Totikalaki sembo epai na Nzambe na mboka Allemagne oyo eyangelamaki na ba Nazis
EZALAKI na mokolo ya malili mingi na sanza ya Avril 1939 nde natindamaki na boloko ebengami camp de concentration na mboka Sachsenhausen, na mokili ya Allemagne. Elongo na bakangami mosusu, nasambaki liboso ya komandá ya camp, moto mabe oyo bapesá ye nkombo “le Costaud” mpo ete azalaki mbinga mpe moto makasi mingi. Kati na “maloba na ye ya botombeli boyei malamu,” akanelaki biso makasi, koyebisáká bampasi oyo ezali kozela biso.
Angangaki ete: “Epai na ngai bokozwa nyonso oyo bolingi, lisasi na motó, lisasi na ntólo, lisasi na libumu.” Mpe apesaki likebisi oyo: “Bato na ngai bayebi kobeta masasi malamu! Bakotinda bino mbala moko na likoló! Bokobima awa bobele bibembe.”
Nsima na yango, natindamaki na “bandako oyo moto azalaka bobele ye moko,” eteni moko ya boloko oyo ezingami na bansinga ya bibende ebengami kanga moyibi. Ezali kuna nde bazalaki kotya ba Témoins de Jéhovah, bakisa mpe bakangami mosusu oyo batalelami lokola bato mabe koleka. Ntango bakumbaki ngai, soda ya S.S. moko ya elenge abetaki ngai mbata mingi mpo naboyaki kotya loboko na mokanda moko oyo kati na yango nakokaki komonisa ete nawangani kondima na ngai.
Otto Kamien, ya mboka Herne, akomaki moninga na ngai mpe asungaki ngai mpo na kotónga likoló ya elamba na ngai ya boloko matricule na ngai mpe elembo ya violet oyo ezalaki kokesenisa Batemwe kati na boloko. Alakisaki ngai mpe lolenge ya kobongisa mbeto na ngai; bakangami bazalaki kobetama, ata mpe kobomama, soki babongisi yango malamu te.
Otto akebisaki ngai ete: “Mbala na mbala bakotuna yo soki ozali kaka Témoin de Jéhovah. Zalá ngwi, na mpiko mpe yanolá na mongongo makasi mpe kozanga kobanga: ‘Nazali ntango nyonso Témoin de Jéhovah.’” Abakisaki: “Soki ozali ngwi mpe na mpiko, Diable akotika yo.” (Yakobo 4:7) Bilendiseli ya Otto bisalisaki ngai na kotikala sembo epai na Nzambe na boumeli ya mibu motoba oyo nalekisaki kati na camps de concentration misato.
Ntango nazali kokanisa lisusu na mibu wana ya mimekamo, nandimi lelo oyo ete, soki natikalaki sembo, ezali bobele mpo ete Nzambe asungaki ngai. Kasi makambo nini mapesaki nzela ete bakanga ngai na le 20 Janvier 1938?
Bolenge na ngai
Mwa bambula liboso ya kobotama na ngai na 1911, baboti na ngai bazalaki kofanda na mboka Königsberg, na Prusse-Orientale, bakómaki ba Bibelforscher (Bayekoli ya Biblia), nkombo oyo bayebelaki ba Témoins de Jéhovah na ntango yango. Mbala mingi mama na ngai azalaki komema biso, bandeko na ngai misato ya mibali, bandeko na ngai mibale ya basi, mpe ngai, na makita. Na mawa nyonso, nsima na boumeli ya mwa ntango, tata na ngai atikaki kosangana elongo na libota mpo na kosalela losambo ya peto. Wana bandeko na ngai ya mibali mpe ndeko na ngai moko ya mwasi bakómaki basakoli ya molende ya Bokonzi, ndeko na ngai ya mwasi Lisbeth mpe ngai totikaki mwa moke solo ya Biblia oyo toyekolaki.
Ntango Hitler azwaki bokonzi na mboka Allemagne—nazalaki na bambula soko ntuku mibale—bato bakomaki konyokwama makasi. Nazalaki kosala lokola mekanisiɛ́ na garage moko monene na engumba Königsberg. Ntango Führer azalaki kopesa diskur mpo na libaku moko ya ntina, basali nyonso basengelaki koyangana. Lolenge ya kopesa mbote na kolobáká “Heil Hitler” ekómaki mpe kosalelama. Nsima na mikolo, basengaki ngai ete namibongisa mpo na mosala ya soda; nasengelaki bongo kopona ngambo nini nalingi.
Kati na Misala 4:12, nayebaki ete heil, to lobiko, esengelaki kouta epai na Hitler te, kasi bobele na Yesu Klisto. Na bongo nasengelaki te koloba “Heil Hitler,” mpe nasalaki yango ata mbala moko te. Mpo na etinda ya komibongisa mpo na mosala ya soda, natyelaki yango ata likebi moke te.
Na 1936 mpe 1937, mama na ngai, ndeko na ngai ya nsuka ya mwasi Helene mpe bandeko na ngai mibali Hans mpe Ernst bango nyonso bakangamaki. Kobanda na ntango wana, ngai mpe, nalingaki kokamata etelemelo mpo na Nzambe ya solo. Na bongo nabandaki kotanga Biblia na mpokwa, wana ezalaki ngai kobondela Jéhovah ete asalisa ngai. Lisbeth abandaki mpe kosepela mingi na likambo yango.
Nakamati etelemelo
Na ntango esengelaki, nakamataki polele etelemelo mpo na Jéhovah na koboyáká kokota kati na mampinga ya Hitler, atako nazwaki naino batisimo te na ntango wana. Na bongo nakangamaki mpe napesamaki na maboko ya bakonzi na basoda. Poso mitano na nsima, na engumba Rastenburg, esambiselo moko ya basoda ekatelaki ngai etumbu ya mbula moko ya boloko.
Batyaki ngai na eteni oyo ekozalaka se na moto mokomoko kati na boloko monene ya Stuhm, na mboka Prusse-Occidentale. Na boumeli ya bantango na ngai ya kosala galasisi kati na lopango, nazalaki kolendisama na komonáká Batemwe ya sembo ya Königsberg oyo nayebaki bango uta bomwana na ngai. Na nsima, bandeko na ngai mibali, Paul, Hans mpe Ernst, bakangamaki kati na boloko wana. Ntango nazalaki se ngai moko, Hans amibongisaki mbala mingi mpo na koya kotikela ngai mwa eteni ya limpa.
Na nsuka ya etumbu na ngai, Gestapo (la police) ya engumba Königsberg etunaki ngai mituna mbala na mbala. Lokola nakangamaki na ekateli na ngai, natindamaki na camp de concentration na mboka Sachsenhausen. Kuna, bapesaki ngai mosala na esika ya kotónga garage, nazalaki kosala kobanda ngonga ya motoba ya ntongo kino ngonga ya motoba ya mpokwa. Lokola bazalaki kokoka koyika mpiko te liboso na makambo ya mpasi oyo bazalaki kosalela bango, bakangami mosusu bazalaki komeka kokima, koyebáká ete bakobeta bango masasi soki bakangi bango. Mokolo moko namonaki mokangami moko amibomaki na komibwakáká likoló na lopango ya lotiliki.
Mpasi ebakisami lisusu
Na Septembre 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe mpasi oyo toyokaki na Sachsenhausen ebakisamaki lisusu. Mosala ebakisamaki, mpe bapimelaki biso bilamba na biso bisalemi na nkungé ya mpate to laine oyo ekopesaka mɔ́tɔ na nzoto. Le 15 Septembre, ba Nazis bazwaki ekateli ya kopesa ndakisa epai na bakangami na kosaleláká ndeko na biso moklisto August Dickmann, oyo aboyaki mosala ya soda. Bayanganisaki ebele ya bato mpo ete batala motindo bakoboma ye.
Tozalaki Batemwe nkama mingi na komona pelɔtɔ́ moko ya basoda kobeta masasi mpe August akweaki, akufaki. Nsima na yango, bakangami nyonso bazongisamaki, longola bobele ba Témoins de Jéhovah nde batikalaki wana. Na bongo, “le Costaud” atunaki soki nani azali pene mpo na kotya loboko na mokanda oyo kati na yango akowangana kondima na ye mpe akoyebisa ete andimi kokoma soda. Moto moko te atyaki loboko; “le Costaud” atombokaki makasi.
Mobu 1939 ezalaki na malili mingi. Tozalaki na bilamba ya malamu te mpe tozalaki kolya malamu te, yango wana bato mingi bakufaki. Mingi kati na bandeko na biso baoyo bazalaki mibange bakufaki, kasi motuya ya bakufi epai na Batemwe ezalaki moke soko tokokisi yango na oyo ya bituluku mosusu ya bakangami. Ata nkutu “le Costaud” ye moko, atako azalaki makasi, azwaki maladi. Akufaki na Février 1940.
Na camp mosusu
Mwa mikolo nsima na liwa ya “le Costaud,” bato 70 kati na biso batindamaki na camp moko ya moke na Wewelsburg, penepene na engumba Paderborn. Tozalaki kokanisa ete kuna makambo makozala malamu, nzokande ezalaki mpenza bongo te. Tozalaki na bilei mingi te, mpe mosala kati na esika ya kopasola mabanga ezalaki makasi. Mikolo misusu, tozalaki kopola kino na mikuwa mpo na neige to mbula mpembe. Na boumeli ya eleko wana ya mpasi mpenza, na mpokwa nazalaki kozipa bulangeti kino na motó mpo na kofungola motema na ngai mobimba epai na Jéhovah na koleláká. Nazalaki kooka kimya ya elimo mpe kimya ya kati kokotela ngai na motema: ezalaki Nzambe nde azalaki kopesa ngai “lisungi na ntango esengeli.”—Baebele 4:16.
Jéhovah azalaki kobatela kolongono na biso ya elimo. Batemwe ya camp de concentration ya Buchenwald oyo batindamaki na Wewelsburg bamemaki elongo na bango bilei ya elimo na nzela na mikanda mikolimbolaka Biblia. Na bituluku mikemike tozalaki kokende na esika ya kolala, epai kuna tozalaki kokutana mpo na koyekola Mosenzeli na kobombama. Ata bilei ya mosuni mpe ebakisamaki mwa moke.
Natondaki Jéhovah mpo na malamu na ye ntango moninga moko moklisto amibongisaki ete nasalaka elongo na ye kati na esika ya konangwisa bibende. Mpo na bakangami—mingi na bango Batemwe—batyamaki na ba ateliers, bilei bizalaki ya malamu. Lisusu, molunge ezalaki na kati, mpe tozalaki konyokwama mingi te. Yango esungaki ngai mpenza mpamba te na boumeli ya sanza motoba nzoto na ngai oyo ekondaki ezongelaki makasi na yango.
Bandeko na ngai ya mibali
Na Wewelsburg, nazwaki nsango ya ndeko na ngai ya mwasi Lisbeth koyebisáká ngai ete ndeko na biso ya mobali Ernst atikalaki sembo epai na Jéhovah kino na liwa. Akatamaki nkingo na engumba Berlin na le 6 Juin 1941, nsima na mbula minei ya boloko. Ntango Batemwe mosusu bayokaki nsango yango, bayaki kolendisa ngai. Ezaleli na bango ya molende esimbaki motema na ngai. Na miso na biso bosembo ezalaki na motuya mingi koleka lobiko.
Mbula mibale na nsima, le 1er Février 1943, ndeko na ngai ya mobali Hans abomamaki na masasi na mboka Quednau, penepene na engumba ya Königsberg. Azalaki na mibu 34 mpe akangamaki uta mibu mitano. Na nsima, moto moko oyo amonaki kobomama na ye alobaki na ngai ete mokonzi na basoda asengaki na Hans soki azalaki na liloba ya nsuka ya koloba. Na bongo, Hans asengaki nzela mpo na kosala libondeli, mpe bapesaki ye nzela. Libondeli yango esimbaki mitema ya basoda na boye ete moko te atosaki etinda ya kobeta masasi. Ntango mokonzi na basoda azongelaki etinda na ye, soda moko abetaki masasi, mpe yango ezwaki Hans kasi akufaki te. Mokonzi ya basoda ye moko abimisaki masitɔlɔ na ye mpe abomaki ye.
Bandakisa mosusu ya bosembo
Kati na Batemwe oyo batindamaki longwa na Buchenwald mpo na kokende na Wewelsburg, 27 baponamaki mpo na mosala ya soda mpe batindamaki na bituluku bikeseni. Bango nyonso baboyaki kosala mosala ya soda, longola bobele moko, oyo andimaki kopesa maboko na basoda kasi kobunda etumba te. Batemwe wana 26 bakanelamaki ete bakobomama, kasi esimbaki te. Ntango bazongaki na boloko ya Wewelsburg, komandá alobaki na bango boye: “Kobanda sikawa kino kokóma poso minei, bokokufa mpe bokokundama.”
Na bongo bandeko wana ya sembo bazwaki mpasi eleki lisusu makasi. Basoda ya S.S. babimisaki myango ya lolenge nyonso mpo na konyokola bango, kolembisa bango mpe kotungisa bango kino na liwa. Nzokande, bango nyonso 26 babikaki! Nsima na mikolo, bakangami oyo bazalaki Batemwe te bazwaki minyoko motindo moko; kati na bango, mingi bakufaki, nzokande minyoko na bango miumelaki ntango molai te.
Bosembo ya bandeko na ngai ya basi
Na Avril 1943, natindamaki na engumba Ravensbrück. Camp wana, etondaki mpenzampenza na basi, ezalaki na mwa esika moke mpo na mibali. Bapesaki ngai mosala na garage, oyo etalanaki mpenza na camp ya basi. Bandeko basi baklisto oyo bazalaki koleka wana bamonaki nokinoki elembo na ngai ya violet. Oyo nde esengo na kosekisana mwa moke to kopesana mbote mbangumbangu! Kozanga koumela, nsango epalanganaki ete: nazalaki mwana ya mobange mwasi Rehwald. Ee, mama na ngai azalaki kati na boloko wana, elongo na ndeko na ngai ya mwasi Helene mpe semeki na ngai, mwasi oyo Hans atikaki!
Bandeko na ngai ya basi baklisto balóngaki kopesa ngai bilamba ya kati mpe, soki libaku emonani, mwa eteni ya limpa. Mokolo moko, bamibongisaki mpo ete nakoka kosolola elongo na mama na ngai na nkuku. Soki bamonaki biso, mbele tolingaki kozwa etumbu makasi. Oyo nde esengo ya komonana lisusu! Mwa basanza na nsima, ntango moke liboso ete tobima na boloko, mama na ngai akufaki. Atikalaki sembo kino na liwa.
Na nsuka tobimi na boloko!
Na Avril 1945, ba Russes mpe ba Américains bazalaki kobelema penepene na Ravensbrück. Mpo na kotika boloko polele nokinoki, bapesaki ngai motuka moko ya bilanga mpe remorque. Nsima na mobembo moko ya yikiyiki, officier S.S. oyo azalaki kotambwisa biso alobaki na biso ete ba Américains bazali penepene mpe ete tozali na bonsomi ya kosala nyonso oyo esepelisi biso.
Na bongo tosukaki na kokóma na engumba Schwerin, kati etúka ya Mecklenburg, epai kuna tokutanaki na Batemwe bautaki na boloko ya Sachsenhausen. Ndeko na ngai Paul azalaki kati na bango. Abikaki na mobembo ya liwa kobanda na Sachsenhausen, mpe na minyoko misusu. Mwa mikolo na nsima, tokamataki engbunduka mpo na kokende na engumba Berlin, epai kuna libota moko ya Batemwe eyambaki biso na bolingo nyonso.
Libota wana lisalaki mingi mpo na kosunga bandeko mibali mpe bandeko basi oyo babimisamaki na boloko. Na 1946, nabalanaki na Elli, moko na bilenge basi ya ndako wana. Na nsuka, bibongiseli bikamatamaki mpo ete nazwa batisimo, likambo oyo lizalaki mpasi mpo na kosala kati na boloko.
Oyo nde esengo na komona lisusu nsima na ebele na bambula, na ntango ya ba assemblées, baninga baklisto oyo nayebanaki na bango kati na ba camps de concentration! Basusu bazalaki mpenza baninga na ngai ya motema: batyaki bomoi na bango na likámá mpo na bandeko na bango kati na kondima. Mama na ngai, ndeko na ngai ya mwasi Helene, Paul, Hans, Ernst mpe ngai moko, soki biso nyonso tosangisi bambula oyo tolekisaki na boloko ezali 43. Mpo na ndeko na ngai ya mwasi Lisbeth, oyo akangamaki ata mbala moko te, ye mpe atikalaki sembo epai na Nzambe kino liwa na ye na 1945.
Jéhovah azali Nguya na biso
Nsima na kobalana na biso, Elli mpe ngai tozwaki libaku ya kosala bambula mingi na Béthel ya Magdeburg mpe kati na mosala ya pionnier, kino na kobotama ya bana na biso mibale ya mibali. Tozali na esengo mpo ete Hans-Joachim azali kosala lokola nkulutu mpe mwasi na ye azali pionnier. Likambo ya mawa, mwana na biso mosusu ya mobali asili kotika nzela ya boklisto oyo tolakisaki ye.
Koleka mbula 45 esili kokoka uta kobima na ngai na boloko ebengami camps de concentration. Kasi lelo oyo lisusu, Nzambe na ngolu nyonso azali naino kokokisa kobongisama na ngai. (1 Petelo 5:10, MN) Mbala mingi, makambo namonaki makundolaki ngai maloba ya ntoma Paulo kati na 1 Bakolinti 10:12: “Tika ete ye oyo akanisi ete azali kotelema ngwi akeba ete akwea te.”
Sikawa nazali na mibu 81, nazali na esengo ya kosangana lisusu kati na mosala ya kopesa litatoli mpe kosala kati na lisangá lokola nkulutu. Epai mosusu, nazali na botondi mingi mpo ete nasalisi bato mosusu ete bamipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo! Na miso na ngai, yango ezali elembo ya ngolu na Jéhovah.—Lisoló ya Josef Rehwald.
[Elilingi na lokasa 21]
Josef Rehwald na 1945
[Elilingi na lokasa 22]
Libota ya Rehwald pene na 1914, Josef afandi na mabolongo ya mama na ye
[Elilingi na lokasa 25]
Josef mpe Elli Rehwald na assemblée ya Berlin na 1991, elongo na mwana na bango Hans-Joachim mpe mwasi na ye, Ursula