Nini ekoki kosalisa yo oyeba ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya?
Bato mingi bandimaka ete nguya moko boye oyo emonanaka te nde ekotambwisa bomoi na bango na mikolo ezali koya. Yango wana básalaka makambo oyo bakanisaka ete ekobongisa bomoi na bango.
MAKAMBO OYO BATO MINGI BANDIMELAKA
ASTROLOJI: Bato mosusu balobaka ete bomoi na bango na mikolo ezali koya, ekozala ndenge oyo minzoto etandamaki na likoló na mokolo oyo babotamaki. Yango wana, bakendeke epai ya bato oyo batalaka minzoto mpo na kosakola makambo oyo ekoya, to basalelaka horoscope mpo na koyeba nini ekokómela bango na mikolo ezali koya mpo báluka ndenge ya kokima makambo ya mabe to bábongisa bomoi na bango.
FENG SHUI: Bato mosusu bandimaka ete soki batongi ndako na bango na ndenge moko boye, ekomemela bango bolamu. Lo Wing,a oyo afandaka na engumba Hong Kong, alobi boye: “Nganga moko ya feng shui ayebisaki ngai ete soki natye libanga moko boye na butiki na ngai ekosala ete nazwa mbongo mingi.”
KOSAMBELA BANKƆKƆ: Bato mosusu mpe bakanisaka ete basengeli kobɔndisaka bankɔkɔ oyo bakufá to banzambe ndenge na ndenge mpo bábatela bango to bápambola bango. Van, oyo afandaka na Vietnam, alobi boye: “Nazalaki kondima ete soki nazali kokumisa bankɔkɔ na ngai oyo bakufá, ngai ná bana na ngai tokozala na bomoi ya malamu banda lelo tii na mikolo ezali koya.”
KOBOTAMA LISUSU: Bato mingi bakanisaka ete soki moto akufi, akobotama lisusu mpe yango ekosalema bongo mbala na mbala. Bamonaka ete bampasi mpe bisengo oyo bazali kokutana na yango lelo ezali nde mpo na makambo oyo basalaki na bomoi ya kala.
Kasi, bato mosusu mpe bandimaka makambo wana te, bamonaka ete ezali biyambayamba. Atako bongo, bato yango bakendaka kotalisa banzela ya mabɔkɔ, bazwaka nkisi ya komibatela, babɛtaka zeke, basalaka bikelakela, to mpe bakendaka epai ya banganga-nkisi oyo basakolaka makambo oyo ekoya. Bamonaka ete, ntango mosusu, makambo yango ekoki kosalisa bango báyeba ndenge bomoi na bango ekozala na mikolo ezali koya.
MAKAMBO YANGO EZALI KOSALISA BANGO?
Bato oyo bandimaka mpe basalaka makambo yango bazali na bomoi ya malamu lelo, mpe bakozala na yango na mikolo ezali koya?
Tótala likambo oyo ekómelaki Hào, oyo afandaka na Vietnam. Akendaki epai ya banganga ya minzoto, ya feng shui, mpe azalaki kosambela bankɔkɔ mpo básalisa ye. Makambo yango esalisaki ye? Hào alobi boye: “Mombongo na ngai ekweaki, nakɔtaki banyongo, libota na ngai ekómaki na mikakatano mpe nanyokwamaki na makanisi.”
Qiuming, oyo afandaka na Taïwan, azalaki mpe kondimela minzoto, kobotama lisusu, feng shui, kondima ete makambo nyonso etángamá, mpe kosambela bankɔkɔ. Nsima ya kotalela makambo yango malamumalamu, alobaki boye: “Namonaki ete mateya mpe mimeseno yango ezali na boyokani te kati na yango mpe ezali kotya mobulu na mitó ya bato. Namonaki ete makambo nyonso oyo bato ya astroloji basakolaka ezali lokuta. Mpo na liteya oyo elobaka ete moto abotamaka lisusu, soki oyebi te makambo oyo osalá, ndenge nini okobongola to okobongisa makambo yango na bomoi mosusu?”
“Namonaki ete mateya mpe mimeseno yango ezali na boyokani te kati na yango mpe ezali kotya mobulu na mitó ya bato.”—QIUMING, TAÏWAN
Hào, Qiuming, mpe ebele ya bato mosusu bayaki koyeba ete bomoi na biso na mikolo ezali koya etángamá te, etambwisami na minzoto te, na bankɔkɔ te, to na kobotama lisusu mpe te. Yango emonisi ete tokoki kobongisa bomoi na biso te na mikolo ezali koya?
Bato mingi bakanisaka ete, mpo bázala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya, basengeli kotánga bakelasi ya milaimilai mpe konduka bomɛngo. Bato oyo bazwaki ekateli ya kosala bongo babukaki mbuma nini?
a Na lisolo oyo mpe na masolo oyo ekolanda, topesi bato bankombo mosusu.
b Na Biblia, maloba yango ezali na Bagalatia 6:7. Likanisi yango eyebani mingi mpenza na Azia, kuna bato balobaka boye: “Soki oloni mbuma babengi melon, okobuka melon; soki oloni madesu, okobuka mpe madesu.”