Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Lolenge nini nakoki kobwaka mayoki ya komipesa na bolingo epai na moto moko?
“NAZALI na mibu 20 mpe nazali Motatoli ya Yehova oyo asila kozwa batisimo. Kasi nabandaki kokutana mbala na mbala na mobali moko [mondimi te] ya mibu 28. Nalingaki ye, mpe nakanisaki ete ye mpe alingaki ngai lokola. Baboti na ngai bayebaki yango te, mpamba te nayebaki ete bakosepela te. Ntango bayaki koyeba yango, baokaki mawa mingi mpe epesaki bango nkanda. Bazalaki komituna ndenge nini nakokaki komipesa bongo na bolingo epai na moto oyo azali mondimi te.”
Wana maloba ya elenge mwasi moko moklisto oyo tokobyanga ye na nkombo Monique.a Na mawa nyonso, ntalo monene ya bilenge bazali kati na ezalela motindo oyo moko ya likámá—komipesa na bolingo epai na moto oyo azali mondimi te, moto oyo azali na bindimeli mpe na bizaleli bikeseni na oyo ya boklisto. Boyokani motindo wana ezali kosepelisa Nzambe te, mpe ekoki mpenza kozala likámá. Elenge Ruth asosolaki likambo yango. Ayebisaki ete: “Nakanganaki mpenza na mwana mobali moko oyo azalaki mondimi te. Kasi, nayaki kososola ete nasengelaki kokata boyokani oyo nasalaki elongo na mobali yango mpo na kozala na boyokani malamu elongo na Yehova.”
Soki ozali moklisto, na ntembe te oyebi malamu mokapo ya Biblia oyo mozwami na Yakobo 4:4, ete: “Boyebi tɛ ete kolinga mokili ejali koyina Njambe? Moto nani akani ete ajala moninga na mokili amijalisi moyini na Njambe.” Kasi, soki omipesaki na bolingo epai na moto oyo azali mondimi te, osili komona lolenge nini ezali mpasi mpo na kotosa maloba oyo. Mbala mosusu ozali na nguya te mpo na kokata boyokani motindo wana; ezali kopesa yo mpasi mingi na motema. Okoki kotungisama mingi kati na motema. Okoki komituna ete: ‘Lolenge nini nakoki kobwaka mayoki ya komipesa na bolingo epai na moto moko? ’
Mokolo moko, ntoma Paulo alobaki ete: “Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Njambe; kasi namɔni mobeko mosusu kati na bilembo na njoto na ngai. Mobeko yango monɛnɛ ejali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ejali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mojali kati na bilembo na ngai. Ngai moto na mawa mingi!” (Baloma 7:22-24) Lokola Paulo, mbala mosusu ozali kobundisa mayoki na yo. Atako bongo, yebá ete ebele ya bilenge baklisto bazali kolónga etumba yango mpe, na bongo, bazali lokola nde ‘balongolami na mɔ́tɔ.’ (Kokanisá na Yuda 23.) Lolenge nini? Na kokatáká boyokani wana ya mabe liboso ete mbébá esalema.
Sɛngá lisalisi
Na ndakisa, Marc akólisaki oyo ye abéngi yango ete “bolingo ya ligboma” epai na mwasi moko azalaki mondimi te wana azalaki bobele na mibu 14. Na esika ya koluka lisalisi, amekaki kobomba mayoki na ye. Kasi mayoki yango mpo na elenge mwasi wana mazalaki sé kokola. Mosika te, abandaki kobyanga ye na telefone na nkúku. Ntango elenge mwasi abyangaki ye na telefone, baboti ya Marc baumelaki te na koyeba likambo oyo lizalaki koleka.
Kosala libungá motindo wana te ya koluka kosilisa mokakatano yango bobele yo moko. Masese 28:26 elobi ete: “Ye oyo akotalela motema na ye mɔkɔ ajali elema nde ye oyo akotambola na mayɛlɛ, ye akobika.” Na solo mpenza, yo mbɛlɛ okómaki na ezalela motindo wana soki nde ozalaki na bososoli malamu? Mbala mosusu, mayoki na biso mazalaka makasi mingi koleka bososoli, na yango tozali na mposa ete moto moko ya bososoli mpe na sembo ásalisa biso. Baboti na yo babongi mpenza mpo na kosala yango, mingi mpenza soki bazali baklisto. Bayebi yo mpenza koleka bato nyonso mosusu. Bango mpe bazalaki bilenge, likambo oyo likoki kosalisa bango na kokanga ntina na likambo na yo. Na Masese 23:26, Salomo apesi toli oyo ete: “Mwana na ngai, pɛsa ngai motema na yɔ; tika ete miso na yɔ itala njela na ngai.” Mpo na nini te kopesa motema na yo epai na baboti na yo mpe koyebisa bango ete ozali na mposa ya lisalisi?
Elenge Julien asalaki bongo. Atungisamaki mingi mpenza na mayoki makasi ya bolingo oyo azalaki na yango mpo na elenge mwasi moko na eteyelo na ye. Alobi ete: “Na nsuka, nasɛngaki lisalisi epai na baboti na ngai. Yango ezalaki na ntina mingi mpenza mpo na kolónga mayoki na ngai. Baboti na ngai basalisaki ngai mingi.” Kozwáká lisungi ya baboti na ye litondi na bolingo, Julien apesi toli oyo ete: “Nakanisi ete bilenge baklisto basengeli te kokakatana mpo na koyebisa makambo na bango epai na baboti na bango. Bósolola elongo na bango. Bakomitya na esika na bino.”
Kati na ezalela motindo moko, elenge André azwaki matomba na lolenge ya liziba mosusu ya toli. Alobaki na ntina na liyangani moko ya zongazonga oyo Batatoli ya Yehova basalaki yango, ete: “Lisukúlu moko limemaki ngai na kokanisa. Mokɛngɛli ya zongazonga apesaki toli ya koboya kozala na boyokani elongo na bato oyo bazali baklisto te. Nasosolaki ete nasengelaki nokinoki kobongola lolenge na ngai ya kotalela makambo.” Asalaki nini? Libosoliboso, ayebisaki yango polele epai na mama na ye oyo azalaki kobɔkɔla ye kozanga tata. Batoli ya mama na ye ezalaki na litomba mingi mpo na ye. Na nsima, akendaki epai na nkulutu moko ya lisangá ya Batatoli ya Yehova, mpe ye wana asungaki ye lisusu. Mpo na baoyo batungisami na makanisi, bankulutu bakoki kozala “lokola ebombelo mpɔ na mopɛpɛ, ejipelo na ntango na mbula makasi.” (Yisaya 32:2) Mpo na nini te kokutana na moko na bango mpo na koyebisa mitungisi na yo?
Katá yango mpo na libela
Ntango baboti ya Marc bayaki koyeba sɛkɛlɛ́ ya bolingo na ye, basalaki nokinoki ete ekatana. Marc amikundoli ete: “Balobaki na ngai polele ete nákata boyokani yango. Likanisi na ngai ya liboso ezalaki ya kotomboka. Toswanaki mpe nakendaki komikanga na eteni na ngai na ndako. Mosika te, nayaki kososola likambo yango, mpe nayaki kokanga ntina ete elenge mwasi wana azalaki na mikano motindo moko na ngai te. Makambo makokaki kotambola te.” Ee, kososola malamumalamu likambo yango ekoki kosalisa na kokitisa mayoki na yo. Omituna ete: ‘Moto yango azali na mikano, na bindimeli, mpe na bizaleli motindo moko na ngai? Soki tobalani, akosunga milende na ngai mpo na kosambela Nzambe? Moto yango azali na mposa ya makambo ya elimo motindo moko na ngai? Boyokani nini mpenza bokoki kozala kati na ye mpe ngai?—Kokanisá na 2 Bakolinti 6:14-18.
Kokata boyokani mpo na libela ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Monique, oyo tolobelaki liboso, ayebisi ete: “Mbala mibale namekaki kokata boyokani yango, kasi nalóngaki te. Nalingaki te kokata boyokani kati na makambo nyonso. Napesaki ye litatoli na elikya ete akondima Yehova. Ayaki mpe na likita moko na mokolo ya lomingo. Kasi azalaki mpenza kondima Yehova te. Nasosolaki ete mwango malamu ezalaki ya kokata boyokani nyonso.”
Yango ezali kokundwela biso maloba na Yesu mazwami na Matai 5:30 (NW). Kuna, alobelaki makambo oyo makoki kopekisa moto koingela kati na Bokonzi ya Nzambe,—makambo oyo makoki kozala na motuya mingi lokola lobɔkɔ ya mobali. Kasi, Yesu apesaki toli oyo ete: “Katá yango mpe bwaka yango mosika na yo. Mpo ete eleki malamu kobungisa enama moko na nzoto na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na Gehena [elilingi ya kobomama ya seko].” Na kolanda etinda oyo, zalá na mpiko mpo na kokutana na moto oyo osalaki boyokani elongo na ye mpe “lobá na sembo nyonso.” (Baefese 4:25, NW) Na esika oyo bato bazali komona bino, kasi esika ya bino mibale te to na esika oyo ekoki kolamwisa bino mposa te, yebisá polele ete boyokani na bino esuki. Elenge Sandrine amikundoli ete: “Ngai nalóngaki mpo ete nayebisaki makambo nyonso mbala moko. Totikaki kolya esika moko. Tozalaki lisusu komonana te na ntango ya komibongisa mpo na mimekano ya eteyelo. Namonisaki ye etɛlɛmɛlo na ngai polele.” Patricia, elenge mwasi moklisto, amonisaki etɛlɛmɛlo na ye polele, ete: “Na nsuka, nayebisaki ye ete atika ngai, mpe nabosanaki ye mbala moko.”
Lolenge ya kolónga mpasi
Nsima ya kokata boyokani motindo wana, okoki mbala mosusu kozala na mayoki lolenge moko na oyo ya mokomi na Nzembo, oyo akomaki ete: “Nakumbami na nse, nakwei na mabele; mokɔlɔ mobimba najali kotambolatambola wana nakolelaka.” (Njembo 38:6) Kotungisama na bantango mosusu, ezali likambo ya bomoto. Biblia endimi ete ezali na “ntango ya kolela,” boye te? (Mosakoli 3:4) Kasi mpasi na yo ekoumela seko te. Nsima ya mikolo, ekosila. Marc amikundoli ete: “Ya solo, nazalaki na mpasi na boumeli ya eleko moko. Baboti na ngai basosolaki yango mpe basalaki nyonso ete nasala boninga elongo na bilenge baklisto mosusu. Yango esalisaki ngai mingi.” André, ye oyo atungisamaki mpe mingi na makanisi, nsima ya kokata boyokani, alobi ete: “Bankulutu basungaki ngai mingi. Nakómaki kobima mingi kati na mosala ya kosakola mpe lisusu kozala penepene elongo na bandeko mosusu oyo nazalaki na boyokani malamu elongo na bango.” Ee, omipesa mingi kati na misala ya elimo. (1 Bakolinti 15:58) Kosala ngalasísi to kosala mosala ya makasi ekoki mpe kozala na ntina mingi. Komitangola te. (Masese 18:1) Tyá elimo na yo likoló na makambo malamu mpe oyo ekolendisaka.—Bafilipi 4:8.
Omikundola lisusu ete, etɛlɛmɛlo na yo ya mpiko ezali kosepelisa Yehova. Kokakatana te mpo na koluka lisalisi mpe lisungi epai na ye na nzela na libondeli. (Nzembo 55:22; 65:2) Sandrine amikundoli ete: “Nabondelaki mingi.” Ya solo, kokata boyokani mabe oyo esili kokóla ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Sandrine alobi lisusu ete: “Atako tosili kokata libela bolingo yango, nakanisaka ye na bantango mosusu mpe namitunaka soki azali kosala nini. Kasi, ntango oyebi ete ozali kosepelisa Yehova, okokangama na ekateli na yo.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali bankombo mosusu epesamelaki bango.
[Elilingi na lokasa 12]
Yebisá ye polele ete boyokani na bino esili