Makambo mazali koleka na mokili
Likámá kati na Ndakonzambe moko na Mexique
Likámá moko liuti kobima kala mingi te kati na ndakonzambe moko ya lingomba ya Pentecôte na engumba El Chaquillo, na mboka Mexique. Mbɔ́ngí ya gaz oyo babéngi butane—oyo eutaki mbala mosusu na mwinda ya gaz mopɛlisamaki mpo na losambo ya mpokwa—ebimisaki mɔ́tɔ oyo ebomaki bato 30 kati na ndakonzambe. Engebene zulunalo Christian Century, bato misato oyo babikaki balimbolaki ete, pasteur apekisaki bato ete babima na ndako yango te, nzokande bato mosusu babandaki kooka nzoto mpasi mpo na mbɔ́ngí. Pasteur alobaki na bandimi wana ete oyo bazalaki kooka ezali maladi te, kasi ezali nde koya ya Klisto to koya ya elimo ya Nzambe kati na nzoto na bango.
Ebele na mabongoli ya Biblia
Engebene mituya mipesami na Alliance biblique universelle mpe mitangami na Société biblique allemande, na 1991, biteni ya Biblia bisili kobongolama na minoko 32 ya sika. Engebene Wetterauer Zeitung, zulunalo ya Allemagne oyo ebimaka mokolo na mokolo, yango epesi motángo nyonso ya minoko 1978 oyo Biblia ebongolami na mobimba to na ndambo. (Zulunalo mosusu epesi motuya ya minoko 1982.) Biblia na mobimba na yango ezali kati na minoko 322, Makomami na Greke ya boklisto ezali kati na minoko 758 mpe biteni mosusu ya Biblia kati na minoko 898. Na Afrika, makomi ya Biblia mazwami kati na minoko 566. Ezali 490 na Azia, ezali 411 na mikili ya Amerika, ezali 321 na bituká ya Pacifique mpe ezali 187 na mikili ya Mpótó.
Ndɔtɔ mpamba ya banganga-minzoto
Na ebandeli ya mobu 1991, na Allemagne, Lisangá ya boyekoli makambo na zébi, lizwaki bisakweli 152 oyo bisakolamaki na banganga-minzoto 27. Batalelaki kokokana na yango na nsuka ya mbula. Engebene zulunalo Wetterauer Zeitung, 103 kati na bisakweli yango “ezalaki mpenza lokutá.” Na ndakisa, banganga-minzoto basakolaki ete, na 1991, etumba ya nikleere ekobima mpe nkisi ya SIDA ekozwama. Makambo 14 oyo makokanaki ezalaki bobele yango elobamaki na bato nyonso. Mosusu ezalaki na ntina te mpo na koluka koyeba bosolo na yango, nzokande mosusu ezalaki bongolabongola. Epai mosusu, ata nganga-minzoto moko te alobelaki makambo minene oyo mabimaki na 1991. Mokambi ya lisangá yango alobaki ete: “Soki ata moko na banganga-minzoto ayebaki oyo azalaki kosala, mbɛlɛ amonaki makambo oyo mazalaki liboso, na ndakisa, likambo oyo Gorbatchev atikaki mosala na ye to kokwea ya Union soviétique.”
Libala ezali lisusu na motuya te
Zulunalo Guardian Weekly ya Manchester (Angleterre) eyebisi ete: “Na mikolo na biso, mingi na bato oyo bazali kobalana basilaki kosangisa nzoto liboso na libala.” Enquête moko esalemaki na Angleterre, na Canada, na États-Unis mpe na Suède emonisi ete, mbala mingi babalani wana bazali koboma mabala koleka babalani mosusu. Engebene enquête mosusu na Angleterre, 60% ya babalani wana bakoki koboma mabala to kokabwana koleka baoyo bafandaki lokola makango te liboso na libala. Epai mosusu, ntalo monene ya bana bazali kobotama na baboti oyo babalani naino te. Na Angleterre mpe na bamboka oyo babéngi Pays de Galles, motuya ezali ya 31,2%. Bobele bongo, enquête moko euti kosalema kala mingi te na mikili ya Scandinavie, na Autriche, na Suisse mpe na Liechtenstein emonisi ete, pene na ndambo na misato ya bana bazali kobotama na baboti oyo babalani naino te. Mpo na mikili 12 ya Communauté européenne, mwayene ezali pene na 20%.
Likabo mabe
Croix-Rouge ya mboka Japon ezali koluka ndenge nyonso mpo na kopekisa bato na koya kopesa makila na bango bobele mpo ete basalisa test ya SIDA kozanga kofuta. Kala mingi te, euti kosɛnga na ba centres na yango ekozongisaka bato makila ete bayebisa lisusu te eloko bamoni kati na makila ya baoyo bayei mpo na kopesa makila. Lisusu, na piblisité moko ebimaki kati na Ashi Shimbun, zulunalo moko ebimaka mokolo na mokolo, Croix-Rouge ebondeli baoyo bakanisi ete bazali na mikrobe yango ete bapesa makila na bango te. Piblisité eyebisi boye: “Ata teknike oyo ebimi sika, ezali kopesa nzela te na komona mikrobe yango kati na makila katikati na eleko oyo moto azwi SIDA mpe eleko oyo biloko ya nzoto oyo babéngi anticorps bikobanda kobundisa yango.” Atako bongo, engebene Yomiuri Shimbun, “emonani ete, mpo na ebele na bato, kopesa makila ezali mwango malamu ya kotalisa makila ofele mpo na koyeba soki ezali na SIDA.” Na mobu moleki, bato 29 bapesi na makila oyo bazalaki na SIDA, bazwamaki.
Bakambi ya mangomba mpe mobulu ya kosangisa nzoto
Kala mingi te, televizio ya mboka Australie esalaki programme moko na motó ya likambo “Bosulí boleki monene.” Engebene programme wana, 15% ya bakambi ya mangomba ya Australie basalaki mbébá na kosangisa nzoto longwa na komeka kobebisa bana mike kino na kobebisa basi bandimi na bango. Na bangonga oyo elandaki programme wana elekisamaki na televizyo, direction ya telefone ya bibongiseli mingi bizali kobundisa mobulu na kosangisa nzoto eyambaki mbélá ya telefone ya ebele na bato. Ezalaki na ebele na bato oyo basilaki kokutana na likambo yango uta bambula mingi. Mwasi moko oyo basalaki ye mabe na bomwana, abombaki sekele na ye uta mibu 40! Mosusu alimbolaki ete pastere soko sángó oyo abebisaki ye wana azalaki naino mwana moke abangisaki ye ete, akokenda na lifelo ya mɔ́tɔ soki ayebisi likambo wana epai na moto mosusu. Balobeli ya ba pastere mpe basángó baboyaki kondima motuya oyo ya 15%, nde ata bongo bandimaki ete mabe ya ba pastere mpe basángó mpo na kosangisa nzoto ezali likambo moko monene.
Bana balingi mingi televizyo
Bana bazali mingimingi kokanisa ete kotanga mikanda ekosengaka milende mingi koleka. Ezali yango emonisami na enquête oyo esalemaki na Eltern, zulunalo ya Allemagne, epai na banakelasi 1960 ya mibu 8 kino mibu 15, oyo ntalo monene na bango balingi mingi televizyo. Zulunalo Schweinfurter Tagblatt eyebisi sikisiki ete, 64% na bato babakisaki ete bana balingaka kotanga bobele bazulunalo oyo ezali na ba programmes ya televizyo. Likanisi ya elenge moko ya mibu 14: Kotala televizyo ezali likambo oyo abotami na yango, nzokande kotanga mikanda ezali mwango ya mpasi oyo basengeli koyekolisa ye.
Kobebisa basi na Afrique du Sud
Totangi na zulunalo Sunday Star Review ya Johannesburg, ete: “Afrique du Sud ezali moko na bamboka epai mobulu mozali mingi.” Na mikolo na biso, kobebisa basi elobelami mingi kati na mokili. Nzokande, mwayene ya bato 23 000 bafundami na Leta mbula nyonso na Afrique du Sud; ete babebisaki basi, kasi ‘bobele likambo ya moto moko kati na bato 36 nde elobelami.’ Mabe wana ekosalemaka mbala mingi na bato ya penepene: mobali, baboti to baninga. Zulunalo Sunday Star Review elobeli lisusu “enquête oyo esalemaki na Lloyd Vogelman (université du Witwatersrand) likoló na mobulu, oyo emonanaki na nsuka na yango ete, kati na basi mibale ya Afrique du Sud, mwasi moko akobebisama na boumeli ya bomoi na ye.”
Likámá na lolenge ya kolata
Barbara Schreier, mwasi mokomi na mikanda ya midele ya bilamba, alobaki ete: “Uta kala, moláto ezali kopesa mpasi mingi.” Alingaki koloba nini? Rapport moko ya Commission américaine de sécurité oyo elobelami na zulunalo In Health, emonisi ete bobele nsima ya mobu moko “[Baameriké] 102 397 bamizokisaki na bilamba na bango, [mpe] 43 868 mosusu bamifinaki nkingo mpe bamipalolaki na babiju na bango.” Lisusu, komema ba sacs à main ya kilo ekobebisaka mapeka mpe misuni ya nkingo. Ya solo, mituya mitangami milobeli bobele baoyo bakendaki kotala monganga.
Boombo na mikolo na biso
Bato mingi bakanisi ete boombo ezali lisusu te na ekeke oyo ya ntuku mibale. Nzokande, enquête moko euti kosalema kala mingi te na zulunalo Newsweek, “emonisi ete motuya ya bato basimbami na makasi na boombo ezali na motángo ya bamilió mingi.” Lisangá moko ya Grande-Bretagne oyo babéngi Anti-Slavery International, epesi motuya ya 100 milió ya baombo kati na mokili. Na Antilles, na Proche-Orient, na Afrika mpe na Azia, ezali na bato batalelami lokola biloko mpamba mpe basɛngisami na misala makasi. Zulunalo Newsweek ebakisi ete: “Mingi babɛtami mbala na mbala. Balingi bongo kosɛngisa bango na kotósa.” Epai mosusu, ezali na bato oyo bazali kobika bobele na kokanga mpe kotɛka bilenge basi. Na mboka moko, “ntalo ya sikawa” mpo na elenge mwasi moko ezali ngombe motoba ya basi.
SIDA na Brezile
Kala mingi te, docteur Luís Alberto Pelegrino Ferreira, moto wa Brezile oyo ayekoli mikrobe oyo babéngi virus, ayebisaki ete, kati na Ekólo ya Santa Catarina, 42% ya bato ya SIDA bazali katikati na mibu 20 mpe 29. Alimboli ete, motuya monene kati na bilenge oyo bazwaki SIDA, “ezali kopusa biso na kokanisa ete babɛli wana bazwaki maladi katikati na mibu 15 mpe 19.” Bazwi mpasi oyo mpo na mobulu basalaki wana ezalaki bango bilenge. Kasi eyebani ete V.I.H (mikrobe ya SIDA) ekoki lisusu kozwama na nzela ya kozongisa makila. Zulunalo O Estado de S. Paulo elobeli likambo ya bato motoba oyo bazalaki na maladi ya kobima makila, nyonso bato ya libota moko, bango nyonso bazwaki SIDA nsima ya kozongisa bango makila oyo mazalaki na mikrobe.