Likambo ya bampasi ya bato
“NZAMBE, MPO NA NINI BOYE?” Oyo ezali motó ya likambo bakomaki na balɛtrɛ ya minene na lokasa ya liboso ya zulunalo moko monene, nsima ya koningana ya mabele oyo ebomaki ebele ya bato na Asie Mineure. Pembeni na yango ezalaki na fɔtɔ ya tata moko oyo elongi na ye ezalaki komonisa ete abulunganaki mpenza, amemi mwana na ye ya mwasi mpe azali kobima na ndako oyo ekweaki.
Bitumba, nzala, maladi mabe, mpe makama lokola mpela, mopɛpɛ makasi to koningana ya mabele ebimisi bampasi mingi, elelisi bato ebele, mpe ebomi ebele ya bato. Longola yango, basi oyo basangisaki na bango nzoto na makasi, bana oyo banyokolami, mpe makambo mosusu ya mabe ezali kosalema. Ezali na bato ebele oyo bazali kozoka mpota minene mpe mosusu bazali kokufa na makama. Bato mingi bazali kotungisama na maladi, bobange, mpe liwa ya bandeko na bango.
Na ekeke ya 20, bato banyokwamaki koleka eleko nyonso mosusu. Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, oyo esalemaki banda 1914 tii 1918, ebomaki basoda pene na milio zomi. Bato mosusu ya istware balobaka ete ebomaki mpe motango ndenge moko ya basivili. Na etumba ya mibale ya mokili mobimba, soki bamilio 50 ya bato, ezala basoda to basivili, babomamaki, bakisa mpe bamilio ya basi, bana mpe mibange oyo bazangi libateli. Na boumeli ya ekeke oyo euti koleka, bamilio mingi ya bato bakufaki ntango bazalaki koboma bato ya bituluka mpo na kosilisa bango, na botomboki na bikólo, na kowelana kati na bikólo, na nzala, mpe na bobola. Buku moko (Historical Atlas of the Twentieth Century) elobi ete bato koleka milio 180 bakufaki mpo na “makambo ya ndenge wana oyo ezali “konyokola ebele ya bato.”
Na 1918 mpe 1919, maladi babengi grippe espagnole ebomaki bato milio 20. Na bambula 20 oyo euti koleka, bato soki milio 19 bakufaki na sida, mpe bamosusu milio 35 bazali na mikrobe na yango. Bamilio ya bana batikali bitike mpo baboti na bango bakufaki na sida. Ebele ya bana oyo babotami sika bazali kokufa na sida oyo bazwaki yango ntango bazalaki naino na kati ya libumu.
Bana mike mingi bazali konyokwama na bampasi ya lolenge mosusu. Na nsuka ya 1995, zulunalo moko oyo ebimaka na Angleterre (Manchester Guardian Weekly) elobeli lapolo moko ya UNICEF boye: “Na bitumba oyo esalemaki na mbula zomi oyo euti koleka, bana milio mibale babomamaki, milio 4 to 5 batikalaki bibɔsɔnɔ, milio 12 bazangaki bisika ya kolala, koleka milio moko batikalaki bitike to bakabwanaki na baboti na bango mpe milio 10 bakómaki na mpasi na bɔɔngɔ.” Longola yango, mbula na mbula, na mokili mobimba, basi bazali kosopa zemi soki milio 40 to 50!
Makambo ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
Bato mingi bazali kobanga mikolo oyo ezali koya. Etuluku moko ya bato ya siansi balobaki boye: “Makambo oyo bato bazali kosala . . . ekoki kobongola mokili oyo tofandi na boye ete ekoka lisusu te kobatela bomoi na ndenge oyo toyebi yango.” Babakisaki ete: “Ata na ntango oyo, moto moko na kati ya bato mitano azali na bobola makasi, azali na biloko ekoki te mpo na kolya, mpe moto moko na kati ya bato zomi azali kolya malamu te.” Bato yango ya siansi basalelaki libaku wana mpo na “kokebisa bato nyonso ete likama ezali liboso” mpe balobaki ete: “Esengeli mpenza kobongola ndenge ya kobatela mabele mpe bikelamu ya bomoi oyo ezali awa na mabele, soki tolingi te ete mpasi ekɔtela bato ebele mpe ete mabele ebeba na ndenge oyo ekobongisama lisusu te.”
Mpo na nini Nzambe atikaki nzela na bampasi mpe na makambo mabe? Ndenge nini akani kobongisa makambo? Ntango nini akosala yango ?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Fɔtɔ ya likoló, kiti ya bakoka: UN/DPI Photo 186410C ya P.S. Sudhakaran; ya kati, bana ya nzala: WHO/OXFAM; ya nse, mobali akɔndi makasi: FAO photo/B. Imevbore