10-16/11
LOYEMBO YA SALOMO 3-5
Loyembo 31 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Ntina ya kozala na kitoko ya kati
(Min. 10)
Maloba ya mwana mwasi Moshulame emonisi ete azalaki na kitoko ya kati, elingi koloba bizaleli ya malamu (Loy 4:3, 11; w15 15/1 29 par. 8)
Mobateli ya mpate akokanisaki bizaleli ya pɛto ya mwana mwasi Moshulame na elanga kitoko mpenza (Loy 4:12; w00 1/11 11 par. 17)
Moto nyonso akoki kokóma na kitoko ya kati, oyo ezali na ntina mingi koleka kitoko ya nzoto (g04 22/12 9 par. 2-5)
OMITUNA BOYE: ‘Bizaleli nini ya malamu nasepelaka mingi komona epai ya basusu?’
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Loy 3:5—Mpo na nini balapisaki “bana basi ya Yerusaleme” ndai “na nkombo ya bamboloko mpe ya banyama babengi bishe ya esobe”? (w06 15/11 18 par. 4)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Loy 4:1-16 (th liteya 2)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Sɛngá moto mbala moko ete bóyekola Biblia. (lmd liteya 6 pwɛ 4)
5. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lakisá moto yango ndenge ya komona masolo na monɔkɔ na ye na jw.org. (lmd liteya 4 pwɛ 3)
6. Diskur
(Min. 5) ijwbq lisolo 131—Motó ya likambo: Biblia elobi nini na likambo ya kotya monzɛlɛ na elongi mpe kolata babiju? (th liteya 1)
Loyembo 36
7. Balá kaka na kati ya Nkolo (Eba 28:2)
(Min. 8)
8. Okozala molongani ya malamu?
(Min. 7) Lisolo na bayangani.
Ozali koluka moto ya kobala? Ntango bakristo oyo bazali koluka molongani batalaka yo, bamonaka ete ozali na bizaleli ya malamu ya elimo? Moto akoki komibimisa lokola moto ya elimo mpo na mwa ntango, kasi nsukansuka bomoto na ye ya kati ekomonana kaka.
Komá vɛrsɛ moko oyo eyokani na bizaleli oyo elandi, oyo moto ya elimo amonisaka.
Kolinga Yehova mpe kozala na kondima epai na ye
Kozala mokonzi ya malamu ya libota, to kotosa mobali
Kozala moimi te mpe koluka liboso matomba ya moninga
Bososoli, bokatikati, mpe makambo makasimakasi te
Gɔigɔi te mpe makasi na mosala
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) lfb liteya 34-35