Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Janvier nk. 27-28
  • Eloko oyo eleki mbongo ya libaku

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eloko oyo eleki mbongo ya libaku
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo abungisaki mbongo azwi libonza
  • Bozwi boleki na motuya mingi
  • Biblia epekisi masano ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bilenge​—Basani mosusu ya sika!
    Lamuká!—1995
  • Masano ya mbongo
    Lamuká!—2015
  • Basani ya lokoso​—Basukaka bobele na kobungisa
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Janvier nk. 27-28

Eloko oyo eleki mbongo ya libaku

MBALA mingi, babɛti basukaka bobele na kozala babólá koleka ntango babandaki kobɛta. Mpo na baoyo, bobele moke, bazwaka libonza ya mosolo mingi, bamonaka mbala mingi ete mbongo na bango ekopesaka bolamu te.

Na Japon, monzemba moko ya mibu 36 azwaki libonza ya badolare 45 000 na loterie. Akanaki kosomba ndako na mosolo wana ya libonza, kasi baokelaki ye zuwa mpe batɔ́ngaki ye; amonaki ete nyonso wana ezalaki na ntina te. Liboso na baninga na ye ya mosala oyo bazalaki kokamwa, atumbaki tiké na ye oyo azwaki libonza.

Na Floride, bapolisié bakangaki mwasi moko oyo, atako azwaki libonza ya bamilió 5 ya badolare na loterie, asalaki mwango mabe mpo na koboma mwasi ya mwana na ye. Mwana na ye ya mobali alobaki ete mama na ye atungisamaki mingi mpenza mpo na lolenge mabe oyo azalaki kotya mbongo na masano mpe mpo na kobeba ya bozwi na ye.

Oyo abungisaki mbongo azwi libonza

Domingo azalaki mobɛti monene mpe tata ya bana mitano. Alobi ete: “Ntango nazalaki kozwa libonza, ezalaki nsɔmɔ. Nazalaki komimona lokola moto aleki bato nyonso, mpe nazalaki na motema likoló na kozonga na bisika ya masano mpo na komonisa ete ezalaki bobele likambo ya makila malamu te.

“Ntango namipesaki na likanisi wana, nakómaki lokola moto oyo ameli drogue. Nazalaki pene na kosundola mwasi na ngai mpe bana na ngai bobele mpo na kolanda kobɛta. Nazalaki ntango nyonso kolápa ndai epai na mwasi na ngai ete nakobɛta lisusu te, nde na motema na ngai, nayebaki ete bilaká wana bizalaki mpamba. Nazali lisusu komikundola mokolo moko oyo, wana ezalaki ngai kolaka ye mpo na kotika yango libela, nazalaki kokanisa na lolenge oyo nasengelaki kozwa mbongo ya kobɛta na masano.

“Nabungisaki mbongo nyonso, mbongo ya mwasi na ngai mpe mosala na ngai, mpe natondaki na banyongo. Mokolo moko te elekaki kozanga ete nabɛta na lisano ya mbongo. Kino ntango oyo eloko moko epusaki ngai na komitalela: nabandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Oyo nazalaki koyekola esimbaki ngai mingi mpenza, kasi natikaki masano noki te. Nazali kotɔndo Temwe oyo ayekolaki Biblia elongo na ngai na lolenge amonisaki motema molai.

“Nsango ya Biblia eumelaki te na kozala na bopusi likoló na ngai. Esalisaki ngai na kotika bandɔtɔ ya mpamba oyo nazalaki kobika kati na yango, mpe namimona lokola Nzambe azali komona ngai. Oyo nde likambo ya mawa! Nazalaki komiyoka na nsɔni mingi, lokola baoyo ntomá Paulo akomaki maloba oyo na ntina na bango na ekeke ya liboso, ete: ‘Libonza nini bozalaki na yango liboso? Makambo oyo bozali kooka nsɔni mpo na yango sikawa. Mpo ete nsuka ya makambo yango, ezali liwa.’​—Baloma 6:21, MN.

“Nayekolaki koyeba Nzambe, nkombo na ye, bizaleli na ye, mpe mingi mpenza, motema mawa na ye. Nyonso wana epusaki ngai na kobongwana, na kokanisa na ntina na bato mosusu na esika ya komibanza ngai moko. Na nsuka, natikaki libela kobɛta na masano ya mbongo, na nsima mwasi na ngai mpe ngai moko tozwaki batisimo.

“Yesu alobaki ete solo ekosikola biso. (Yoane 8:32) Na ntembe te, yango ekokanaki epai na ngai. Solo euti na Liloba na Nzambe epesaki ngai ntina ya kozala na bomoi, ezongisaki limemya ya bomoto na ngai mpe ememelaki ngai bolamu mingi. Nasili nkutu kosalisa moko kati na baninga na ngai babɛti ya kala ete abanda kotalela bomoi na lolenge malamu. Ntango mobali wana mpe mwasi na ye bazwaki batisimo, nazalaki na mayoki ya kitoko mingi koleka oyo nazalaki kooka na masano ya mbongo.

“Ekoki mibu 20 sikawa nazali kobɛta lisusu te, ata na mosolo ya moke. Ya solo, yango ezalaki pɛtɛɛ te, kasi yango ezalaki mpe mpasi mingi te. Bolamu oyo nazali kozwa epai na Nzambe, ezali mpenza kokokisa bamposa oyo nazalaki koluka kokokisa yango na nzela ya masano ya mbongo.”a

Likanisi ya Makomami lizali eloko ya liboso ya kotalela mpo na moto oyo alingi kosala mokano ya Nzambe. Epai mosusu, baoyo bazali kosalela toli ya Nzambe, bobele te ete bazali kopɛngola mawa ya kozanga kolónga na masano ya mbongo, nde lisusu Nzambe apesi bango libonza lileki nyonso mosusu na monene.

Bozwi boleki na motuya mingi

Ntomá Paulo akomelaki Timoté ete: “[Oloba] na bangó ete bázala na loléndo té, bátíya motéma mobimba na mbóngo té, zambi mbóngo ekoumela té; bátíya motéma na Nzámbe óyo akotóndisa bísó na bilóko bínso mpô tósepela na byango; básála sé malámu, . . . bákabela [bato] bilóko na motéma molámu; sé bôngó bakomíbómbela nkita ekoúmela o bileko bikoyâ nsima; ntína ’te bázwa bomoi bwa sôló.”​—1 Timoté 6:17-19, Liloba lya Nzambe.

Nkita oyo bamibómbeli na bileko bikoya ezali nkombo malamu liboso na Nzambe. Ezali komema na “bomoi bwa sôló,” elingi koloba bomoi ya seko, libonza monene likokani na mosusu te. Yesu alobaki kati na libondeli moko epai na Nzambe, ete: “Oyo ezali bomoi ya seko, ete bayekola koyeba yo Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3, MN.

Na kokesena na matomba ya mbongo oyo kolónga na yango ezali bobele libaku, libonza oyo Nzambe atyeli biso liboso, ekoki kopesama epai na moto nyonso oyo azali kosala mokano na Ye. Lisusu, kosala mokano ya Nzambe ekopesa biso mayoki nyonso kitoko oyo tolingi kozala na yango, bakisa limemya ya bomoto na biso mpe ntina ya bomoi. Ata ndenge nini, liboso na matomba mabe ya masano ya mbongo, omikundola lisese oyo ya kala ete: “Likelemba malamu ya mbɛsɛ, ezali bongo kotika yango.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ba Témoins de Jéhovah basili kosalisa ebele na babɛti minene na masano ya mbongo ete batika momeseno na bango wana ya mabe. Basusu bazwaki lisungi na ebongiseli lokola les Joueurs anonymes.

[Elilingi na lokasa 28]

Bomoi ya seko na mabelé oyo makobongwana paradis ezali libonza lileki mabonza nyonso oyo makoki kozwama na masano ya mbongo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto