Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Avril lok. 3
  • Motuya ya bana—Likambo litali mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuya ya bana—Likambo litali mokili mobimba
  • Lamuká!—1993
  • Masolo mosusu
  • Bana—bozwi to mokumba?
    Lamuká!—1993
  • Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Mpo na nini bazali na bana te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Avril lok. 3

Motuya ya bana​—Likambo litali mokili mobimba

“Kobota bana mingi te mpe kolekisa mbula mingi kati na mwana moko mpe mwana mosusu ekoki kozala na matomba mpenza mpo na bato mingi mpe ekosenga mbongo mingi te koleka ‘mayele na misala’ nyonso oyo bato bazali na yango lelo. Ata soki mokakatano motali motuya ya bato awa na nse ezalaki te. . . . yango ekozala ntango nyonso solo.”​—Ezalela ya bana kati na mokili 1992.

NA NTANGO ya kala, bato bazalaki komona ete ezali malamu kobota bana mingi. Esili koleka mibu 4 000, ntango Rébecca alongwaki na Mésopotamie mpo na kokende epai ya mobali na ye Yisaka, mama na ye mpe ndeko na ye ya mobali bapambolaki ye na maloba oyo: “Ndeko na biso, ozala mama na nkoto mbala nkoto zomi!” (Genese 24:60) Kasi lelo ezali lisusu boye te; basi mingi bazali koloba ete balingi kobota bana mingi te.

Bu, elenge mwasi moko ya mibu 22 na mboka Indonésie, azali mpe mama na mwana moko moke ya mwasi alobi ete: “Nazalaki mwana ya misato kati na bana nsambo. Tata na ngai azalaki koteka masanga ya mbila na Klaten, mboka moko na katikati ya esanga ya Java, mpe baboti na ngai bamonaki mpasi mingi mpo na kobokola ebele ya bana wana nyonso. . . . Eleki petee kobokola bana soki bazali mingi te.”

Maloba ya Bu mamonisi mayoki mazali epai ya mibali mpe basi mingi na mokili mobimba. Babalani mingi balingi kozwa ekateli libela mpo na oyo etali ntango nini bakobota mwana na bango ya liboso, bana boni bakobota, mbula boni bakobanda kolekisa kati na mwana moko mpe mwana mosusu mpe ntango nini bakotika kobota. Lobanzo oyo emonani na kotalela mituya ya O.N.U., oyo mimonisi ete kati na mikili ya bobóla bato bakómi kosalela mingi myango ya kokanga kobota. Lelo oyo 51% ya babalani bazali kosalela myango ya kokanga kobota, nzokande bazalaki bobele 10% na bambula 1960.

Biyangeli bizali mpe kolanda penepene likambo litali motuya ya bana. Koleka katikati ya mikili ya bobóla mizali kolanda bibongiseli bitali kokanga kobota mpo ete bato baleka mingi te na mboka. Ebongiseli ya O.N.U. oyo ekotalaka makambo na bafandi na mokili elobi ete mosolo soko 4,5 milliards ya badolare ezali kosalelama mbula nyonso mpo na bibongiseli bitali motuya ya bafandi na mokili. Mpo na kokokisa maye manso masengami na bibongiseli yango na mikolo mizali koya, bato na mayele bakanisi ete motuya yango ekozala mbala mibale kobanda sikawa kino na mobu 2000.

Mpo na nini bato mpe biyangeli bakómi kolanda mpenza likambo oyo litali motuya ya bana? Likanisi ya boklisto ezali nini na ntina na likambo monene oyo? Eyano ekopesama kati na masoló mibale oyo mazali kolanda.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto