Lisolo ya bomoi
Na lisalisi ya Yehova, tobikaki na mabɔkɔ ya bakonzi ya mabe
Ya Henryk Dornik
NABOTAMAKI na 1926. Baboti na ngai bazalaki bandimi ya molende mpenza ya Katolike. Bazalaki kofanda na engumba Ruda Slaska, penepene na engumba Katowice, na sudi ya Pologne. Bateyaki ngai ná yaya na ngai ya mobali Bernard mpe baleki na ngai mibale ya basi, Róża ná Edyta, kobondela, kokɔta na misa mpe kotubela masumu na biso epai ya sango.
Solo ya Biblia ekɔti na ndako na biso
Mokolo moko na sanza ya Yanuali 1937, ntango nazalaki na mbula zomi, tata azongaki na ndako mino nyonso libándá na esengo. Ayaki na buku moko ya monene mpenza, oyo azwaki epai ya Batatoli ya Yehova. Alobaki ete: “Bana, bótala eloko nazwi: Makomami Mosantu!” Ezalaki mbala ya liboso namona Biblia.
Na boumeli ya ntango molai, Lingomba ya Katolike ekonzaki bato ya Ruda Slaska mpe ya zingazinga na yango. Basango bazalaki mpenza baninga ya bapatrɔ mpe bazalaki kosɛnga basali ná mabota na bango bátosaka na makambo nyonso. Soki mosali moko akɔti misa te to aboyi kotubela, bazalaki kotalela ye lokola mopakano mpe bazalaki kolongola ye na mosala. Mosika te, Tata akómaki na likama, mpo abandaki koyangana na Batatoli ya Yehova. Kasi, ntango sango moko ayaki na ndako na biso, Tata asambwisaki ye na miso ya bato nyonso ete azali mosambeli ya lokuta. Sango yango ayokaki nsɔni mpe abendaki nzoto, yango wana balongolaki tata na mosala te.
Lokola namonaki ndenge tata akangaki sango monɔkɔ, yango elendisaki ngai mpo nakangama na ekateli na ngai ya koyeba Biblia. Mokemoke, nakómaki kolinga Yehova, mpe nakómaki moninga na ye. Mwa basanza na nsima ya lisolo ya tata ná sango wana, toyanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, mpe na libaku yango balakisaki tata epai ya etuluku moko ya bandeko 30 na maloba oyo: “Oyo azali Yonadaba.” Mosika te, nayaki koyeba ete “Bayonadaba” ezali baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé, mpe ete motángo na bango esengelaki kobakisama.a—2 Mikonzi 10:15-17.
“Mwana, oyebi ntina ya batisimo?”
Ntango tata andimaki solo, atikaki komɛla masanga mpe akómaki mobali mpe tata moko malamu. Atako bongo, mama azalaki koboya kolanda bindimeli ya tata, mpe azalaki koloba ete akolinga kutu tata azala ata ndenge azalaki liboso, kasi atikala kaka na Katolike. Kasi, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, amonaki ete kaka basango oyo babondelaki ete ekólo Pologne elonga ekólo Allemagne oyo eyaki kobundisa bango bakómaki lisusu kotɔnda Nzambe mpo na ndenge Hitler azalaki kolonga bitumba! Na nsima, na 1941, mama akómaki mpe kosalela Yehova elongo na libota mobimba.
Liboso na yango, ngai namonisaki mposa ya kozwa batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova, kasi bankulutu balobaki ete nazali mwana moke mingi. Bayebisaki ngai nazela. Kasi nsukansuka, na mikolo ya sanza 10, na sanza ya Desɛmbɛ, mobu 1940, Konrad Grabowy (ndeko oyo atikalaki sembo tii ntango akufaki na kaa ya bakangami) atunaki ngai mituna ya batisimo na mayele na kati ya mwa ndako moko. Atunaki ngai mituna mitano mpe na nsima, lokola amonaki ete nakoki, abatisaki ngai. Moko ya mituna oyo atunaki ngai yango oyo: “Mwana, oyebi ntina ya batisimo?” Mosusu yango oyo: “Oyebi ete lokola tozali na ntango ya etumba, mosika te ekosɛnga opona soki okozala na ngámbo ya Hitler to na ngámbo ya Yehova, mpe ete soki oponi kozala na ngámbo ya Yehova, yango ekoki komemela yo liwa?” Kozanga kokakatana, nayanolaki ete: “Nayebi.”
Minyoko ebandi
Mpo na nini Konrad Grabowy aponaki kotuna ngai kaka mituna wana? Basoda ya Allemagne bakɔtaki na Pologne na 1939, mpe na nsima kondima mpe bosembo na biso ekómaki komekama makasi. Mokolo na mokolo, ntango tozalaki koyoka ndenge bazalaki kokanga bandeko na biso baklisto, komema bango na mikili mosusu mpe kotya bango na bolɔkɔ to na bakaa ya bakangami, nsɔmɔ na biso ezalaki kobakisama. Toyebaki ete mosika te ekokóma ngala na biso.
Banazi bazalaki na mposa ya kokɔtisa bilenge nyonso, ezala ngai ná bandeko na ngai misato, na lingomba ya politiki ya Hitler. Lokola tata ná mama baboyaki mbala na mbala kotya bankombo na bango na mokanda ya bankombo ya bato oyo bazalaki bana mboka ya Allemagne to balingaki kozwa lotomo ya kozala bana-mboka ya Allemagne (Volkslist), babɔtɔlaki bango lotomo ya kobɔkɔla biso. Batindaki Tata na kaa ya bakangami ya Auschwitz. Na Febwali 1944, batindaki ngai ná yaya na ngai na kaa ya bilenge ya Grodków pene na Ebale Nysa, mpo bákɔtisa biso makanisi na bango; mpe batindaki bandeko na biso ya basi na kuva moko ya bamamɛlo na mboka Czarnowąsy, pene na engumba Opole. Mposa na bango ezalaki ya kolongola na mitó na biso oyo bakonzi babengaki “makanisi mabe ya baboti na biso.” Mama atikalaki na ndako kaka ye moko.
Ntɔngɔ nyonso na kaa oyo batyaki biso, bazalaki komatisa bendele ya Banazi mpe kosɛnga biso tótombola lobɔkɔ ya mobali mpe tópesa bendele losako na maloba oyo: “Heil Hitler.” Ezalaki komekama makasi mpenza mpo na kondima na biso, kasi ngai ná Bernard tozalaki koboya na motema moko kosala yango. Yango wana, bazalaki kobɛta biso mabemabe, mpo tozalaki “kotosa te.” Lokola milende nyonso oyo basalaki mpo na kobongola makanisi na biso elongaki te, basoda ya Nazi balobaki na biso boye: “Soki bolingi tótinda bino na kaa ya bakangami te, bótya mabɔkɔ na mokanda mpo na komonisa ete boponi kokóma basoda ya Allemagne.”
Na Augusto 1944, ntango bakonzi bazwaki ekateli ya kotinda biso na kaa ya bakangami, balobaki boye: “Tokolonga te kobongola bango makanisi. Bato yango basepelaka soki bazali konyokola to koboma bango mpo na Nzambe. Botomboki na bango ekoki kobebisa bilenge nyonso ya kaa oyo.” Atako nazalaki na mposa ya kokufa martiru te, kondima konyokwama na mpiko nyonso mpo nazali sembo epai ya Yehova ezalaki kopesa ngai esengo. (Misala 5:41) Nakokaki ata moke te kolonga minyoko nyonso oyo ezalaki kozela ngai na makasi na ngai moko. Epai mosusu, kobondela na etingya esalisaki ngai napusana penepene na Yehova, mpe akómaki mpenza mosungi na ngai.—Baebele 13:6.
Na kaa ya bakangami
Mosika te, bamemaki ngai na kaa ya bakangami ya Gross Rosen, na etúká ya Silésie. Bapesaki ngai nimero mpe elembo ya violɛ mpo na komonisa ete nazali Motatoli ya Yehova. Basoda ya Nazi oyo bazalaki kokɛngɛla kaa balobaki na ngai ete soki nalingi, nakoki kobima na bolɔkɔ, ata mpe kokóma mokonzi ya basoda. Balobaki boye: “Osengeli kotika mateya ya Bayekoli ya Biblia, oyo ezali kotɛmɛla boyangeli ya Hitler.” Longola Batatoli ya Yehova, bazalaki kosɛnga bato mosusu ya bolɔkɔ básala likambo ya ndenge wana te mpo bábimisa bango na kaa ya bakangami. Kasi, lokola bankóto ya bandeko mosusu, naboyaki “libaku” yango na motema moko. Bakɛngɛli yango balobaki na ngai boye: “Talá malamu mombonda wana oyo ebimisaka milinga likoló ya ndako oyo batumbaka bibembe mpe kanisá lisusu malamu. Soki obongoli makanisi na yo te, milinga na yo mpe ekobima na mombonda wana.” Naboyaki lisusu na motema moko, mpe na ntango wana, natondaki na “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”—Bafilipi 4:6, 7.
Nabondelaki mpo nazwa likoki ya kosolola na Batatoli mosusu oyo bazalaki na kaa yango mpe Yehova ayokaki libondeli na ngai. Na kati na bango, ezalaki na Gustaw Baumert, ndeko moko ya sembo oyo akipaki ngai na boboto mpe na bolingo mpenza. Ntembe ezali ata moke te ete Yehova amimonisaki epai na ngai lokola “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 Bakolinti 1:3.
Mwa basanza na nsima, lokola basoda ya Russie bazalaki se kopusana, Banazi balongolaki kaa yango wana nokinoki. Ntango tolingaki kolongwa, biso bandeko mibali totyaki bomoi na biso na likama mpe tokɔtaki na bolɔkɔ ya basi mpo na koyeba ndenge bandeko na biso ya basi soki 20 oyo bazalaki wana bazali ndenge nini. Elsa Abt ná Gertrud Ott bazalaki na kati ya bandeko yango.b Ntango bamonaki biso, bayaki mbangu kokutana na biso, mpe nsima ya kolendisana, bayembaki elongo nzembo moko ya Bokonzi oyo ezali na maloba oyo: “Moto na sembo mpe na molende, Akobang’eloko te.”c Biso nyonso totangisaki mai ya miso!
Tokei na kaa mosusu
Banazi batondisaki bato ya bolɔkɔ 100 to 150 na bawagɔ mpe bapesaki biso bilei te, mai te, mpe tosalaki mobembo yango na nse ya mbula ya malili makasi. Tonyokwamaki mpenza na mposa ya mai mpe na fiɛvrɛ. Ntango bato ya bolɔkɔ bazalaki kokwea mpe kokufa na maladi to na kolɛmba, bawagɔ ezalaki kotikala mwa polele. Makolo mpe matonga na ngai nyonso elɛmbaki makasi mpe nakokaki lisusu ata kotɛlɛma te. Nsima ya mobembo ya mikolo zomi, mwa bato ya bolɔkɔ oyo bakufaki te bakómaki na kaa ya bakangami ya Mittelbau-Dora, penepene na engumba Nordhausen, oyo ezali penepene na engumba Weimar, na etúká ya Thuringe. Likambo ya kokamwa, ata ndeko moko te akufaki na mobembo wana ya mpasi mingi.
Ntango kaka makasi ebandaki kozonga na nzoto nsima ya mobembo wana, pulupulu ya makila ekɔtaki na kaa mpe ngai ná bandeko mosusu tobɛlaki yango. Bayebisaki biso tótika naino komɛla supu oyo bazalaki kopesa bato ya bolɔkɔ mpe tólyaka kaka mampa oyo eziká. Nasalaki bongo mpe mosika te nabikaki. Na Marsi 1945, toyokaki ete Mokapo ya mobu wana ezalaki Matai 28:19: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” Emonanaki ete mosika te bikuke ya bakaa ekofungwana mpe nsango malamu ekokoba kosakolama! Totondaki mpenza na esengo mpe na elikya, mpo tokanisaki ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekosuka na Armagedona. Yehova alendisaki biso mpenza na ntango wana ya mpasi!
Tobimi na kaa
Na mwa 1 Aprili 1945, basoda ya bikólo oyo esanganaki mpo na kobunda na Allemagne babwakaki babɔmbi na bakaa ya basoda ya Banazi mpe penepene na kaa na biso. Bato mingi bakufaki to bazokaki. Na mokolo oyo elandaki, babwakaki babɔmbi ebele na esika oyo tozalaki, mpe na ntango wana nde bɔmbi moko ya makasi mpenza epumbwisaki ngai na likoló.
Ndeko moko, Fritz Ulrich, asalisaki ngai. Atimolaki libondo ya bosɔtɔ oyo ekundaki ngai, na elikya ete nazali naino na bomoi. Nsukansuka, amonaki ngai mpe abimisaki ngai. Ntango makanisi ezongaki, namonaki ete nazoki mabe mpenza na elongi mpe na nzoto mpe nazalaki koyoka lisusu te. Lokito ya bɔmbi ebomaki ngai matoi. Bambula ebele elekaki liboso nabanda lisusu koyoka.
Na kati ya bankóto ya bato ya bolɔkɔ, kaka mwa bato moke nde bakufaki te na babɔmbi yango. Bandeko na biso mosusu bakufaki; moko na bango ezalaki ndeko Gustaw Baumert. Bampota oyo nazokaki epɔlaki mpe ezalaki kopesa ngai fiɛvrɛ makasi. Kasi mosika te, basoda ya bikólo oyo bazalaki kobunda na Allemagne bamonaki biso mpe babimisaki biso. Na ntango yango, bibembe ya bato ya bolɔkɔ oyo ebandaki kopɔla ebimisaki maladi moko ya mabe oyo ezalaki kosilisa bato. Ngai mpe nabɛlaki maladi yango. Bamemaki ngai ná bato mosusu ya maladi na lopitalo. Atako minganga basalaki nyonso, tobikaki kaka bato misato. Nazalaki na botɔndi mpenza na ndenge Yehova alendisaki ngai na ntango wana ya mpasi mpo nabungisa kondima na ngai te. Nazalaki mpe na botɔndi mpo Yehova amonaki malamu abikisa ngai na “molili” ya kufa.—Nzembo 23:4.
Nazongi mboka!
Ntango balongaki Allemagne na etumba, nakómaki na elikya ete mosika te nakozonga mboka, kasi yango ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te ndenge nakanisaki. Bato mosusu ya ebongiseli moko babengi Action catholique oyo tozalaki na bango na bolɔkɔ bamonaki ngai. Bagangaki, “Tóboma ye!” Bakweisaki ngai na mabelé mpe babandaki konyata ngai. Moto moko ayaki mpe abikisaki ngai na mabɔkɔ na bango, kasi esɛngaki mikolo mingi mpo namiyoka malamu, mpo nazokaki mpe nakómaki naino makasi te banda maladi wana oyo esilisaki bato ezwaki ngai. Kasi, nsukansuka nazongaki epai na biso. Nazalaki mpenza na esengo ya kokutana lisusu na libota na ngai! Bango nyonso basepelaki makasi ntango bamonaki ngai, mpo bazalaki kokanisa ete nakufá.
Mosika te, tobandaki lisusu mosala ya kosakola, mpe bato mingi oyo bazalaki mpenza na mposa ya koyeba solo bandimaki nsango malamu. Bapesaki ngai mokumba ya komemela masangá mikanda oyo elimbolaka Biblia. Elongo na bandeko mosusu, nazwaki libaku ya kokutana na bandeko ya biro ya filiale ya Allemagne na engumba Weimar, epai tozwaki banimero ya liboso mpenza ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo enyatamaki na Allemagne nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe tomemaki yango na Pologne. Na mbala moko, babongolaki yango, babɛtaki yango na masini ya mikanda mpe babimisaki bakopi ebele. Ntango biro ya filiale na biso na engumba Lodz ekómaki kokamba misala ya Batatoli ya Yehova na Pologne, masangá ekómaki kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia ntango nyonso. Nakómaki mobongisi-nzela monene to mosakoli ya ntango nyonso, mpe nazalaki kosakola na teritware ya Silésie. Na ntango wana, ndambo monene ya Silésie ekɔtaki na ngámbo ya Pologne.
Kasi mosika te, Bakoministe oyo bautaki kozwa bokonzi na Pologne bakómaki lisusu konyokola Batatoli ya Yehova. Lokola naboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpo nazali moklisto, bakatelaki ngai bolɔkɔ ya mbula mibale na 1948. Ntango nazalaki kuna, nasalisaki bato mingi ya bolɔkɔ bápusana penepene na Nzambe. Moko na bango aponaki kolanda nzela ya solo, mpe na nsima amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo.
Na 1952, nakɔtaki lisusu bolɔkɔ mpo bazalaki kokanisa ete nazalaki kotɛka ekólo na biso epai ya guvɛrnema ya États-Unis. Liboso naleka na tribinale, batyaki ngai kaka ngai moko na ndako moko ya bolɔkɔ mpe bazalaki kotuna ngai mituna butu moi. Kasi na mbala wana mpe, Yehova abikisaki ngai na mabɔkɔ ya banyokoli na ngai, mpe na bambula oyo elandaki, nakutanaki lisusu na minyoko ya ndenge wana te.
Nini esalisaki ngai nayika mpiko?
Soki nakanisi bambula wana nyonso ya mikakatano mpe ya mpasi, namonaka mwa makambo oyo ezalaki kolendisa ngai. Ya liboso, makasi ya koyikela mikakatano mpiko ezalaki kouta epai ya Yehova mpe na Biblia, Liloba na ye. Komilela ntango nyonso epai ya “Nzambe ya kobɔndisa nyonso” mpe koyekola Liloba na ye esalisaki ngai mpe bato mosusu tókufa te na elimo. Banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tozalaki kokoma na mabɔkɔ esungaki biso mingi na bilei ya elimo. Kuna na kaa ya bakangami, nazalaki kolendisama mpenza na bandeko ya boboto, oyo bazalaki ntango nyonso pene mpo na kosalisa.
Lipamboli mosusu oyo Yehova apesaki ngai ezalaki mwasi na ngai, Maria. Tobalanaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 1950 mpe na nsima tobotaki mwana moko ya mwasi, Halina, oyo akómaki kolinga mpe kosalela Yehova. Ngai ná Maria toumelaki na libala na biso mbula 35, mpe na nsima abɛlaki ntango molai mpe akufaki. Liwa na ye epesaki ngai mawa mpe mpasi mingi na motema. Atako nayokaki lokola ‘nabambami na nse, nabomamaki te.’ (2 Bakolinti 4:9) Na ntango wana ya mpasi, nabɔndisamaki ntango nazali komona mwana na ngai ya mwasi, mobali na ye mpe bana na bango (bankɔkɔ na ngai), oyo bakangami bango nyonso na mosala ya Yehova.
Banda na 1990, nazali kosala na biro ya filiale ya Pologne. Kozala mokolo na mokolo esika moko na bandeko ya libota kitoko ya Betele ezali lipamboli monene. Ntango mosusu soki natali ndenge nzoto na ngai ezali lisusu makasi te, namimonaka lokola mpongo oyo ezali lisusu kokoka kopumbwa mosika te. Atako bongo, nazali mpenza na elikya mpo na mikolo ekoya, mpe ‘nazali koyembela Yehova mpo ete ye azongiseli ngai malamu’ kino lelo. (Nzembo 13:6) Nazali kozela na motema likoló ntango oyo Yehova, Mosungi na ngai, akosilisa mpasi nyonso oyo boyangeli mabe ya Satana ebimisi na mokili.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1998, lokasa 13, paragrafe 6.
b Talá lisolo ya bomoi ya Elsa Abt na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1980, nkasa 12-15 (na Lifalanse).
c Nzembo nimero 101, na buku ya Nzembo oyo ebimaki na 1928, oyo ezalaki kobengama, Nzembo mpo na kokumisa Yehova (na Lingelesi), ebimisamaki na Batatoli ya Yehova. Na buku ya nzembo ya mikolo oyo, ezali nzembo nimero 56.
[Elilingi na lokasa 10]
Bapesaki ngai nimero oyo ná elembo ya violɛ na kaa ya bakangami
[Elilingi na lokasa 12]
Ngai ná mwasi na ngai Maria, na 1980