Makambo mazali koleka na mokili
Babungisaki mpenza bomoi na bango ya liboso?
Esili koleka mwa basanza mingi, bakutaki bayekoli basi misato ya collège balali na mabelé, bayebi lisusu likambo te, na nzela ya Tokushima (Japon): balukaki komiboma. Nini epusaki bango na kosala bongo? Tala oyo zulunalo Asahi Shimbun elobi: “Bamikaniselaki ete liboso bazalaki bana-basi na mokonzi mpe bandimisamaki ete bakokaki kozala lisusu na bomoi na bango ya liboso soki bakufi.” Engebene zulunalo wana, likambo yango lizali komonisa ’’likanisi oyo bana mike bazalaka na yango mpo na koluka kozala na bomoi na mokili mozangi komonana, (likanisi) oyo lipalangani mingi mpenza na mikolo oyo.” Bilenge basi wana bazalaki mpenza balangi na bazulunalo oyo ezalaki kolobela mingi likanisi oyo ete moto ekozalaka na bomoi na esika mosusu nsima na liwa na ye (réincarnation).
Nzokande, kondima likanisi oyo ete moto akozalaka na bomoi na esika mosusu nsima liwa na ye ezali likambo na kozanga mayele mpenza, koleka nkutu likambo oyo ya kotambola na esobe mpo na kolanda elilingi moko. Biblia emonisi ete, soki moto akufi, ’’akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili”. (Nzembo 146:4) Solo likolo na bakufi esila kobómbama na liteya na lokuta oyo engebene yango ete molimo ekobikaka nsima na kufa na nzoto. Na esika na koteya ete bato bazali na molimo ezangi kokufa, Biblia elobi ete milimo mikokufaka. (Ezekiele 18:4) Kasi mpo na baoyo nyonso bazali na likanisi na Nzambe, elikya kitoko ya lisekwa ezali mpo na bango. (Yoane 5:28, 29) Lisusu, Biblia emonisi polele mobandisi monene ya liteya oyo ete molimo ekufaka te mpe oyo ete moto ekozalaka na bomoi na esika mosusu nsima na liwa; ezali bongo Satan le Diable, “tata nkuta.”—Yoane 8:44; tala Genese 3:4.
Bakatolike mpe likambo ya kosopa zemi
Esali pene na mibu zomi uta batalelaki likambo ya kosopa zemi, botaleli oyo bosalamaki na mboka ltalie mpe emonanaki ete Lingomba na katolike likwei na likambo yango. Nzokande, kati na mokanda moko na sika mobimisami na ba episkopo ya ltalie, bakonzi ya Lingomba na katolike bayebisi lisusu ete “koboya kosopa zemi to bobele kosangana na likambo yango ezali etinda na bizaleli malamu, oyo euti na mibeko mikomami kati na motema ya moto nyonso mpe etindimami na Lingomba. etinda epesami na mibeko ete babimisa kati na lingomba, baklisto baoyo bakosopaka zemi to mpe baoyo bakosanganaka na makambo yango.”
Lolenge nini bato na ltalie bazali kotalela likambo ya kosopa zemi? Ankete moko euti kosalema sika epai na bato 2040 emonisi ete na kokesene na oyo Lingomba ezali kotinda, bato na ltalie bandimi kosopa zemi na ntina minei 1) Ntango zemi ekómi likámá mpo na bomoi ya mama, 83 % ya bato oyo batunamaki bakosopaka zemi. 2) soki mwana akobotama na mbeba na nzoto, 76,3 % bakondimaka na kolongola zemi. 3) Soki kolongono na nzoto ya mwasi ezali na likámá, 71,1 % bakondimaka kosopa zemi. 4) Soki zemi ekolaki mpo mwasi abebisamaki, 55,2 ” bakokanisaka ete esengeli mpenza kosopa zemi. Zulunalo La Repubblica elobi ete. Bato mingi na ltalie bandimi kosopa zemi soko “mwasi alingi yango, mpe ata soko ezalela na ye ezali nini.” Ekanisami ete, mbula na mbula na ltalie, bato 300 000 bakosopaka zemi na lolenge tondimami to mpe te.
Emonani polele ete kati na makambo wana matali lisosoli ya moto na moto, bakonzi na lingomba ya katolike balongi te na kopesa epai na basangani na bango, mateya na Biblia mabongi, maye masengelaki kotosama. Baklisto na solo, mpo na bango, basili koyeba oyo Makomami elobi na ntina na likambo oyo monene. Na botosi mpo na masengami na bizaleli malamu na Biblia oyo bitombwami, bazali kosopa zemi te ata soko na ntina nini kati na oyo epesami awa na likoló.—Exode 21:22-25, tala Nzembo 139:14-17; Yilimia 1:5.
Kati na nimero ekolanda
Osengeli kosambela Nzambe nini?
Ndenge nini komipesa mpenza na bolingo na Nzambe?
Jéhovah apesaki ngai makasi