Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp22 No. 1 nk. 12-13
  • 4 | Nzambe akoki kosalisa yo otika koyina basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 4 | Nzambe akoki kosalisa yo otika koyina basusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya ya Biblia:
  • Elimboli nini?
  • Oyo okoki kosala:
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ndenge ya kotika koyina basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Tokoki kotika ezaleli ya koyina basusu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Mpo na nini bato bayinanaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
wp22 No. 1 nk. 12-13
Bato bazali kopusana pene ya Biblia moko ya monene oyo efungwami mpe ezali kotindela bango pole. Bilili na bango ezali komonisa bomoi ya kala oyo bazalaki na yango ya koyina basusu.

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

4 | Nzambe akoki kosalisa yo otika koyina basusu

Liteya ya Biblia:

“Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.”na​—BAGALATIA 5:22, 23.

Elimboli nini?

Nzambe akoki kosalisa moto atika ezaleli ya koyina bato mosusu. Elimo santu na ye ekoki kosalisa biso tókóma na bizaleli ya malamu oyo tokokaki kokóma na yango te na makasi na biso moko. Yango wana, na esika ya komeka kosilisa ezaleli ya koyina bato na makasi na biso moko, tosengeli nde kotya motema na lisalisi oyo Nzambe apesaka. Soki tosali bongo, tokoloba ndenge moko na ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Na yango, tokoki koloba ete: “Lisalisi na ngai ezali kouta na Yehova.” ​—Nzembo 121:2.

Oyo okoki kosala:

“Yehova asalisi ngai natika mobulu mpe nakóma moto ya kimya.”​—WALDO

Bondelá Yehova, sɛngá ye na motema mobimba apesa yo elimo santu na ye. (Luka 11:13) Sɛngá ye asalisa yo ozala na bizaleli malamu. Yekolá makambo oyo Biblia elobaka mpo na bizaleli oyo esalaka ete moto atika koyina basusu, na ndakisa, bizaleli lokola bolingo, kimya, motema molai, mpe komipekisa. Luká ndenge ya kokóma na bizaleli yango. Mpe kómá moninga ya bato oyo bazali kosala makasi bázala na bizaleli yango. Baninga ya ndenge wana bakoki ‘kolendisa [yo] mpo ozala na bolingo mpe osala misala ya malamu.’​—Baebre 10:24.

Likambo moko oyo esalemaki mpenza​—WALDO

Alongaki ezaleli mabe ya koyina makasi

Waldo.

Waldo akutanaki na mikakatano mingi ntango azalaki kokola mpe yango etindaki ye ayinaka bato. Alobi boye: ‘Mbala mingi nazalaki kobunda na balabala ná bato oyo batɛkaka drɔgɛ . . . Mokolo moko, moto moko ya mobulu oyo azalaki monguna na ngai afutaki moto mosusu mbongo mpo aboma ngai, kasi moto yango azokisaki ngai na mbeli mpe nakimaki na mpota na nzoto.’

Waldo asepelaki te ntango mwasi na ye abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Nazalaki koyina Batatoli ya Yehova, mpe mbala mingi nazalaki kolobela bango maloba mabe. Kasi likambo ya kokamwa, bazalaki koloba na ngai na boboto.”

Nsukansuka, Waldo mpe abandaki koyekola Biblia. Alobi boye: “Kosalela makambo oyo nazalaki koyekola ezalaki pɛtɛɛ te. Nazalaki komona ete nakokoka soki moke te kotika ezaleli na ngai ya mobulu.” Kasi makambo ayekolaki na Biblia ebongolaki ye mpenza.

Waldo alobi boye: “Mokolo moko Alejandro oyo azalaki koyekola na ngai Biblia ayebisaki ngai natánga Bagalatia 5:22, 23 . . . . Alejandro ayebisaki ngai ete nakokoka te kokóma na bizaleli yango na makasi na ngai moko, kasi kaka na nzela ya elimo santu ya Nzambe. Likambo yango ebongolaki mpenza makanisi na ngai!”

Lokola Waldo atyelaki lisalisi ya Nzambe motema, yango esalaki ete atika ezaleli mabe ya koyina bato. Alobi boye: “Bandeko mpe baninga na ngai bakamwaka ndenge nabongwaná mpenza.” Abakisi boye: “Yehova asalisi ngai natika mobulu mpe nakóma moto ya kimya.”

Mpo na koyeba makambo mosusu na lisolo ya Waldo, tángá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2013, nkasa 12-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto