03-09/11
LOYEMBO YA SALOMO 1-2
Loyembo 132 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Lisolo ya bolingo ya solo
(Min. 10)
[Lakisá VIDEO Maloba ya ebandeli na Loyembo ya Salomo.]
Salomo akumisaki mwana mwasi Moshulame mpe alakaki ye biloko ya motuya (Loy 1:9-11)
Mwana mwasi Moshulame alingaki mobateli ya mpate na bolingo ya solo mpe yango esalisaki ye atikala sembo epai ya mobali yango (Loy 2:16, 17; w15 15/1 29-30 par. 9-10)
LIKANISI: Ntango ozali kotánga Loyembo ya Salomo, salelá “Makambo oyo ezali na kati” na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika mpo na koyeba malamu soki nani azali koloba.
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Loy 2:7—Mpo na nini mwana mwasi Moshulame azali ndakisa malamu mpo na bakristo oyo bazali minzemba? (w15 15/1 30 par. 11)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Loy 2:1-17 (th liteya 12)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Lobelá liteya moko oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 1 pwɛ 3)
5. Kolandela bokoli
(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Lobelá liteya moko oyo ezali na apɛndisi A ya mwa buku Lingá bato. (lmd liteya 9 pwɛ 3)
6. Kokómisa bato bayekoli
Loyembo 46
7. “Moto oyo akabaka akopambwama”
(Min. 15) Lisolo na bayangani. Ekosalema na nkulutu moko.
Ntango tosalelaka ntango, makasi, mpe biloko na biso mpo na kosalisa basusu, tozwaka mapamboli. Ya solo, moto oyo tokabeli amonaka ete azwi lipamboli. Kasi, moto oyo akabi mpe akopambwama. (Mas 22:9) Akoyoka esengo ndenge amekoli Mozalisi mpe akondimama na Yehova Mozalisi.—Mas 19:17; Yk 1:17.
Lakisá VIDEO Kokaba epesaka esengo. Na nsima tuná bayangani boye:
Ndenge nini bandeko oyo balakisi na video bayokaki esengo ndenge bandeko ya mokili mobimba bakabelaki bango?
Ndenge nini bayokaki mpe esengo oyo eutaka na kokabela basusu?
8. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb liteya 32-33