Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Avril nk. 4-6
  • Bana—bozwi to mokumba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bana—bozwi to mokumba?
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biyangeli bizali komibanzabanza
  • Mabota mazali komibanzabanza
  • Myango mpo na kobota mingi te ezali kobatela bomoi ya bato
  • Motuya ya bana—Likambo litali mokili mobimba
    Lamuká!—1993
  • Nani asengeli kokata motángo ya bana kati na libota?
    Lamuká!—1997
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Mikano mpo na kobikisa Bana
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Avril nk. 4-6

Bana​—bozwi to mokumba?

LIKAMBO litali motuya ya bana likangisami esika moko na likambo litali kobakisama ya motuya ya bafandi na mokili. Na boumeli ya bankoto na bambula, bato bazalaki mpenza mingi te na mokili; motuya ya baoyo bazalaki kokufa mpe motuya ya baoyo bazalaki kobotama ezalaki pene na kokokana. Ezalaki pene na mobu 1830 nde bafandi na mokili bakómaki miliare moko.

Na nsima, na ntina na bokóli na mayele ya minganga mpe ya science, bamaladi mingi oyo ezalaki koboma bato, mingimingi bana, elimwaki. Pene na mobu 1930, motuya ya bafandi ekomaki bamiliare mibale. Miliare ya misato ekokaki na mobu 1960, ya minei na mobu 1975 mpe ya mitano na mobu 1987.

Lelo oyo, kobakisama ya motuya ya bafandi awa na mabelé ezali boye ete bato soko 170 bazali kobotama na minite mokomoko, elingi koloba bato 250 000 na mokolo moko (ekokani na engumba moko monene) to lisusu bato milió 90 na mbula moko (ekokani na motuya ya bafandi ya Mexique to mbala misato motuya ya bafandi ya Canada). Koleka 90% ya kobakisama oyo ezali kozwama kati na mikili ya bobóla, epai kuna efandi 75% ya motuya nyonso ya bato na mokili.

Biyangeli bizali komibanzabanza

Kasi mpo na nini biyangeli bizali koluka kolembisa kobakisama ya bato na nzela na bibongiseli ya kokitisa motuya ya bana? Monganga Babs Sagoe, kaláki na ebongiseli ya O.N.U. mpo na motuya ya bato na Nigéria, ayanoli na motuna oyo na nzela na elakiseli moko oyo, engebene ye, elakisi makambo na motindo na petee, atako ezali ezalela moko ya mindondo mingi mpe ezali kobimisa ntembe mingi. Alimboli ete:

‘Tokamata ndakisa ya mofandi na mboka mpe mosali bilanga oyo azali na ba hectares minei ya mabelé. Soki azali na bana zomi mpe akaboli mabelé yango na bana na ye, mwana na mwana akozwa eteni ya mabelé ekoki ata katikati ya hectare moko te. Soki bana na ye wana baboti mpe moto na moto bana zomi mpe akaboli mabelé na motindo moko, bankɔkɔ na ye bakozwa moto na moto eteni ya mabelé ekoki bobele na 400 mètres carrés. Ezali polele ete bakozala na mabelé moke, nzokande nkɔkɔ na bango azalaki na ba hectares minei ya mabelé mpo na ye moko.’

Elakiseli oyo emonisi polele mikakatano mizali kobima na kobakisama ya motuya ya bafandi na mabelé, nzokande esika mpe biloko awa na mabelé ezali na ndelo. Ebele na mikili ya bobóla, oyo motuya na bafandi na bango ezali se kobakisama, bazali na mikakatano makasi mpo na kokokisa bamposa na bango. Totalela mwa mosusu kati na mikakatano yango.

Makoki ya mabelé: Kobakisama ya motuya ya bafandi ezali kosenga ete zamba ezala mingi, bakisa mabelé makoki mpo na bilanga mpe milona, bakisa lisusu mai makoki mpo na komela. Nzokande eloko nini ezali komonana? Zulunalo Populi elobeli yango boye ete: “Mikili ya bobóla . . . mizali mbala mingi kosalela na koleka ndelo makoki ya mabelé oyo bazali na yango esika bafandi, nzokande yango esengeli mpo na bokóli na bango na mikolo mizali koya.”

Bandako mpe banzela: Kobakisama ya motuya ya bafandi na mokili ezali mpe kobakisa mikakatano ya Leta mpo na oyo etali kotonga bandako ya kolala, biteyelo, bibongiseli ya kobwaka bosoto, banzela mpe balopitalo mpo na bato banso. Mikili ya bobóla mitondi na banyongo mpe makoki na yango mazali moke, ntina wana mizali kolónga te kokokisa bamposa ya bato na bango, mpe mikolónga te kokokisa bamposa ya motuya mosusu monene ya bafandi oyo bakobakisama.

Mosala: Engebene mokanda Population et environnement: les défis de demain (na Lingelesi), ebimisami na Ebongiseli ya O.N.U. oyo ekotalaka makambo na bafandi na mokili, kati na mikili mingi ya bobóla, 40% ya bato babongi kosala mosala bazali kosala te. Mikili nyonso ya bobóla mizali na bato koleka bamilió 500 oyo bazangi mosala to bazali kosala misala ya bongo na bongo, motuya yango ezali pene na kokokana na motuya mobimba ya basali kati na mikili ya bozwi.

Mpo na kopengola ete ezalela yango ebeba na koleka ndelo te, mikili ya bobóla misengeli kobongisa mbula nyonso bisika ya sika ya misala milió 30. Baoyo bakosala na bisika yango basili kobotama: ezali bana oyo tozali na bango lelo. Bato na mayele bamoni ete soki motuya ya bato bazangi mosala eleki mingi, ezali moko na makambo maye mazali kobimisa bitumba kati na bana ya mboka moko, yango ekobakisa bobóla mpe ekobebisa biloko ya ezingelo.

Na kotalela oyo nyonso tolobeli, tokoki kokamwa te na komona ete mikili mingi ya bobóla mikómi kosala makasi na kolakisa bato na bango ete babota bana mingi te. Mpo na oyo etali mikolo mizali koya, tala oyo ekomamaki kati na zulunalo Lancet oyo ekobimaka na Grande-Bretagne mpe ekolobelaka malako ya minganga: “Kobakisama ya motuya na bato ezali koyeisa mindondo mingi kati na mikili ya bobóla, mpo ete kuna nde bato baleki kobotama mingi. . . . Bamilió ya bato bakozala bongo bomoi na bango mobimba, kozanga kotanga kelasi, kozanga mosala mpe kozanga esika malamu ya kolala, kozanga makoki ya komisalisa epai ya monganga, kozanga bibongiseli malamu ya bopeto mpe ya efandeli ata oyo ya ebandeli, nyonso oyo mpo ete motuya na bato ebakisami na lolenge ya mobulu.”

Mabota mazali komibanzabanza

Kotya mikano mpe kosala bibongiseli mpo bato babota bana mingi te ezali malamu; kasi eloko mosusu ezali ya koyeba soki bato bakondima yango. Na bikólo mingi, bato bazali naino kobatela likanisi ya bonkɔkɔ ya kozala na bana mingi, mpe bakangami na yango makasi. Na ndakisa, yoká maloba ya mwasi moko ya ekólo ya Nigéria lokola eyano na bopusi ya boyangeli na bango mpo na kosenga na bato ete babota bana mingi lisusu te: “Tata na ngai azalaki na bana 26; ngai mwana ya nsuka. Bayaya na ngai nyonso mibali mpe basi bazali na bana longwa mwambe kino 12. Mpo na nini bobele ngai nde názala na bango moke?”

Atako bongo, likanisi yango ezali lisusu ndenge ezalaki te, ata na Nigéria epai moyenne ya bana mpo na mwasi mokomoko ezali bana motoba. Lokola ntalo ya biloko ezali kobakisama, bamilió mingi ya bato bazali kokoka te koleisa mpe kolatisa mabota na bango. Nsima na komona boye, mingi bayei kondima ete lisese oyo ya ba Yoruba (ekólo moko ya Nigéria) ezali solo: “Ọmọ bẹẹrẹ, òṣì bẹẹrẹ” (bana mingi, bobóla mingi).

Atako bayebi matomba na yango, babalani mingi te bazali kosalela myango mpo na kobota bana mingi te. Lokola emonisi yango mokanda Ezalela ya bana kati na mokili 1992, ebimisami na Ebongiseli ya O.N.U. oyo ekotalaka makambo ya bana, zemi moko kati na zemi misato na mikili ya bobóla na boumeli ya mbula yango ekanamaki te mpe elukamaki te.

Myango mpo na kobota mingi te ezali kobatela bomoi ya bato

Myango mpo na kobota mingi te mpe kolekisa mbula mingi kati na mwana moko mpe mwana mosusu ezali kosalisa baoyo bazali na makoki mingi te; nde lisusu, ezali litomba mpo ete ezali kobatela kolongono ya mama mpe ya bana na ye. Mpo na ntina oyo, ebongi malamu kosalela myango yango. Lisese moko ya bato ya Afrique occidentale elobi ete: “Zemi ezali lokola lisano, kasi kobota ezali etumba mpo na bomoi.” Mbula nyonso, kati na mikili ya bobóla, katikati ya milió moko ya basi bazali kokufa na ntango ya kobota to liboso ete bakoka kobota, bazali kotika milió moko ya bitike; nzokande basi mosusu milió mitano kino milió nsambo bazali kotikala na bilembo na nzoto mpo ete babotaki na mpasi.

Basi nyonso bazali kozwa mpasi oyo te. Lokola emonisami na encadré awa na nse, baoyo bazali na likámá mpenza ezali baoyo bazali kobota mingi, baoyo bazali kokumba zemi na bolenge mpenza, baoyo bazali kokumba zemi nzokande mbula na bango esili kopusana mosika to baoyo bazali kolandisa bazemi. Engebene O.N.U., myango ya kokitisa motuya ya bana mpe kolekisa bambula mingi mbele ekoki kobikisa mwasi moko kati na basi minei to kati na basi misato ete bakufa te mpe ekoki kopengola epai ya basi mingi bilembo oyo batikalaka na yango na nzoto mpo babotaki na mpasi.

Kasi soki bamilió oyo ya bato babatelami na bomoi, ekokóma te ete bato bakoleka lisusu mingi awa na mabelé? Bato mingi oyo bayekoli malamu likambo yango bayanoli ete te. Rapport mondial sur le développement humain mpo na mobu 1991 elobi ete: “Tokoki kokanisa ete soki bana bazali kokufa lisusu mingi te, motuya ya bato ekoleka mingi mpenza. Nzokande ezali boye te. Na bisika epai baboti bandimisami ete bana na bango bakokufa te kasi bakokola malamu, emonani ete bazali kobota bana mingi te.”

Atako bongo, bamilió ya basi, mingi mpenza kati na mikili ya bobóla, bazali naino kobota bana mingi. Mpo na nini? Mpo ete yango nde eloko bazali kozela epai na bango, mpamba te na kobotáká bana mingi, bazali kolikya ete soki basusu bakufi, ata mwa ndambo bakotikala na bomoi, mpe lisusu mpo ete bayebi te myango mpo na kotya ndelo ekoki na motuya ya bana mpe kozanga kolandisa kobota to bazali na likoki te ya kokutana na baoyo bazali kolakisa yango.

Nzokande, basi mingi bazali kobota bana mingi, mpamba te na makanisi na bango, mwana mokomoko azali likabo liuti na Nzambe.

[Etanda na lokasa 6]

Lolenge ya zemi oyo ezalaka na mindondo kati na mikili ya bobóla

Mama azali naino elenge mpenza: Likámá ya kokufa na boumeli ya eleko ya zemi to na ntango ya kobota ezali mbala misato koleka epai na basi oyo bazali na mbula 15 kino 19 koleka epai na basi oyo bazali na mbula 20 kino 24. Bilenge basi ya mike bakoki kobota bana oyo basili kokufa kati na libumu, to bana oyo bazali bamatshombé to lisusu bana oyo kilo na kobotama ezali moke mpenza.

Kolandisa kobota: Kolekisa mbula mingi kati na mwana moko mpe mwana mosusu ezali na ntina mingi mpo ete mwana akoka kobika mpe akola malamu. Soki mbula mibale ekoki naino te uta mama abotaki mpe sikawa aboti mwana mosusu, mwana wana azali na likámá mbala 66% ya kokufa na bomwana to akokóla malamu te mpe akozala na mayele mingi te. Kolekisa mbula mingi kati na mwana moko mpe mwana mosusu mbele ekokitisa motuya ya bana oyo bazali kokufa kino na 20%. Ebongi malamu kolekisa mbula misato to mpe koleka, liboso ya kobota mwana mosusu.

Kobota mingi: Nsima na kobota bana minei, kokumba zemi mosusu mpe kobota ezalaka na makámá mpenza, mingi mpenza soki kobota oyo ezalaki liboso ezalaki kokokisa mbula mibale te kati na mwana moko mpe mwana mosusu. Likámá ezali ete mama azanga makila, to abima makila mingi to abota mwana oyo asalemi malamu te.

Mbula epusani mpenza: Basi oyo basili kolekisa mibu 35 bazali na likámá koleka mbala mitano mpenza ya kokufa na boumeli ya zemi to na ntango ya kobota koleka baoyo bazali na mibu 20 kino 24. Bana mingi babotami na bamama oyo mbula esili kopusana mpenza bakufaka.

Eutelo: Lisangá ya mokili mobimba mpo na bokolongonu ya nzoto (World Health Organization), Ebongiseli ya O.N.U. mpo na bana (UN Children’s Fund), mpe Ebongiseli ya O.N.U. mpo na bafandi (UN Population Fund).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto