Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Septembre nk. 10-11
  • 06-12/10

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 06-12/10
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Septembre nk. 10-11

06-12/10

MOSAKOLI 5-6

Loyembo 42 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Bayisraele ebele batɛlɛmi pene na porte ya engumba, nganga-nzambe moko azali koloba mpe asimbi rulo.

Bayisraele bazali koyoka na likebi nganga-nzambe oyo azali kolimbola Mobeko

1. Ndenge ya komonisa limemya makasi epai ya Nzambe na biso monene

(Min. 10)

Tomonisaka limemya na makita na ndenge toyokaka na likebi, tolataka malamu mpe tosalaka monzɛlɛ oyo ebongi (Mos 5:1; w08 15/8 15-16 par. 17-18)

Ntango tozali kobondela mpo na bato mingi, tosengeli kosalela maloba oyo ebongi, ya limemya, mpe kolobaka maloba ebeleebele te (Mos 5:2; w09 15/11 11 par. 21)

Tokokisaka elako na biso ya kosalela Yehova (Mos 5:​4-6; w17.04 6 par. 12)

Bandeko mibali mpe basi, mikóló mpe bana, bazali kolanda makita na Ndako ya Bokonzi.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Mos 5:8—Ndenge nini vɛrsɛ yango ekoki kobɔndisa biso ntango tokutani na makambo ya kozanga bosembo? (w20.09 31 par. 3-5)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Mos 5:​1-17 (th liteya 12)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 1) NDAKO NA NDAKO. Moto yango alingi kobimisa kowelana. (lmd liteya 4 pwɛ 5)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 2) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lobelá likambo moko oyo ezali na eteni “Tolingaka koteya solo” na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 1 pwɛ 3)

6. Kolandela bokoli

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Lobelá video moko oyo ezali na Bisaleli mpo na koteya. (lmd liteya 7 pwɛ 3)

7. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 17 maloba ya ebandeli mpe pwɛ 1-3 (lmd liteya 11 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 160

8. Osalelaka eteni “Tolingaka koteya solo”?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Ndeko moko ná mwasi na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako, bazali kotángela elenge mobali moko vɛrsɛ

Kobanda mwa buku Lingá bato—Kómisá bango bayekoli ebimá, esalisi biso mingi mpo na kosolola na bato. Apɛndisi A ebongisamaki libosoliboso mpo na kosalisa biso tóbanda masolo ya Biblia na pɛtɛɛ. (Ebr 4:12) Omesani na masolo 9 oyo ezali na eteni “Tolingaka koteya solo”?

  • Ndenge nini tokoki kokɔtisa liteya ya Biblia na ndenge oyo ebongi ntango tozali kosolola na moto?—lmd apɛndisi A

  • Mateya nini omonaka ete esepelisaka bato mingi na teritware na bino?

  • Okoki kosala nini mpo omesana mingi na bavɛrsɛ oyo ezali na apɛndisi A?

MOKANO:

Meká kokanga ata vɛrsɛ moko oyo ezali na liteya mokomoko ya apɛndisi A. Bandá na oyo ekosepelisa bato mingi na teritware na bino.

Soki tozali kosalela bavɛrsɛ yango mingi na mosala ya kosakola, tokomesana na yango mpe mingi. Kasi, mpo na kosalela yango mingi, tosengeli liboso kosolola na bato.

Lakisá VIDEO “Ebende epelisaka ebende”—Kosolola na bato mingi. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Nini ekoki kosalisa biso tósololaka na bato mingi na teritware na biso?

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 24-25

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 34 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto