Ntango bato na mposo ndenge nyonso bakofanda esika moko kati na kimya
NZAMBE “asalaki mabota nyonso longwa na moto moko mpo ete bafanda na mabelé.” (Misala 17:26) Tala lolenge ya petee oyo Biblia ezali kolimbola ebandeli ya libota ya bato.
Yango elimboli ete bato nyonso, atako nini ezali esika oyo babotama to nini ezali lolenge ya nzoto na bango, bauti esika moko. Yango elimboli lisusu ete longola mwa makambo oyo mazali komonana lokola ete ezali bokeseni, “mabota nyonso ya bato” bazali na nguya ndenge moko mpo na oyo etali makoki mpe mayele. Ee, na miso ya Nzambe, bato ya mposo nyonso to ya mabota nyonso bakokani.—Misala 10:34, 35.
Soki likanisi ya Biblia ezali malamu, boye elikya ezali ete makanisi nyonso ya mabe likoló na bato mosusu mpe mabe oyo euti na ntina na bokeseni ya mposo ekoki kosila mokolo mosusu. Soki ndimbola ya Biblia mpo na oyo etali ebandeli ya libota ya bato ezali ya solo, na bongo ebongi ete bobele mokanda yango moko ekoka mpe komonisa biso lolenge nini bato ya mposo ndenge nyonso bakoki kofanda esika moko kati na kimya.
Makambo mamonisi nini? Lisoló ya Biblia na ntina na ebandeli ya moto ezali na boyokani na sianse?
Bilembeteli ya sianse
Mokanda Les races de l’humanité (na Lingelesi), oyo ekomamaki na bato na mayele oyo bakoyekolaka mimeseno ya bato, Ruth Benedict mpe Gene Weltfish, emonisi ete: “Lisoló ya Biblia oyo elobeli Adam mpe Eva, tata mpe mama ya libota ya bato, emonisaki esili koleka bikeke mingi, solo oyo sianse ezali komonisa sikawa, oyo elobi ete bato nyonso na mabelé bazali libota se moko mpe bauti na esika moko.” Bakomi wana bazali mpe komonisa ete “ekoki kosalema te ete makambo ndenge na ndenge oyo mazali kati na nzoto ya bato . . . makokana bobele yango moko epai ya bato nyonso soki bautaki esika moko te.”
Mwa mokanda moke Race et biologie, oyo ekomamaki na L. C. Dunn, molakisi ya sianse ekoyekolaka banyama na Université Columbia, elobi ete: “Kokokana kati na nzoto na makambo ya ntina emonisi polele ete bato nyonso bazali se libota moko. Bikolo nyonso bakoki kobalana kati na bango, mpe ezali kosalema bongo.” Na nsima maloba oyo malandi: “Nzokande, moto na moto akeseni na bato nyonso mosusu mpe azali na makambo mikemike makesenisi ye na moto nyonso mosusu. Esalemi bongo na ntina na bisika bikeseni oyo bazali kofanda mpe na ntina na ba gènes ekeseni oyo basilaki kosangola epai na baboti na bango uta kobotama.”
Bilembeteli ya sianse bikoki kotyelama ntembe te. Engebene sianse ya biologie, ezali na race moko te oyo ezali likoló na mosusu to oyo ezali na nse ya mosusu, race ya peto mpe race ya mabe ezali te. Biloko lokola langi ya mposo ya nzoto, ya miso mpe ya nsuki—makambo oyo basusu bazali kotalela ete esengeli mpo na kokabola ba races—yango ezali te bilembo oyo emonisi mayele mpe makoki ya moto. Kasi ezali nde makambo mazali kouta na ba gènes oyo tozali kosangola epai na baboti uta kobotama na biso.
Ya solo, bokeseni kati na mposo ezali se moke, lokola ekomi yango Hampton L. Carson kati na mokanda Hérédité et vie humaine (na Lingelesi): “Ezali likambo ya kokamwa ete bituluku ya bato bimonanaka na libandá ete bikeseni na bituluku mosusu, nzokande na makambo wana makeseni ezali na makambo mamonisi ete bakokani mpenza.”
Na yango, soki bato nyonso bazali libota se moko, mpo na nini bitumba mpe kozanga koyokana ezali kobima likoló na mposo?
Ntina ya likambo
Ntina ya liboso ya kowelana mpo na mposo euti na ebandeli mabe oyo baboti na biso ya liboso bapesaki na bakitani na bango. Adam mpe Eva batombokelaki Nzambe na nkó nyonso mpe na yango bakómaki na kozanga kokoka, ezaleli ya mabe. Litomba mabe oyo ebimaki ezali ete, kozanga kokoka ya Adam—ezaleli wana ya kolinga kosala mabe—epesamaki na bakitani na ye. (Baloma 5:12) Na bongo, uta kobotama, bato nyonso babendami na ezaleli ya moimi mpe lolendo, makambo mibale oyo mazali kobimisa bitumba mpe mobulu na ntina na mposo.
Ezali na ntina mosusu ya kowelana mpo na mposo. Ntango Adam mpe Eva babwakaki boyangeli ya Nzambe, bakómaki na nse ya bokonzi ya ekelamu mabe ya elimo, oyo Biblia ezali kobenga ye Satana to Diable. Na nse ya bopusi ya ekelamu wana, oyo azali “kozimbisa bafandi nyonso ya mabelé,” mbala mingi milende makasi mizali kosalema na nkó nyonso mpo na kokosa bato na ntina na mposo. (Emoniseli 12:9; 2 Bakolinti 4:4) Kokumisa ekólo—ezaleli ya kotalela etuluku ya bato kati na yango yo ozali lokola ete eleki bituluku mosusu—ekómaki bongo likambo lilobelamaki mingi. Mpe, na koyeba to na kozanga koyeba, bamilió na bato balandaki filozofi wana, oyo ebimisaki makambo ya nsomo mingi.
Mpo na koloba solo, ezali bato bazangi kokoka mpe ya moimi, oyo batambwisami na Satana, bango nde bapalanganisaki mateya ya lokuta na ntina na race, oyo ebimisi mikakatano kati na bato na mposo ekeseni.
Na yango, mpo ete libota ya bato lizala na bomoko, bato nyonso basengeli kondima ete tozali race se moko mpe ete Nzambe asalaki “longwa na moto moko bato ya mabota nyonso mpo ete bafanda na mabelé mobimba.” (Misala 17:26) Lisusu, mpo ete bato ya mposo ndenge nyonso bafanda esika moko kati na kimya, bopusi ya Satana esengeli kolongolama na makambo ya bato. Makambo motindo wana makoki kosalema? Tozali na bantina ya kondima ete yango ekosalema mokolo mosusu?
Kolimwa ya makanisi mabe na ntina na mposo
Yesu Klisto amonisaki lolenge nini makanisi mabe na ntina na mposo makoki kolongolama ntango asengaki na bayekoli na ye ete ‘balinganaka’ lokola ye alingaki bango. (Yoane 13:34, 35) Bolingo wana esengelaki te kosuka bobele na bato oyo tozali na bango mposo ndenge moko to na bato ya bikolo bisusu oyo tosepelaka na yango. Ezali bongo te! Moko na bayekoli na ye apesaki toli oyo: “Bolinga libota mobimba ya bandeko.”—1 Petelo 2:17.
Lolenge nini tokoki komonisa bolingo wana ya boklisto? Biblia eyanoli na motuna oyo ntango epesi toli oyo ete: “Mpo na lokumu, bokumisanaka.” (Baloma 12:10) Kanisa na oyo yango elimboli: moko na moko asengeli kotalela basusu, atako bazali bato ya mposo nini to ya ekólo nini, na lokumu lobongi mpe na limemya nyonso; na kotyola bango te, kasi nde na ‘kotalela bango ete baleki.’ (Bafilipi 2:3) Ntango bolingo wana ya solo ya boklisto ezali kosala mosala na yango, makanisi mabe na ntina na mposo mazali kolimwa.
Ezali solo ete moto oyo akólisaki makanisi mabe na ntina na mposo asengeli kosala makasi mpo na kolongola kati na elimo na ye makanisi wana mauti na Satana. Kasi akoki kolónga! Na ekeke ya liboso, baoyo nyonso bandimamaki kati na lisangá ya boklisto basepelaki na bomoko ya solosolo. Ntoma Paulo akomaki na ntina na yango ete: “Moyuda azali te soko [Mogreke] te, moombo azali te soko nsomi te, mobali azali te soko mwasi te. Nde bino nyonso bozali moko kati na Klisto Yesu.” (Bagalatia 3:28) Na ntembe te, bayekoli ya solo ya Klisto bazalaki na bondeko ya solosolo.
Kasi basusu bakoki koloba ete: ‘Yango ekoki kosalema te na mikolo na biso.’ Nzokande, bomoko motindo wana ezali mpenza kati na ba Témoins de Jéhovah, lisangá oyo ezali na bato koleka bamilió minei na ndambo. Yango elingi koloba te ete bango nyonso basili kolongola makanisi nyonso mabe oyo basangolaki yango longwa na ebongiseli oyo mabe. Mwasi moko Moameriké ya mposo moindo alobaki polele na ntina na baninga na ye Batemwe oyo bazali mindele ete: “Ekómelaki ngai na komona epai na basusu kati na bango mwa bitika mikemike ya makanisi wana ya kotombola mposo moko likoló na mosusu to ya komonisa ete basepeli te ntango bazali elongo na moto ya mposo mosusu.”
Atako bongo, mwasi wana andimaki ete: “Ba Témoins de Jéhovah, na kokesena na bato mosusu awa na mabelé, basili kobwaka makanisi mabe na ntina na mposo. Bazali kosala makasi na kolingana kozanga koponapona bato na ntina na mposo . . . Mbala mosusu ezalaki kokómela ngai na kobimisa mai ya miso na ntina na bolingo ya solo oyo Batemwe ya mindele bazali komonisa.”
Bomoko kati na bato na mposo ndenge nyonso oyo basusu bazali na yango—atako bazali bamilió mingi—ekoki mpenza kobongola makambo, nzokande bamilió mosusu bapusami na makanisi ya Satana oyo ya kotombola mposo moko likoló na mposo mosusu? Te, mpe toyebi malamu ete ezali yango te oyo ekotya nsuka na matata na ntina na mposo. Kosilisama ya likambo wana eleki mpenza makoki ya bato. Bobele Mozalisi na biso, Jéhovah Nzambe, nde azali na likoki ya kosilisa yango.
Likambo ya esengo, mosika te, Jéhovah, na nzela ya Bokonzi na ye oyo epesami na maboko ya Mwana na ye, Yesu Klisto, akolongola na mabelé bokesene nyonso mpe bato nyonso ya moimi oyo bazali kolendisa koponana mpe koyinana, ezala na ntina na mposo to na likambo mosusu. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Na nzela ya ebongiseli ya kolakisama ya kokoka oyo ekopesama na litambwisi ya Klisto, bato ya mposo ndenge nyonso bakokóma na bomoko ya solosolo. Wana kolakisama yango ekolanda kopesama, bato bakofanda na bomoko ya kokoka oyo ezangi ata elembo moko ya koponapona na ntina na mposo. Na ntango yango elaka oyo ya Nzambe ekokokisama: “Makambo na liboso masili koleka. . . . Tala, nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.”—Emoniseli 21:4, 5.
Ozali kolikya komona ntango oyo bondeko ya solosolo ekozala, ntango oyo bato ya mposo ndenge nyonso bakofanda kati na bomoko? Soki ezali bongo, tozali kobyanga yo na Salle du Royaume oyo ezali pɛnɛpɛnɛ na esika ozali kofanda, epai ba Témoins de Jéhovah bazali koyangana mbala na mbala mpo na koyekola Biblia. Okomona yo moko ete bazali kolakisa bolingo ya solosolo ya boklisto—epai na bato ya mposo ndenge nyonso.
[Elilingi na lokasa 10]
Mosika te, bato ya mposo ndenge nyonso bakofanda na bomoko mpe na kimya