Mituna ya batángi
Mpo na nini Biblia elobi ete moto asengeli koganga soki balingi kosangisa na ye nzoto na makasi?
Moto oyo ayoká naino te mpasi oyo moto ayokaka soki basangisi na ye nzoto na makasi akoki mpenza koyeba te ndenge likambo yango ekoki kobebisa bomoi ya moto. Likambo yango ezalaka nsɔmɔ mpe ekoki kotungisa ye bomoi na ye mobimba.a Elenge mwasi moko moklisto oyo basangisaki na ye nzoto na makasi eleki mwa bambula alobaki boye: “Nakoki te kolimbola na maloba mpasi makasi oyo nayokaki na butu wana mpe etumba oyo nabundaka tii lelo oyo mpo na kobosana mpasi wana.” Yango wana, bato mingi balingaka kutu kokanisa likambo ya nsɔmɔ wana ata moke te. Kasi, kosangisa na basi nzoto na makasi ezali likambo oyo ezali mpenza kosalema na mokili mabe oyo tozali.
Biblia elobeli polele bato mosusu ya ntango ya kala oyo basangisaki na bango nzoto na makasi to mpe balukaki kosangisa na bango nzoto na makasi. (Genese 19:4-11; 34:1-7; 2 Samwele 13:1-14) Kasi, ezali mpe kopesa toli oyo moto asengeli kolanda ntango balingi kosangisa na ye nzoto na makasi. Makambo oyo Mibeko elobi na likambo yango ezali na Deteronome 22:23-27. Yango elobeli makambo mibale. Ya liboso, ezali mobali oyo amoni elenge mwasi moko na kati ya engumba mpe alali na ye. Nzokande, elenge mwasi yango agangaki te mpo báya kobikisa ye. Na likambo ya ndenge wana, ekateli ezalaki ete azalaki na foti “mpo ete agangaki te na engumba.” Soki agangaki, bato oyo bazalaki penepene bakokaki koya kobikisa ye. Na likambo ya mibale, mobali moko amoni elenge mwasi na zamba, mpe “asimbi ye mpe alali na ye.” Mwasi yango “agangaki ete moto asunga ye, [kasi] moto ya kobikisa ye azalaki te.” Makambo ekeseni na oyo ya mwasi oyo tolobeli na likambo ya liboso; awa ezali polele ete elenge mwasi oyo aboyaki ete mobali wana asangisa na ye nzoto. Abundaki makasi, agangaki mpo ete moto aya kobikisa ye, kasi mobali wana alekaki ye na makasi. Koganga na ye emonisi ete aboyaki ete mobali wana alala na ye; azali na foti te.
Atako lelo oyo baklisto basɛngisami te na kotosa Mibeko ya Moize, mitinda oyo ezali na kati na yango etambwisaka bango. Bavɛrsɛ oyo touti kotalela emonisi mpenza ntina ya kobunda makasi mpe koganga mpo moto aya kobikisa yo. Ata na moi ya lelo, ezalaka malamu ete moto oyo balingi kosangisa na ye nzoto na makasi aganga. Moto moko ya mayele na makambo etali ndenge ya kokima makama alobaki boye: “Soki mwasi akutani na moto oyo alingi kosangisa na ye nzoto na makasi, koganga ezali ebundeli oyo eleki makasi mpo na ye.” Soki mwasi agangi makasi, bato mosusu bakoki koya kosalisa ye, to moto oyo alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi akoki kobanga to kokima. Elenge mwasi moko moklisto oyo balingaki kosangisa na ye nzoto na makasi alobaki boye: “Nagangaki makasi mpenza mpe moto yango akendaki. Ntango ayaki lisusu, nagangaki mpe nakimaki. Liboso, nazalaki komituna ete: ‘Koganga ekoki mpenza kosalisa ngai soki engambe mobali akangi ngai mpe azali na likanisi se moko na motó na ye?’ Kasi namonaki ete koganga esalisaka!”
Ata soki mwasi agangi mpo ete moto aya kosalisa ye kasi mobali yango alali na ye kaka, kobunda oyo mwasi yango abundaki mpo na koluka lisalisi ezali mpamba te. Yango ekomonisa mpenza ete asalaki nyonso mpo na koboya ete moto asangisa na ye nzoto na makasi. (Deteronome 22:26) Atako babebisi ye, akoki kozala kaka na lisosoli malamu, akopesa nzoto na ye kilo, mpe akozala na elikya ete azali pɛto na miso ya Nzambe. Likambo ya nsɔmɔ wana ekoki kotika ye na mpota na motema, kasi ntango azali koyeba na kati ya motema na ye ete asalaki nyonso oyo ekoki mpo na koboya básala ye likambo wana, yango ekosalisa ye mingi mpo mpasi yango esila mokemoke.
Ntango tozali kotalela makanisi ya Deteronome 22:23-27 mpe ndenge oyo tosengeli kosalela yango, tosengeli kobosana te ete mwa lisolo yango elobeli te makambo nyonso oyo ekoki kobima ntango balingi kosangisa na mwasi nzoto na makasi. Na ndakisa, lisolo yango elobeli te mwasi oyo balingi kosangisa na ye nzoto na makasi kasi azali na likoki ya koganga te mpo alobaka te, to azali komiyeba te, to abulungani mpo na kobanga to batii ye lobɔkɔ to elamba na monɔkɔ mpo aganga te. Nzokande, lokola Yehova azali na likoki ya kotalela makambo nyonso mpe makanisi ya moto, na makambo ya ndenge wana ayebaka mpasi ya moto mpe asalelaka boyengebene, mpo ete “nzela na ye nyonso [ezali] boyengebene.” (Deteronome 32:4) Ayebaka makambo oyo esalemaki mpenza mpe makasi oyo moto asalaki mpo na kobundisa moto oyo alukaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Yango wana, moto oyo basangisi na ye nzoto na makasi kasi akokaki koganga te, nzokande asalaki nyonso oyo akokaki, asengeli kotika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova.—Nzembo 55:22; 1 Petelo 5:7.
Atako bongo, baklisto mosusu ya basi oyo bakangaki bango mpe basangisaki na bango nzoto na makasi bayokaka ntango nyonso mpasi na motema lokola nde bamemi ngambo. Soki kaka bakanisi likambo oyo ekómelaki bango, bamonaka lokola nde bakokaki kosala likambo mosusu mpo likama yango ekómela bango te. Kasi, na esika ya komipesa foti, bato oyo bakutanaki na likambo wana basengeli kobondela Yehova, basengeli kosɛnga ye ete asalisa bango mpe basengeli kozala na elikya ete Yehova atondi na boboto.—Exode 34:6; Nzembo 86:5.
Yango wana, baklisto ya basi oyo batikalá na mpota na motema mpo basangisaki na bango nzoto na makasi basengeli kozala na elikya ete Yehova ayebi malamumalamu mpasi na bango. Liloba ya Nzambe endimisi bango ete: “Yehova azali penepene na baoyo bazali na mitema mibebi; akobikisa bango bazali na elimo epasuki.” (Nzembo 34:18, NW) Kondima lisalisi ya boboto oyo euti epai ya bandeko baklisto na kati ya lisangá ekoki kosunga bango mpo na kolonga mpasi wana ya makanisi. (Yobo 29:12; 1 Batesaloniki 5:14) Longola yango, soki basi oyo basangisaki na bango nzoto na makasi bakoki kosala milende ya kokanisa ntango nyonso makambo ya malamu, yango ekosalisa bango bázala na “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”—Bafilipi 4:6-9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako lisolo oyo ezali kolobela basi oyo basangisi na bango nzoto na makasi, mitinda oyo epesami etaleli mpe mibali oyo bakutanaka na likambo yango.