Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Juillet nk. 11-16
  • 11-17/08

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 11-17/08
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Juillet nk. 11-16

11-17/08

MASESE 26

Loyembo 88 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Zalá mosika ya “zoba”

(Min. 10)

Kaka ndenge mbula ebɛtaka mpenza te na eleko ya kobuka mbuma, “zoba” mpe bapesaka ye lokumu mpenza te (Mas 26:1; it-2 602 par. 1)

Mbala mingi esɛngaka kopesa “bazoba” disiplini ya makasi (Mas 26:3; w88 15/5 19 par. 12)

“Moto oyo azali zoba” azali moto ya kotyela motema te (Mas 26:6; it-1 357 par. 3)


NDIMBOLA: Na Biblia, liloba “zoba” emonisaka moto oyo aboyaka makanisi ya malamu mpe alandaka te mibeko ya Nzambe na oyo etali mabe ná malamu.

Ndeko moko ya elenge na eteyelo amonisi mpiko mpe aboyi kotala makambo oyo bana-kelasi na bango bazali kotala na telefone.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Mas 26:​4, 5—Bavɛrsɛ yango elimboli nini? (it-2 1006)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Mas 26:​1-20 (th liteya 5)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Salelá trakte mpo na kobanda lisolo. (lmd liteya 1 pwɛ 5)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Kobá lisolo na trakte oyo otikelaki moto yango mbala eleki. (lmd liteya 7 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) Salisá moyekoli na yo amibongisa mpo na koteya ndeko na ye moko ya libota. (lmd liteya 11 pwɛ 5)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 94

7. Kómá “moto ya bwanya mpo na lobiko” na nzela ya boyekoli na yo moko

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Bililingi: 1. Ndeko mwasi moko azali koyekola na ndako. Ordinatɛrɛ na ye ezali kolakisa video moko ya elobeli ya bababa na jw.org. 2. Ndeko mobali moko azali koyekola na telefone mpe atye écouteurs na ntango ya bopemi. 3. Ndeko mwasi ya mobange zali kosalela “JW Library” na tablɛti na ye. 4. Mama moko ná mwana na ye bazali kosalela “JW Library” na tablɛti na makita.

Ntoma Paulo akundwelaki Timote valɛrɛ ya makomi mosantu oyo ayekolaki banda bomwana mpenza. Makomi yango esalisaki Timote akóma “moto ya bwanya mpo na lobiko.” (2Ti 3:15) Lokola mateya ya Biblia ezali na motuya mingi ndenge wana, ezali na ntina ete mokristo mokomoko atya ntango mpo na kotánga mpe koyekola Biblia. Bongo soki osepelaka koyekola te?

Tángá 1 Petro 2:2. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ekoki kosalema ete tóbanda kosepela koyekola Biblia biso moko?

  • Ndenge nini tokoki kokóma na “mposa makasi” ya Liloba ya Nzambe?—w18.03 29 par. 6

  • Ndenge nini bisaleli oyo ebongiseli na biso ebimisá mpo na kosalela na aparɛyi ekoki kosalisa biso tóyeba makambo mingi na boyekoli na biso moko?

Lakisá VIDEO Mosala ezali kosalema—Mayele mpo na kosalela JW Library. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini JW Library® esalisaka yo?

  • Makambo nini osepelaka kosalela na JW Library?

  • Makambo nini okolinga koyekola mpe kosalela na JW Library?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 8-9

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 89 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto