Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Juillet nk. 12-13
  • 18-24/08

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 18-24/08
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Juillet nk. 12-13

18-24/08

MASESE 27

Loyembo 102 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Matomba ya kozala na baninga ya solosolo

(Min. 10)

Baninga ya solosolo bazalaka na mpiko ya kopesa biso toli oyo tosengeli na yango (Mas 27:​5, 6; w19.09 5 par. 12)

Baninga ya solosolo bakoki kozala pene ya kosalisa biso koleka bandeko na biso ya libota (Mas 27:10; it-2 669 par. 7)

Baninga ya solosolo basalisaka biso tósala oyo ezali malamu (Mas 27:17; w23.09 9 par. 7)

Ndeko moko ya elenge azali kosalisa ndeko moko ya mobange asolola na monganga.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Mas 27:21—Na ndenge nini ekoki komonana soki tozali bato ya lolenge nini ntango bakumisi biso? (w06 15/9 19 par. 12)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Mas 27:​1-17 (th liteya 5)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Moto yango azali moto ya mangomba ya bokristo te. (lmd liteya 6 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Bólobela video moko oyo ezali na kati ya Bisaleli mpo na koteya. (lmd liteya 8 pwɛ 3)

6. Diskur

(Min. 5) ijwyp Lisolo 75—Motó ya likambo: Nasala nini soki moninga na ngai ayokisi ngai mpasi na motema? (th liteya 14)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 109

7. “Ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi”

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Yehova apesi biso lisangá ya bandeko na mokili mobimba epai tokoki kozwa baninga ya malamu. Ya solo toyokanaka malamu na bandeko mingi na lisangá, kasi bango nyonso bazalaka baninga na biso ya motema te. Mpo na nini? Mpo na kokóma moninga ya motema ya moto, esɛngaka koyebana malamu, kotyelanaka motema, kosololaka polelepolele, kosalaka makambo elongo, mpe kolukaka bolamu na ye. Na yango, kosala boninga mpe kobatela yango ezwaka ntango mpe esɛngaka milende.

Tángá Masese 17:17. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Mpo na nini ezali likambo ya bwanya kozala na baninga ya motema sikoyo liboso bolɔzi monene ebanda?

Tángá 2 Bakorinti 6:​12, 13. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso tózwa baninga?

Elilingi ya video “ ‘Eloko nyonso ezali na ntango na yango’​—⁠Kosala boninga na moto esɛngaka ntango.” August azali kopesa Ben balɛ wana bafandi na etando ya kobɛta basketball.

Lakisá VIDEO “Eloko nyonso ezali na ntango na yango”—Kosala boninga na moto esɛngaka ntango. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Video yango eteyi yo nini na oyo etali boninga?

Mpo na kobanda boninga na moto, okoki komungamunga to kopesa ye mbote na boboto (lokola oloni molona) mpe na nsima kokoba kotyela ye likebi (lokola kosopela molona mai). Esɛngaka ntango mpo molona ebima; na yango zalá na motema molai mpe bólekisaka ntango elongo mpo boninga ekola. Boninga oyo bokosala ekoki koumela seko.

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 10-11

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 118 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto