Bomoi na yo etondi na mitungisi? Okoki kobongola yango!
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ESPAGNE
MARGUERITE mpe Bernard bango nyonso mibale bazalaki na mibu ya kobotama pene na 55 wana libaku moko ya kitoko epesamelaki bango: bazwaki epasó nokinoki na mosala mpe bapesaki bango mosolo oyo ekokaki kosunga bango. Bazwaki bongo ekateli ya kokende kofanda na súdi, epai moi ezalaka makasi, pene na Mai Monene Méditerranée. Bazalaki lisusu na mitungisi te, bomoi moko ya malamu ezalaki kozela bango na ndako na bango monene ya sika mpembeni ya mai monene.
Nsima ya mibu mibale, likambo oyo bazalaki kokanisa ebongwanaki ndɔ́tɔ. Bernard ayebisi ete: “Makambo nyonso mamonanaki ete mazalaki na ntina te. Mokolo na mokolo tozalaki na eloko ya kosala te. Ya solo, nazalaki kokende kosukola, kosakana mwa moke lisano libéngami golf to na tennis, mpe nazalaki kosolola ntango molai elongo na baoyo nyonso bazalaki kosepela koyoka ngai. Nazalaki kosolola na ntina ya makambo nini? Makambo ya mpambampamba.”
Gisèle, elenge mwasi moko oyo azali na mibu koleka 20, azalaki na mwana na ye ya mwasi ya kitoko, oyo azalaki kosepela komema na lopango ya banyama nsima ya nzangá nyonso. Kuna, mwana azalaki kosakana na esengo nyonso na bisika oyo zɛlo etyamaki. Na ntango wana, mama na ye oyo afandi na ebónga, azali kotala ye. Kasi azali mpenza kotala ye? Lokola azalaki kolanda na likebi nyonso radio mpe lokola milinga oyo ezali kobima na likaya oyo azali komela ezipaki ye miso, yango esali ete amona lisusu mwana na ye te. Atungisami kino etindi ye na kolela.
Pierre, oyo azali kotánga na eteyelo ya katikati, azali na mibu 17, afandi na esika oyo alalaka, wana azingelami na bamasíni ya sika oyo ebongi mpo na kominanola. Afungoli moko na masano oyo ezalaki na video bobele mpo na komindimisa ete yango ezali lisusu kosepelisa ye te. Asilá kobeta yango mbala mingi mpe likambo moko ya sika mpo na ye ezali te mpo na oyo etali kosalela masíni yango. Esengeli na ye koyoka miziki? Ezali na kasɛti moko te kati na oyo azali na yango oyo ayoká naino te. Atungisami mingi, kino amileli ete: “Nayebi eloko nakoki kosala te.”
Ozali bobele kolekisa ntango?
Ya solo, ezali te moto nyonso nde azali na bomoi ezangi ɛlɛngi mpe ya mitungisi. Ezali na bato mingi oyo bazali na bomoi ya malamu mpe ya esengo, oyo bazali kozwa bosepeli na koyekoláká makambo ya sika, na kosepelisa makoki babotamá na yango ya koyeba kosala makambo mpe mingimingi na kozala na boyokani malamu elongo na bazalani, mpe oyo eleki mpenza ntina elongo na Nzambe.
Nzokande, mitungisi ezwaka bato nyonso—engebene bolukiluki moko euti kosalema kala mingi te; mofandi moko ya Allemagne kati na misato azali na yango. Elenge mosáli ya nguya mpe ya bilulela oyo asepelaka kominanola na bisika nyonso oyo biyebani, elenge oyo azangi mosala oyo alekisaka ntango na koyokáká miziki makasi mpe na komeláká masanga, mosáli oyo azali na mibu koleka ntuku mitano, oyo azalaki kolekisa bawikende na ye liboso ya televizyó, mokambi ya kompanyi oyo azali komiyoka ete abulungani wana abimi na biro na ye—banso bazali konyokwama na mpasi bobele moko oyo ebéngami: mitungisi.
Bafilozofe ya kala babéngaki yango taedium vitae, “kozanga kosepela na bomoi” na lokótá Latin. Liloba likokani na yango na Allemand ezali bongo Langeweile oyo elimboli “ntango molai.” Ntango oyo ezali koleka noki te, mosala oyo ezali komonana ete ezangi ntina, mposa ya “kosundola makambo nyonso” ezali bilembo ya mitungisi oyo bimonanaka mingi.
Ata bozwi ebenganaka te mayoki wana. Nsima ya kolobela ezaleli ya kobebisa mosolo oyo emonanaka epai na bato oyo bazali na bozwi mingi, Roger Rosenblatt, ya zulunalo Time, ayebisaki ete: “Nsima ya kozwa bifandelo minene, bilanga minene, banyama minene, bilambo na bango minene mpe nsima ya koyebana na bato minene, mingi kati na bango balobaka nini? Ete batungisami, batungisami mpenza.”
Na ntango moko boye, ekanisamaki ete kozala na mabaku mingi ya kominanola nde ezalaki nkisi malamu mpo na kobundisa mitungisi. Ekanisamaki ete na kozaláká na misala ya malamu, na kolongoláká minyoko ya mpamba mpe na koyeisáká mingi bantango ya kominanola, nzela ekopesama na moto nyonso ete azala na bomoi ya kosepelisa. Na mawa nyonso, makambo mazali ndenge ekanisamaki te. Kosalelama ya ntango nyonso wana ya kozanga mosala emonani mpasi mingi koleka ndenge ekanisamaki. Mingi bazali kolɛmba nzoto pɔ́sɔ mobimba nsima na kolekisa wikende oyo etondi na bilikya mingi, kozanga ete bázwa bosepeli oyo bazalaki komizela na yango.
Matomba mabe ya mitungisi
Bamoko bazali koluka kokima mitungisi na komipesáká na misala mingi. Ezali na baoyo bamipesi koleka ndelo na misala na bango mpamba te bayebi oyo bakoki kosala te soki babimi na biro. Basusu bazali komeka kosilisa mitungisi na bango na kolekisáká ndelo na komela masanga to bazali koluka mayoki makasi kati na bilangwiseli. Mpo na oyo etali masano, mingi bazali basáni oyo bazali na bomoi ya mbindo, baoyo nsima wana kobeta mabɔkɔ esili, bazali komeka kosilisa mitungisi ya bomoi na bango na komipesáká na bilangwiseli lokola cocaïne. Epai mosusu, bolukiluki emonisi ete mitungisi ezali moko na bantina ya motángo oyo ezali sé komata ya bamama oyo bazali minzemba, bilenge basi mingi oyo bazali kokanisa ete mwana nde akopesa ntina na bomoi na bango.
Mitungisi ezali nkutu na boyokani na bokóli ya makambo mabe mpe ya mobulu. Mpo na yango, zulunalo Time emonisi ete bilenge mingi oyo bazali kotika kelasi ntango bazali na mibu 16 bazali na mosala te, mpe ete na Mpótó ya Wɛ́sti, bato oyo basalaka te bango nde bazali “mingi na komiboma, na kobota bana oyo batata bayebani te mpe na kobuka mibeko” koleka baoyo basalaka. Likambo oyo endimisi bosolo ya lisese oyo ya kala ete “kozanga eloko ya kosala epesaka nzela na makambo nyonso ya mabe.”—Kokanisá na Baefese 4:28.