ya Yonatane, Davidi akobaki kaka komonisela ye bolingo ya sembo na ndenge asalisaki Mefiboshete, mwana na ye.—1 Sa. 20:9, 14, 15; 2 Sa. 4:4; 8:15; 9:1, 6, 7.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1 516
Toli, Mopesi-toli
Yehova azali Moto oyo aleki na bwanya mpenza. Azali na mposa te ya toli ya moto. (Yis 40:13; Ro 11:34) Mwana na Ye azali na likoki ya kozala “Mopesi-Toli Monene,” kopesa litambwisi mpe kokamba, mpo azwaki mpe alandaki toli ya Tata na ye mpe azali na elimo ya Nzambe. (Yis 9:6; 11:2; Yn 5:19, 30) Yango emonisi polele ete mpo toli esalisa moto, esengeli koyokana na makanisi ya Yehova. Toli nyonso oyo ezali kotɛmɛla Oyo-Aleki-Likoló ezali na ntina te. Ezali kutu toli te.—Mas 19:21; 21:30.
30/06–06/07
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 20
Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani eleka malamu
Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza
3 Atako eleko oyo ndeko mwasi mpe ndeko mobali balingani ekoki kosepelisa, ezali mpe eleko ya ntina mingi oyo ekoki komema na libala. Na mokolo ya libala na bango, mwasi ná mobali basalaka elako liboso ya Yehova ete bakolingana mpe bakopesana limemya ntango nyonso oyo bazali na bomoi. Liboso ya kosala ata elako nini, tosengeli kokanisa malamu. (Tángá Masese 20:25.) Ezali mpe bongo mpo na elako ya libala. Eleko oyo bato balingani epesaka bango nzela ya koyebana malamu mpe ya kozwa ekateli ya malamu. Ntango mosusu bakozwa ekateli ya kobalana; ntango mosusu mpe bakozwa ekateli ya kokata boyokani yango. Soki bato oyo balinganaki bakabwani, elingi koloba te ete eleko na bango ya kolingana elongi te. Ekokisi nde mokano na yango: Esalisi bango bázwa ekateli oyo ebongi.
4 Mpo na nini ezali na ntina kozala na makanisi malamu na oyo etali eleko oyo bato balingani? Monzemba oyo azali na makanisi ya malamu akokende te kolinga moto soki azali na likanisi ya libala te. Kasi, kaka minzemba te nde basengeli kozala na makanisi malamu. Biso nyonso tosengeli koyeba mokano ya eleko oyo bato balingani. Na ndakisa, bato mosusu bakanisaka ete soki bato mibale balingani, basengeli kaka kobalana. Makanisi ya ndenge wana esalaka nini epai ya minzemba? Melissa, ndeko mwasi moko na États-Unis, alobi boye: “Bato mosusu batyaka bandeko oyo balingani mpanzi likoló. Mpo na yango, bato mosusu balingaka te kokata boyokani na bango ata soki makambo ezali kotambola malamu te. Minzemba mosusu kutu baboyaka kolingana na moto. Makambo ya bongo ekoki komema mitungisi mingi.”
Ndenge ya kozwa moto oyo akoki kokóma molongani na yo
8 Ndenge nini okoki kotalela moto na mayele? Na makita ya lisangá to ntango bozali kolekisa ntango elongo na baninga, okoki komona makambo oyo ekosalisa yo oyeba elimo ya moto yango, bomoto na ye, mpe bizaleli na ye. Baninga na ye ezali banani, mpe alobelaka makambo nini? (Luka 6:45) Mikano na ye ekokani na oyo ya yo? Okoki mpe kotuna bankulutu ya lisangá na bango to bakristo mosusu oyo bakɔmɛli, oyo bayebi ye malamu. (Mas. 20:18) Okoki kotuna ndenge oyo moto yango ayebani mpe bizaleli na ye. (Ruta 2:11) Wana ozali kotalela moto yango, kebá ete otya ye mpanzi likoló te. Monisá limemya mpo na mayoki na ye, komikɔtisa na makambo na ye te, mpe kolandelalandela ye te.
Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza
7 Ndenge nini okoki koyeba bomoto ya kati ya moto oyo bolingani na ye? Lolenge moko ya malamu ezali ya kosolola polele mpe na bosembo, kotuna mituna mpe koyoka na likebi. (Mas. 20:5; Yak. 1:19) Mpo na yango, kosala makambo mosusu oyo ekobimisa masolo ekosalisa mingi, na ndakisa kolya elongo, kotambola na bisika ya bato nyonso, mpe kobima na mosala ya kosakola elongo. Bokoki mpe koyebana wana bozali kolekisa ntango elongo na baninga mpe bato ya libota. Longola yango, bósalaka makambo oyo ekomonisa ndenge moninga amitambwisaka na mabaku ndenge na ndenge mpe ntango azali na bato ndenge na ndenge. Talá makambo oyo Aschwin, oyo afandaka na Pays-Bas, amekaki kosala. Mpo na eleko oyo balinganaki na mwasi na ye Alicia, alobi boye: “Tozalaki koluka kosala makambo oyo ekosalisa biso tóyebana. Mbala mingi ezalaki makambo ya mindɔndɔ te, na ndakisa kolamba elongo to kosukola basaani elongo. Ntango tozalaki kosala makambo yango, tomonaki makambo ya malamu mpe bolɛmbu oyo mokomoko azalaki na yango.”
8 Bokoki mpe koyebana malamu soki bozali koyekola makambo ya elimo elongo. Soki bobalani, ekosɛnga bózwaka ntango ya kosala losambo na kati ya libota, mpo Nzambe azala na esika ya liboso na libala na bino. (Mos. 4:12) Na yango, mpo na nini te kozwa ntango mpo na koyekola elongo banda sikoyo, na eleko oyo bolingani? Ezali solo ete bato oyo balingani basali naino libota te, mpe ndeko mobali azali naino mokonzi ya ndeko mwasi te. Atako bongo, ntango bozali koyekola elongo, bokoki koyeba soki moto na moto azali makasi na elimo to te. Max ná Laysa, oyo bafandaka na États-Unis, bamonaki litomba mosusu ya koyekola. Max alobi boye: “Kaka ntango tolinganaki sika, tobandaki koyekola mikanda oyo elobeli kolingana, libala, mpe bomoi ya libota. Mikanda yango ezalaki kotinda biso tósolola makambo mingi ya ntina oyo elingaki kobima yango moko te.”
Biloko ya motuya ya elimo
it-2 109 par. 9
Mwinda
Na kotalela Masese 20:27, “mpema ya moto ezali mwinda ya Yehova, emonisaka polele makambo mozindo oyo ezali na kati na ye.” Na nzela ya “mpema” to makambo oyo moto azali kobimisa, elingi koloba, maloba ya malamu to maloba ya mabe, amonisaka to alakisaki lokola na mwinda bizaleli na ye to bomoto na ye ya kati mpenza.—Talá mpe Mis 9:1.