Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Nasengeli nde koyambola lisumu na ngai?
“Nazali koyoka nsɔ́ni, nayebi te nini nakoki kosala. Nalingi koyebisa baboti na ngai, kasi nazali koyoka nsɔ́ni mpenza.”—Lisa.a
YANGO ekomamaki na elenge mwasi moko oyo atungisamaki. Akangamaki na moto moko oyo azalaki mondimi te na boumeli ya mwa bambula kino mokolo moko, na bopusi ya masanga, asangisaki na ye nzoto.
Mpasi mpo na kolobela yango, makambo motindo yango masalemaka mingi, ata epai na bilenge baklisto. Wana ozali naino elenge mpenza mpe ozali na eksperiansi mingi te, okoki mpenza kosala mbeba mingi. Kasi atako mbeba moke ekoki kosalema, komikɔtisa na mbeba monene ezali mpenza likambo mosusu, na ndakisa kosangisa nzoto liboso ya kobala. (1 Bakolinti 6:9, 10) Ntango likambo esalemaka, elenge azalaka na mposa ya kozwa lisungi. Kasi ekómaka mokakatano mpamba te ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te mpo na koyambola mabunga.
Elenge mwasi moko moklisto asangisaki nzoto liboso ya kobala. Azwaki ekateli ya koyambola lisumu na ye liboso ya bankulutu ya lisangá, kútu apesaki dati oyo alingaki kosala yango. Kasi apusaki dati yango na nsima. Apusaki yango lisusu. Kino eyaki koleka mbula mobimba!
“Likambo moko te libombami”
Soki okwei na lisumu monene, osengeli koyeba ete kobomba yango ezali mpenza likanisi ya mayele te. Yebá ete nsukansuka solo ekobima. Ntango azalaki mwana moke, Marc asalaki bongo, apasolaki mbɛki kitoko ya kokembisa ndako. Amikundoli ete: “Namekaki kokangisa yango na kɔ́lɛ na bokɛngi mpenza, kasi eumelaki te baboti na ngai bamonaki biteni yango.” Ya solo, ozali lisusu mwana te. Kasi, na momeseno baboti mingi bakoki koyeba soki likambo moko lizali kotungisa bana na bango.
Ann, elenge ya mibu 15 alobi ete: “Namekaki kobomba mikakatano na ngai na kobukáká lokuta, kasi nazalaki bobele kokómisa yango mabe koleka.” Mbala mingi lokuta eyebanaka. Mpe soki baboti na yo bayebi ete okosaki, na ntembe te bakosilika—koleka soki oyebisaki bango solo na ebandeli.
Kútu likambo ya ntina koleka, Biblia elobi ete: “Mpo ete makambo nyonso na nkuku makobima polele, mpe makambo nyonso mabombami makoyebana mpe makobima polele.” (Luka 8:17) Yehova ayebi oyo tosili kosala mpe oyo tozali kosala. Okoki kobombela ye likambo moko te motindo moko Adama akokaki te kobomba lisumu na ye. (Genese 3:8-11) Mosika te, masumu na yo makoki mpe koyebana na basusu.—1 Timoté 5:24.
Kobomba lisumu ekoki mpe kosala yo mabe na lolenge mosusu. Davidi, mokomi na nzembo akomaki ete: “Wana nayebisaki bokesene na ngai te, nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba. Mpo ete lobɔkɔ na yo ezalaki na bozito likoló na ngai na moi na butu.” (Nzembo 32:3, 4) Ya solo, kobomba lisumu ekoki kopesa bozito na mayoki. Kotungisama mpe mayoki ya komema ngambo, bakisa mpe kobanga ya kotɔndɔlama, ekoki kopesa yo mpasi na motema. Okoki kobanda komitangola na baninga mpe na libota. Kútu okoki komiyoka ete ozali lisusu na boyokani na Nzambe te! Elenge moko na nkombo André akomaki ete: “Nazalaki kobunda na mayoki ya komema ngambo mpamba te nayokisaki Yehova mpasi. Yango ezalaki kotungisa ngai ntango nyonso.”
Yambolá lisumu na yo
Mwango mozali nde mpo na kozwa libɔndisi na mobulungano yango na mayoki? Ɛɛ, mozali! Mokomi na nzembo alobaki ete: “Nayebisaki yo masumu na ngai, nabombaki bokesene na motema na ngai te. . . . Mpe yo olimbisi mabe na masumu na ngai.” (Nzembo 32:5; kokanisá na 1 Yoane 1:9.) Bobele bongo André azwaki libɔndisi na koyamboláká lisumu na ye. Amikundoli ete: “Nabɛlɛmaki epai na Yehova mpe nabondelaki ye na motema moko ete alimbisa ngai.”
Okoki mpe kosala bongo. Bondelá Yehova. Ayebi likambo osali, kasi na komikitisa nyonso yambolá yango epai na ye na nzela ya libondeli. Sɛngá ye bolimbisi, kokakatana te na kokanisáká ete okozwa lisungi te mpo ete mabe na yo maleki ndelo. Yesu akufaki mpo ete tókoka kozala na etɛlɛmɛlo malamu liboso ya Nzambe atako tozali bato ya kozanga kokoka. (1 Yoane 2:1, 2) Okoki mpe kosɛnga nguya mpo na kosala mbongwana oyo esengeli. Kotánga Nzembo 51 ekoki mpenza kosunga yo mpo na kobɛlɛma epai na Nzambe.
Yebisá baboti na yo
Nzokande, longola koyambola epai na Nzambe, esengeli kosala likambo mosusu. Osengeli mpe koyebisa baboti na yo. Nzambe apesi bango mokumba ya kobɔkɔla yo ‘na mateya mpe na mpamela na Yehova.’ (Baefese 6:4) Bakoki kosala bongo bobele soki bayebi mikakatano na yo. Lisusu, koyebisa baboti na yo ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ te to ya kosepelisa te. Kasi, nsima ya kosilika, na ntembe te bakokitisa motema. Bakoki kútu kosepela ete otyeli bango motema na koyebisáká bango mokakatano na yo. Lisese ya Yesu litali mwana na kilikili lizali kolobela elenge mobali oyo amikɔtisaki na bomoi ya mbindo. Kasi, ntango nsukansuka ayambolaki mabe na ye, tata na ye ayambaki ye na esengo monene! (Luka 15:11-24) Ntembe ezali te ete baboti na yo bakosunga yo bobele bongo. Atako boni, bazali ntango nyonso kolinga yo.
Ya solo, mbala mosusu okoki kobanga ete okoyokisa baboti na yo mpasi. Kasi ezali te koyambolama ya lisumu nde ekoyokisa baboti na yo mpasi; kasi kosala lisumu nde ekoyokisa bango mpasi! Koyambola ezali litambe ya liboso ya kokitisa mpasi yango. Ann, oyo tolobelaki liboso, ayebisaki baboti na ye mpe na nsima azwaki libɔndisi mpenza.b
Nzokande, mokakatano mosusu mpo na koyambola lisumu ezali bongo nsɔ́ni mpe kobulunganisama. Mokomi na sembo Ezela, ye moko asalaki masumu te, kasi ntango ayambolaki masumu ya bazalani na ye Bayuda, alobaki ete: “Ɛ Nzambe na ngai, nayoki nsɔ́ni mpe nabangi kotɛlɛmisa elongi na ngai epai na yo, ɛ Nzambe na ngai.” (Ezela 9:6) Ya solo, ezali mabe te koyoka nsɔ́ni ntango osali lisumu. Yango ezali komonisa ete lisɔsɔli na yo lizali kosala. Mpe na nsima mayoki wana ya nsɔ́ni makosila. André alimbolaki yango na lolenge oyo: “Ezalaka mpenza mpasi mpe kobulunganisama mpo na koyambola lisumu. Kasi koyebáká ete Yehova akolimbisa mpenza ezali libɔndisi.”
Kendá kokutana na bankulutu
Soki ozali moklisto, likambo yango lisuki te bobele na koyebisáká baboti na yo. André alobi ete: “Nayebaki ete nasengelaki koyebisa mokakatano na ngai epai na bankulutu ya lisangá. Oyo nde libɔndisi na koyebáká ete bazalaki pene mpo na kosunga ngai!” Ɛɛ, bilenge Batatoli ya Yehova basengeli kokenda epai na bankulutu ya lisangá mpo na koluka lisungi mpe kolendisama. Kasi mpo na nini esengeli kosala likambo mosusu na esika ya kosuka bobele na kobondela Yehova? Mpamba te Yehova apesi bankulutu mokumba ya “kokɛngɛlaka milimo na bino.” (Baebele 13:17) Bakoki kosunga yo ete okwea lisusu na lisumu te.—Kokanisá na Yakobo 5:14-16.
Komikosa te na kokanisáká ete okoki komisalisa yo moko. Soki ozalaki mpenza na makasi ya kosala bongo, okokaki nde kokwea liboso na lisumu? Ezali solo ete ozali na mposa ya lisungi ya moto mosusu. Na mpiko nyonso, André alukaki lisungi. Toli nini apesi? Alobi ete: “Nazali kolendisa moto nyonso oyo amoni ete akwei na lisumu to asili komikɔtisa na yango, afungola motema na ye epai na Yehova mpe epai na bankulutu.”
Kasi lolenge nini okosolola na bankulutu? Poná moko oyo omoni ete okomiyoka malamu liboso na ye. Okoki kosolola na ye na kolobáká boye: “Nalingi koyebisa yo mwa likambo moko” to “Nazali na mokakatano” to “Nazali na mokakatano mpe nazali na mposa ya lisungi.” Soki ozali sembo mpe na elobeli ya polele, ekomonisa ete obongoli mpenza motema mpe ozali na mposa ya kosala mbongwana.
‘Nazali kobanga ete nakobimisama na lisangá’
Ezali boni mpo na ebongiseli yango? Ezali solo ete kosala lisumu monene ekoki komema moto na kobimisama na lisangá, kasi yango esalemaka te kozanga kotalela likambo malamumalamu. Kobimisama na lisangá ezali mpo na baoyo baboyi kobongola motema—baoyo na nkó nyonso bazali koboya kosala mbongwana. Masese 28:13 elobi ete: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolónga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango akozwa ngɔlu.” Lokola osololi na bankulutu mpo na kozwa lisungi emonisi mpenza ete ozali na mposa ya kobongwana. Libosoliboso bankulutu bazali babikisi, kasi bapesi na bitumbu te. Bazali na lisɛngisi ya komonisa boboto mpe limemya epai na bato ya Nzambe. Bakolinga kosunga yo ete ‘obongisa nzela alima mpo na makolo na yo.’—Baebele 12:13.
Ezali solo ete, soki emonani ete moto asili koumela kati na lisumu to azali kobuka lokuta, ekozala mpasi te kondimisama ete azangi ‘misala mibongi na kobongola motema.’ (Misala 26:20) Mbala mosusu kobimisama na lisangá ekoki kozala likambo liuti na ezalela yango. Mpe ata soki mosali na mabe abongoli motema, bankulutu basengeli kopesa lolenge moko to mosusu ya disipilini. Okosilika to okotomboka mpo na ekateli na bango? Na Baebele 12:5, 6, Paulo akebisi ete: “Ɛ mwana na ngai, otyola etumbu na [Yehova] te, olɛmba mpe te wana ekopamelaka ye yo. Zambi [Yehova] akopesaka bitumbu epai na baoyo akolingaka bango, akobɛtaka mwana na mwana baoyo ye akoyambaka bango.” Ezala disipilini nini okozwa, talelá yango lokola elembeteli ete Yehova alingaka yo. Kobosana te ete kobongola motema ya solosolo ekozongisa yo na boyokani malamu elongo na Tata na biso oyo atondi na motema mawa, Yehova Nzambe.
Esɛngaka mpiko mpo ete moto ayambola mabunga na ye. Kasi na kosaláká bongo, okoki kosembola makambo bobele na baboti na yo te kasi na koleka okosembola makambo na Yehova Nzambe. Kotika te ete bobángi, lolendo, to kobulunganisama epekisa yo kozwa lisungi. Kobosana te: Yehova “akolimbisa na solo.”—Yisaya 55:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ebongwanaki.
b Mpo na koyeba makambo mosusu matali kosolola na baboti na yo, talá mokapo 2 ya búku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]
‘Nazali kolendisa moto nyonso oyo asali lisumu ete afungola motema na ye epai na Yehova.’—André
[Elilingi na lokasa 17]
Koyambola lisumu epai na baboti ekoki komema libiki ya elimo