Nzambe azali ebombamelo mpe nguya na ngai
LISOLÓ YA CHARLOTTE MÜLLER
Zúzi moko mokoministe alobaki: “Obongi kozwa longonya na kotalela mbula libwa oyo olekisaki kati na minyoko ya boyangeli ya Hitler. Ya solo, oboyaki kopesa mabɔkɔ na etumba, kasi sikawa okómi kobundisa kimya na biso!”
AZALAKI koloba na ntina na kokangama na ngai ya liboso na bolɔ́kɔ na ba Nazis mpe na ntina na boyangeli ya sosialiste na ekólo ya Allemagne ya Ɛ́sti. Liboso, nalobaki eloko te, nde na nsima nayanolaki: “Lolenge oyo moklisto ya solo abundelaka kimya ya solo ekeseni na lolenge oyo bato mosusu basalaka yango. Nazali bobele komeka kotosa etindá ya Biblia ya kolinga Nzambe mpe kolinga bazalani na ngai. Liloba ya Nzambe ezali kosalisa ngai ete nabatela kimya, ezala na maloba to na misala.”
Na mokolo wana ya 4 Sɛtɛ́mbɛ 1951, bakoministe bakatelaki ngai etumbu ya mbula mwambe ya bolɔ́kɔ—bokeseni ezali sé ya mbula moko na motángo ya bambula oyo boyangeli ya Nazi ekatelaki ngai.
Na ntango biso Batatoli ya Yehova tozalaki konyokolama, ezala epai ya ba Nazis to epai ya Bakoministe, nazalaki kozwa elendiseli na maloba ya Nzembo 46:1 oyo elobi ete: “Nzambe azali ekimelo [“ebombamelo,” NW] mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango na mpasi.” Bobele Yehova nde apesaki ngai nguya ya koyika mpiko, mpe ntango nyonso oyo namipesaki na kotánga Liloba na ye, yango ezalaki kokómisa ngai makasi koleka.
Nakembisami na nguya mpo na mikolo mizali koya
Nabotama na 1912 na engumba Gotha-Siebleben na etúká ya Thuringia, na ekólo Allemagne. Atako baboti na ngai bazalaki baprotestá, nzokande tata azalaki ntango nyonso koluka solo ya Biblia mpe boyangeli moko ya sembo. Ntango baboti na ngai batalaki Photo-Drame de la création, basepelaki mingi.a Tata azwaki eloko oyo azalaki koluka—elingi koloba Bokonzi ya Nzambe.
Na mokolo ya 2 Mársi 1923, tata, mama, na biso bana motoba tolongwaki na lingomba ya protestá. Tozalaki kofanda na engumba Chemnitz na etúká ya Saxe, mpe kuna tokómaki kosangana na Bayekoli ya Biblia. (Bandeko na ngai misato ya mibali mpe bandeko na ngai mibale ya basi bakómaki Batatoli ya Yehova.)
Na makita ya Bayekoli ya Biblia, mikapo ya Makomami mpe solo ya motuya ezalaki kokɔta na motema na ngai mpe yango ezalaki kopesa ngai esengo mingi. Mingimingi, biso bilenge, oyo tozalaki koleka 50, tozalaki kozwa mateya na mokolo ya Lomingo, mateya oyo ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi Käthe tolandaki mpo na mwa ntango. Na etuluku na biso, ezalaki na elenge moko na nkombo Konrad Franke, oyo azalaki kosala bibongiseli ya kotambola mosika mpo na ngalasísi mpe azalaki kolakisa biso nzembo. Na nsima, bandá na mobu 1955 kino 1969, ndeko Franke asalaki mosala ya mokambi ya filiale ya la Société Watch Tower na Allemagne.
Bambula oyo ebandaki na 1920 ezalaki eleko ya yikiyiki, bantango mosusu ata kati na basaleli ya Nzambe. Bandeko mosusu, oyo batikaki kondima Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli lokola “bilei bipesami na elaka na yango,” bakómaki kotɛmɛla mosala ya kosakola ndako na ndako. (Matai 24:45) Ezaleli yango ememaki bango na lipɛngwi. Nzokande, ezalaki mpenza “bilei” wana nde epesaki biso nguya oyo tozalaki na mposa na yango na eleko wana. Na ndakisa, ezalaki na masoló lokola oyo kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli: “Baoyo bazali kobanga te bapambolami” (1919) mpe “Nani akokumisa Yehova?” (1926) Nazalaki na mposa ya kokumisa Yehova na mosala ya mpiko, na yango nakabolaki mikanda mingi mpe mwa babúku mingi oyo ekomamaki na ndeko Rutherford.
Na Mársi ya 1933, nazwaki batisimo lokola Motatoli ya Yehova. Bobele na mbula wana, mosala na biso ya kosakola epekisamaki na Allemagne. Na ntango ya batisimo, mokapo ya Emoniseli 2:10 epesamaki lokola elendiseli mpo na mikolo mizalaki koya: “Bangá bolɔ́zi bokozwa yo te. Talá, Satana alingi kobwaka bamosusu na bino kati na bolɔ́kɔ ete bómekama, mpe bokozwa monyoko mikolo zomi. Zalá sembo kino kufa, mpe nakopesa yo motole na bomoi.” Namanyolaki na mozindo likoló ya mokapo yango, koyebáká malamu ete komekama monene ezalaki kozela ngai. Yango esalemaki mpe bongo.
Lokola libota na biso ezalaki komikɔtisa na makambo ya politiki te, baninga na biso ya kartyé bazalaki ntango nyonso komitunatuna mpo na mikano na biso. Nsima ya voti moko ya politiki, etuluku ya basodá ya Nazi bayaki mpe bangangaki na mongongo makasi liboso ya ndako na biso ete, “Bato mabe bazali awa!” Lisoló oyo ezalaki na motó na likambo ete “Bangá bango te,” oyo libimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Desɛ́mbɛ 1933 na lokótá ya Allemand ezalaki elendiseli makasi mpo na ngai. Nalingaki kotikala ntango nyonso Motatoli ya sembo ya Yehova ata na bantango ya mpasi makasi.
Ekateli ya monguna—Bolɔ́kɔ
Kino na ɔtɔ́mne ya mobu 1935, likoki ezalaki naino ya konyata Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na engumba Chemnitz. Nsima na yango, masini ya konyata mikanda oyo tozalaki kosalela esengelaki kotindama na Beierfeld na etúká ya Ore Mountains, epai kuna esalelamaki mpo na konyata mikanda kino Augústo 1936. Ngai na Käthe tozalaki komema mikanda epai na bandeko oyo tata apesaki biso adresi na bango. Makambo nyonso matambolaki malamu na boumeli ya mwa ntango. Kasi Gestapo ebandaki kokɛngɛlakɛngɛla ngai, mpe na Augústo 1936 bayaki kokanga ngai na ndako mpe batyaki ngai na bolɔ́kɔ, epai kuna nazelaki kosambisama.
Na Febwáli 1937, bandeko mibali 25 mpe bandeko basi 2—na ngai elongo—tosambisamaki na esambiselo moko na etúká ya Saxe. Balobaki ete lisangá ya Batatoli ya Yehova ezalaki kopusa bato na botomboki. Bandeko mibali oyo bazalaki konyata Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bazwaki etumbu ya mbula mitano ya bolɔ́kɔ. Bakatelaki ngai mbula mibale.
Na esika ete bátika ngai nabima na bolɔ́kɔ ntango etumbu na ngai esilaki, basodá ya Gestapo bakamataki ngai lisusu. Esengelaki ete natya mabɔkɔ na mokanda moko oyo ekomamaki ete nakosala lisusu mosala ya Motatoli ya Yehova te. Naboyaki na mpiko nyonso, yango epesaki mokonzi ya basodá nkanda, mbala moko atɛlɛmaki, mpe asalaki mokanda mpo ete bátya ngai na bolɔ́kɔ mpo na mwa ntango. Bokoki komona mokanda yango na elilingi. Kozanga ete bápesa ngai ndingisa ya komona baboti na ngai, namemamaki nokinoki na káa moko moke mpo na basi bakangami na Lichtenburg pembeni ya Ebale Elbe. Mwa moke na nsima nakutanaki na Käthe. Ye azalaki na káa ya bakangami ya Moringen uta Desɛ́mbɛ 1936, kasi ntango káa yango ekangamaki, ye mpe bandeko basi mosusu mingi batindamaki na Lichtenburg. Tata na ngai mpe azalaki na bolɔ́kɔ, mpe namonaki ye lisusu te kino na mobu 1945.
Na Lichtenburg
Na ebandeli napesamelaki nzela te ya kozala esika moko na Batatoli mosusu ya basi wana bazalaki kopesamela etumbu na bantina ekeseni. Kati na ndako moko ya káa yango, namonaki bituluku mibale ya bakangami—epai moko basi oyo bazalaki kofanda na mesa mpe epai mosusu basi Batatoli oyo bazalaki kofanda na bibonga na boumeli ya mokolo mobimba mpe bazalaki kopesa bango bilei te.b
Nazalaki pene ya kondima misala nyonso oyo bakokaki kopesa ngai, na elikya ya kokutana na Käthe na lolenge moko to mosusu. Mpe ezali yango nde esalemaki. Tokutanaki wana bazalaki kokende kosala mosala elongo na bakangami mosusu mibale. Na esengo nyonso, nayambaki ye makasi. Kasi, nokinoki mwasi oyo azalaki kokɛngɛla akendaki kofunda. Batunaki biso mituna mingi, mpe uta ntango yango basalaki ete tókutanaka lisusu te. Likambo yango epesaki mpasi mingi.
Ezali na makambo mosusu mibale masalemaki na Lichtenburg, oyo nakoki kobosana yango te. Na libaku moko, bakangami nyonso bayanganisamaki na libándá ya bolɔ́kɔ mpo na koyoka lisukúlu moko ya Hitler na radio. Biso Batatoli ya Yehova toboyaki, mpamba te milulu ya makambo ya politiki misengelaki kosalema. Na yango bakɛngɛli bafungolaki batiyo mpe basopelaki biso ebele ya mai, kobenganáká biso basi mpamba oyo tozangi libateli longwa na etaze ya misato kino na libándá. Totɛlɛmaki esika yango, bilamba nyonso bipoli na mai.
Na libaku mosusu ngai, elongo na Gertrud Oehme mpe Gertel Bürlen, batindaki biso ete tókembisa biro ya komandá na miinda, mpo ete eyenga ya kobotama ya Hitler ebɛlɛmaki. Toboyaki, tososolaki ete ezalaki myango ya Satana mpo na koluka kobebisa bosembo na biso na makambo mikemike. Lokola etumbu, mokomoko na biso bandeko basi asengelaki kolekisa pɔ́sɔ misato na esika na ye moko kati na mwa bolɔ́kɔ moke mpe ya molili makasi. Kasi Yehova atikaki biso te mpe, ata kati na esika wana ya mpasi makasi, ye azalaki ntango nyonso ebombamelo na biso.
Na Ravensbrück
Na Máí 1939 bato ya bolɔ́kɔ na Lichtenburg batindamaki na káa ya bakangami na Ravensbrück. Kuna, ngai na bandeko basi Batatoli mosusu mingi bapesaki biso mosala ya kosukola bilamba. Mwa moke na nsima, wana etumba ebandaki; basengaki biso ete tómema bɛndɛ́lɛ ya Swastika, toboyaki kosala yango. Mpo na yango, bato mibale kati na biso, ngai na Mielchen Ernst, batyaki biso na bolɔ́kɔ. Yango ezalaki moko na bitumbu bileki makasi mpe elimbolaki ete tosengelaki kosala misala makasi mpenza mikolo nyonso ata na mokolo ya Lomingo, ezala na nsé ya mbula to ya moi makasi. Na momeseno, etumbu yango ezalaki koumela sanza misato, kasi ya biso eumelaki mbula mobimba. Soki lisungi ya Yehova te, nakokaki kobika te.
Na 1942, ezalela na biso bakangami ebongaki mwa moke, mpe bapesaki ngai mosala ya kobatela ndako ya libota ya sodá moko ya SS, oyo ezalaki mosika te na káa. Libota yango epesaki ngai mwa bonsomi na makambo mosusu. Na ndakisa mokolo moko, ntango nazalaki kotambola elongo na bana, nakutanaki na Josef Rehwald mpe Gottfried Mehlhorn, mibali oyo bazalaki bakangami mpe balataki elembo ya triangle moke ya lángi ya violɛ́, topesanaki mwa maloba ya kolendisana.c
Bambula ya mikakatano oyo elandaki etumba
Na 1945, ntango mampinga masangani mpo na kobundisa ekólo Allemagne mabɛlɛmaki, libota epai nazalaki kosala mosala bakimaki, mpe nakendaki na bango elongo. Esika moko na mabota mosusu ya ba SS, basalaki molɔngɔ́ molai ya basáli-mobembo epai na Wɛ́sti.
Mikolo ya nsuka ya etumba ezalaki na yikiyiki mpe mitondaki na makámá. Na nsuka, tokutanaki na etuluku ya basodá ya Amerika oyo bapesaki ngai ndingisa ete ntango tokokóma na engumba oyo ezalaki liboso, nasengelaki kokomisa nkombo lokola moto ya bonsomi. Boyebi banani nakutanaki na bango kuna? Josef Rehwald mpe Gottfried Mehlhorn. Bayokaki ete Batatoli nyonso ya káa ya bakangami na Sachsenhausen bakómaki na Schwerin nsima ya kosala mobembo ya mpasi na makolo. Na bongo, biso nyonso misato totambolaki mpo na kokóma na mboka yango oyo ezalaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 75. Oyo nde esengo tozalaki na yango na Schwerin ntango tokutanaki na bandeko na biso nyonso ya sembo, babiki na káa ya bakangami, bakisá mpe Konrad Franke.
Na Desɛ́mbɛ 1945, ezalela ya makambo ya mboka ebongaki mwa moke na boye ete nazwaki likoki ya kosala mobembo na engbunduka. Boye, nakamati sikawa nzela mpo na kozonga na mboka na ngai! Nzokande, na mobembo, bantango mosusu nazalaki likoló ya engbunduka mpe nazalaki mbala mosusu kotɛlɛma na mopanzi ya engbunduka. Wana nakomaki na Chemnitz, nakitaki na engbunduka mpe natambolaki kino esika oyo libota na biso ezalaki kofanda kala. Kasi na balabála epai etuluku ya basodá ya Nazi batɛlɛmaki mpe bangangaki ete “Bato mabe bazali awa!” ata ndako moko etikalaki te. Eteni yango mobimba ebebisamaki nyɛɛ na babɔmbi. Nzokande, nazwaki makasi ntango namonaki mama, tata, Käthe, bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi ete bazali naino na bomoi.
Makambo ya nkita na Allemagne nsima ya etumba mazalaki mpasi mingi. Atako bongo, masangá ya libota ya Nzambe ezalaki sé kokóla na mboka yango mobimba. La Société Watch Tower asalaki nyonso mpo na kopesa biso bisaleli bikoki mpo na mosala ya kosakola. Mosala ebandaki lisusu kati na Betele ya Magdeburg, oyo ba Nazis bakangaki. Na prɛntá ya mobu 1946, nazwaki libyangi ete nakende kosala kuna mpe natindamaki kosala na kúku (cuisine).
Tozongi lisusu na epekiseli mpe na bolɔ́kɔ
Magdeburg ezali na eteni ya Allemagne oyo ekómaki na boyangeli ya Bakoministe. Na mokolo ya 31 Augústo 1950, Bakoministe bapekisaki mosala na biso ya kosakola mpe bakangaki Betele ya Magdeburg. Mosala na ngai na Betele esukaki, mosala yango ezalaki mpo na ngai eleko ya komimesenisa na makambo ya ntina mingi. Nazongaki na Chemnitz, na ekateli ete ata na boyangeli ya Bakoministe, nasengelaki kokangama na solo mpe kosakola Bokonzi ya Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na banyokwami.
Na Apríli 1951, nasalaki mobembo elongo na ndeko mobali moko kino engumba Berlin mpo na kozwa bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na bozongi na biso, na Chemnitz, mitema na biso mibɛtaki makasi na komona ete esika engbunduka etɛlɛmaka ezingamaki na bapolisi. Bazalaki kozela biso, mpe nokinoki bakangaki biso.
Wana bakangaki biso mpo na kozela kosambisama, nazalaki na mikanda mimonisaki ete nakangamaki na bolɔ́kɔ na boumeli ya bambula mingi na ntango ya boyangeli ya Nazi. Mpo na yango, bakɛngɛli banyokolaki ngai te. Moko na bakonzi-basi bakɛngeli alobaki ete: “Bino Batatoli ya Yehova bozali basáli na mabe te; bolɔ́kɔ ezali mpo na bino te.”
Mokolo mosusu, mokonzi yango ya mwasi ayaki na ndako na ngai ya bolɔ́kɔ epai tozalaki na bandeko mibale ya basi, na mayele nyonso atyaki eloko moko na nsé ya moko ya bambeto na biso. Eloko yango nini? Biblia na ye moko, apesaki biso yango. Na libaku mosusu, lokola baboti na ngai bazalaki kofanda mosika te na bolɔ́kɔ, akendaki kotala bango. Akamataki mwa banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ndambo ya bilei, abombaki yango na nsé ya bilamba na ye, mpe na mayele, akɔtisaki yango nyonso na esika oyo nazalaki kolala.
Ezali na likambo mosusu nasepelaka komikundola yango. Mokolo moko ya Lomingo na ntɔ́ngɔ́, toyembaki nzembo ya Bokonzi na mongongo makasi na boye ete bakangami mosusu bazalaki kobɛta mabɔkɔ na esengo nsima ya loyembo mokomoko.
Nguya mpe lisungi euti na Yehova
Ntango tozalaki kosambisama na mokolo ya 4 Sɛtɛ́mbɛ 1951, zúzi alobaki maloba mazali na ebandeli ya lisoló oyo. Etumbu na ngai ya bolɔ́kɔ nasalaki yango na engumba Waldheim, na nsima na Halle, mpe na nsuka na Hoheneck. Makambo mibale oyo nakolobela na mokuse ekomonisa ndenge Nzambe azalaki ebombamelo mpe nguya na biso Batatoli ya Yehova mpe ndenge nini Liloba na ye lilendisaki biso.
Kati na bolɔ́kɔ ya Waldheim, biso nyonso bandeko basi Batatoli tozalaki kokutana mbala na mbala na ndako moko, yango epesaki biso likoki ya kosala makita ya boklisto. Epekisamaki kozala na bíki na papyé, atako bongo bandeko basi mosusu bazwaki biteni ya elamba mpe basalaki na boye ete likoló na yango babakisaki eteni ya elemba moke epai mokapo mpo na mobu 1953 ekomamaki; yango elobaki ete: “Kumbamá liboso na [Yehova] na bilamba na pɛto.”—Nzembo 29:2.
Mokɛngeli moko ya mwasi ayaki kokuta biso mpe nokinoki afundaki biso. Mokambi ya bolɔ́kɔ ayaki mpe alobaki na bandeko basi mibale ete bátombola eteni wana ya elamba likoló. Atunaki ete: “Nani asali yango? Elimboli nini?”
Ndeko mwasi moko alingaki koyambola mpe kondima etumbu na esika na biso banso, kasi nokinoki biso banso tolobanaki na mongongo ya nsé, toyokanaki ete etumbu ekwela biso banso. Boye toyanolaki ete: “Tosalaki yango mpo na kolendisa kondima na biso.” Babɔtɔlaki eteni wana ya elamba, mpe lokola etumbu, bapimelaki biso bilei. Na ntango mokambi ya bolɔ́kɔ azalaki kotuna biso, bandeko basi yango mibale batombolaki eteni wana ya elamba likoló na boye ete tókoka kokɔtisa na makanisi na biso mokapo wana ya kolendisa.
Ntango bolɔ́kɔ mpo na bana basi na Waldheim ekangamaki; bandeko nyonso ya basi totindamaki na engumba Halle. Kuna bato bakokaki komemela biso biloko, mpe nini emonanaki kati na mapapa oyo tata atindelaki ngai? Masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli! Kino sikawa nakoki komikundola oyo ezalaki na mitó na makambo ete: “Bolingo ya solo esalaka misala” mpe “Lokuta ememaka moto na kobungisa bomoi.” Masoló yango mpe mosusu ezalaki mpenza eloko ya motuya, mpe ntango tolekisaki yango na mayele moko epai na mosusu, moto na moto azwaki banoti na ye.
Mokolo moko, ntango bazalaki kokɔta na pwasa na biteni ya bolɔ́kɔ, mokɛngɛli moko amonaki banɔti na ngai oyo nabombaki na kati ya matela na ngai ya matiti. Na nsima, abyangisaki ngai mpo na kotuna ngai mituna mpe alobaki ete mpo na koloba solo, azalaki na mposa ya koyeba ndimbola ya lisoló “Bilikya ya baoyo babangaka Yehova mpo na 1955.” Mokoministe yango atungisamaki mingi na ntina na liwa ya mokambi na bango Staline, oyo akufaki na 1953, avenire ezalaki molili mpo na bango. Nde mpo na biso, avenire esengelaki komema mbongwana na ezalela na biso kati na bolɔ́kɔ, kasi nayebaki naino likambo yango te. Nalimbolaki na kondimisama nyonso ete bilikya mpo na Batatoli ya Yehova ezalaki ya malamu koleka. Mpo na nini? Natángaki maloba ya mokapo oyo esimbaki motó ya lisoló yango, Nzembo 112:7 ete: “Ye akobanga nsango mabe te, motema na ye ezali ngwi naino ekotya ye elikya na ye epai na [Yehova].”
Yehova azali ntango nyonso ebombamelo mpe nguya na ngai
Mbula mibale liboso ete bolɔ́kɔ na ngai esila, nabɛlaki makasi, mpe babimisaki ngai na bolɔ́kɔ na Mársi 1957. Bakonzi ya Allemagne ya Ɛ́sti batungisaki ngai lisusu mingi na ntina na mosala mpo na Yehova. Na bongo, na mokolo ya 6 Máí 1957, nazwaki libaku ya kokima na engumba Berlin ya Wɛ́sti, mpe longwa na engumba wana, nakɔtaki na Allemagne ya Wɛ́sti.
Yango esalemaki bambula mingi liboso ete nzoto na ngai ezonga kolɔngɔ́nɔ́. Kino lelo nazali sé na mposa makasi ya bilei ya elimo mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli nyonso ya sika nazelaka yango na motema likoló. Mbala na mbala, namitalelaka na mozindo ya motema na ngai. Nazali ntango nyonso komibanzabanza na makambo ya elimo? Nasili kolóna bizaleli malamu? Lolenge ya kondima na ngai oyo emekami ezali kosanzola mpe kokumisa Yehova? Mokano na ngai ezali bongo ya kosepelisa Nzambe kati na makambo nyonso, mpo ete ye azali ntango nyonso ebombamelo mpe nguya na ngai libela na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Photo-Drame ezalaki filime oyo esalemaki na bililingi oyo bitambolaka mpe mosusu bininganaka te, bandá na mobu 1914, batindami ya la Société Watch Tower balakisaki yango mingi epai na bato.
b Zulunalo Trost (Libɔndisi), oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower na engumba Berne, na Suisse na 1 Máí 1940, lokasa 10, elobaki ete na libaku moko bandeko basi Batatoli ya Yehova na Lichtenburg bapesaki bango bilei ya midi te na boumeli ya mikolo 14 mpo ete baboyaki kopesa losako ya lokumu na ntango loyembo ya Nazi ezalaki koyembama. Na káa yango ezalaki na Batatoli ya Yehova 300.
c Lisoló ya Joseph Rehwald ebimaki na Lamuká! ya 8 Febwáli 1993, nkasa 20-23 (ebimeli ya Lifalansé).
[Elilingi na lokasa 26]
Biro ya ba SS na Ravensbrück
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na likoló: Stiftung Brandenburgische Gedenkstätten
[Elilingi na lokasa 26]
Lokasa na ngai ya ndingisa mpo na kosala na libándá ya káa