Etanda ya makambo ezali na kati
15/11/2015
© 2015 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
NIMERO YA BOYEKOLI
28/12–3/01/2016
Teyá mwana na yo asalela Yehova
LOKASA 3
4-10/01/2016
Teyá mwana na yo oyo akómi elenge asalela Yehova
LOKASA 9
11-17/01/2016
Yehova azali Nzambe ya bolingo
LOKASA 16
18-24/01/2016
Olingaka “mozalani na yo lokola yo moko”?
LOKASA 21
25-31/01/2016
Mbula nkama ya boyangeli ya Bokonzi!
LOKASA 27
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ Teyá mwana na yo asalela Yehova
▪ Teyá mwana na yo oyo akómi elenge asalela Yehova
Yehova apesi baboti mokumba moko monene mpe ya ntina mingi. Alingi ete baboti báteya bana na bango básalela Yehova. Masolo oyo mibale ezali na mateya oyo baboti bakoki kozwa na ndenge oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye, mpe ekosalisa bango bámekola bolingo, komikitisa, mpe bososoli na ye.
▪ Yehova azali Nzambe ya bolingo
▪ Olingaka “mozalani na yo lokola yo moko”?
Lisolo ya liboso emonisi polele ete Yehova azali Nzambe ya bolingo. Elimboli mpe lolenge oyo Nzambe amonisaki ete alingaka bato. Lisolo ya mibale elobeli ndenge oyo basaleli ya Yehova bamonisaka ete balingaka bazalani na bango.
▪ Mbula nkama ya boyangeli ya Bokonzi!
Lisolo oyo emonisi makambo oyo esalemi mpo nsango malamu esakolama na boumeli ya mbula 100 oyo eleki ya boyangeli ya Bokonzi. Okoyeba bisaleli mpe mayele ya sika ndenge na ndenge oyo esalelami na mosala na biso ya kosakola. Okoyeba mpe formasyo ya malamu oyo basakoli ya Bokonzi bazwi na boumeli ya bambula yango.
MASOLO MOSUSU
EZIPELI: Mokɛngɛli ya zongazonga mpe babongisi-nzela monene bazali kosala mobembo na masuwa na ebale Amazone mpo na kokende na bamboka ya zamba. Basepelaka koyebisa nsango malamu epai ya bato oyo bafandaka na bamboka ya mosika oyo ezali zingazinga ya ebale yango mpe na mikɛli na yango
BRÉSIL
MOTÁNGO YA BATO
203 067 835
BASAKOLI
794 766
BABONGISI-NZELA
84 550
MOTÁNGO YA BATO OYO BAYANGANAKI NA EKANISELI (2014)