Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Janvier nk. 5-7
  • Mwango ya pɛtɛɛ ezali mpo na kosilisa mitungisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwango ya pɛtɛɛ ezali mpo na kosilisa mitungisi?
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bantina ebombami ya mitungisi
  • Bomoi ezangi mitungisi​—Lolenge nini?
  • Bomoi na yo etondi na mitungisi? Okoki kobongola yango!
    Lamuká!—1995
  • Nasala nini soki mwana na ngai alɛmbi na ye?
    Lisalisi mpo na libota
  • Nasala nini soki likambo moko elɛmbisi ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Bomoi ya seko na paradiso ekolɛmbisa biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Janvier nk. 5-7

Mwango ya pɛtɛɛ ezali mpo na kosilisa mitungisi?

KOSALEMA ya bibongiseli ndenge na ndenge ya kominanola mpo na kosilisa mitungisi epai na bato mingi ezali mombongo moko monene. Kolekisa lói na mokili mosusu, bamasíni ya lontiliki ya ndenge na ndenge, kolekisa ntango oyo ezali kosɛnga makambo mingi, nyonso ezali malamu mpo na kominanola. Nzokande, mitungisi ezali ntango nyonso mokakatano monene. Ata na ntango ya lói, bato bazali na mposa ya balendisi oyo bakoki kopusa bango na kosakana. Mingi kati na bato oyo balingaka kopota mbangu na makolo bamiyokaka ete bazali bango te soki bazangi baradio na bango ya mike.

Ya solo, kominanola, lokola kotala televizyó, epesaka mwa bosepeli mpe elimwisaka mitungisi. Kasi mpo na ntango boni? Epai na bato mosusu, yango esalaka lokola bilangwiseli: esengeli ntango nyonso ete eloko moko oyo epesaka bosepeli ya makasi ezala, mpamba te soki ezangi, liyoki wana ya mawa likozonga lisusu. Na esika ya kosilisa mitungisi, kominanola wana ekoki nde kosuka na kopesa mitungisi yango nzela.

Televizyó yango moko ezali likambo oyo etungisaka te, kasi kotala yango koleka ndelo elimwisaka mitungisi te. Likambo ya mabe koleka, wana omipesi mingi na televizyó, okoyeba mpenza bosolo ya makambo te. Ezali yango nde emonanaka mingi epai na bana. Na ntango ya bolukiluki moko oyo esalemaki, batunaki na bana oyo bazalaki na mibu minei mpe oyo bazalaki na mibu mitano soki, kati na televizyó mpe batata na bango, bakopona kozanga nini. Mwana moko kati na misato alobaki ete akopona kozanga “papa” na esika ete azanga televizyó.

Mwango ya malamu esuki te bobele na kokokisa bamposa mikemike ya moto. Ntoma moko ya lingomba ya politiki libéngami Parti Social Démocratique na Allemagne amonisaki ete bilenge mingi “bazali kokóla na eleko moko ya bozwi ya mosuni, kati na yango bazali kozanga te biloko ya kosakana na yango, bakonzé mpe bilamba ya sika.” Ezali na eloko mosusu oyo ekoki kosepelisa bango? Ekoki kozala ete baboti oyo bazali na makanisi malamu, oyo bazali kotondisa bana na bango na bamasíni ya sika mpo na kosakana bazali nde kobongisela bango bomoi ya mitungisi ya koumela wana bakokóma mikóló.

Bantina ebombami ya mitungisi

Kozala na bomoi ezangi mitungisi ezali likambo oyo likoki kosalema te. Bomoi kati na mokili oyo ekoki te kopesa biso ntango nyonso bobele bisengo mpe bolamu. Moto oyo akozanga kondima likambo oyo akomipesa bampasi ya mpamba. Nzokande, ezali na makambo ya sikisiki oyo mazali mpenza koyeisa ezalela wana mpasi.

Na ndakisa, lelo oyo kopanzana ya mabota ezali likambo oyo lizali koya sé makasi. Ekoki kozala ete baboti bazali komipesa mingi na kominanola na bango na boye ete bazali te na ntango ya kolekisa elongo na bana na bango? Epai mosusu, bilenge bazali koluka kominanola na bango moko kati na badiskotɛ́kɛ, na bisika ya masano ya video, na bisika ya mombongo mpe bongo na bongo. Lokola litomba: kati na mabota mingi, kobima elongo na libota to kosala misala misusu esika moko ezali makambo ya kala.

Bamoko bazali kosepela te na bomoi na bango, yango wana bamonaka malamu kozala na esika na bango moko, kotaleláká bobele makambo na bango moko mpe kobosana bazalani na bango. Komizindisáká kati na ezaleli ya komitangola na basusu, bazali kolóna elikya mpamba ya kokokisa oyo bazali kolikya. Ya solo, moto moko te azali esanga. Moto nyonso azalaka na mposa ya baninga mpe ya kosolola. Na yango ezali likambo ya solo ete bato oyo bazali komitangola na basusu bazali kokutana na mitungisi, koyeisáká mpasi bomoi na bango moko mpe ya bato oyo bazingi bango.

Nzokande, likambo yango lizali mpenza monene. Blaise Pascal, filozofe ya France na ekeke ya 17, asosolaki yango mpe akomaki ete: “Mitungisi miutaka na nsé ya motema, epai misisa na yango mizali, mpe mitondisaka elimo na ngɛngɛ na yango.” Oyo nde likambo ya solo!

Wana motema ezali na ntembe mpo na ntina na bomoi, mitungisi mizali na likoki ya koumela ntango molai. Moto na moto asengeli kondimisama ete bomoi na ye ezali na ntina. Nzokande, lolenge nini moto akoki kozala na likanisi malamu na ntina na bomoi soki azali koyeba te ntina nini azali na bomoi, soki azangi mikano kati na bomoi, soki azali te na bilikya oyo bizali na miboko malamu mpo na mikolo mizali koya?

Na yango, ebongi ete tómituna mituna oyo ya moboko: Bomoi ezali na ndimbola nini? Mpo na nini nazali na bomoi? Mikolo na ngai oyo mizali koya mikozala lolenge nini? Monganga Viktor Frankl alobaki ete: “Koluka koyeba ndimbola ya bomoi ezali lobanzo ya liboso ya moto.” Kasi lolenge nini koyeba ndimbola ya bomoi mpe epai wapi tokoki kozwa biyano ya kosepelisa na mituna wana?

Bomoi ezangi mitungisi​—Lolenge nini?

Búku oyo eleki babúku nyonso na koumela ezali kopesa bingɛngiseli na mituna wana ya ntina. Heinrich Heine, mokomi ya ntɔ́ki ya Allemagne na ekeke ya 19, akomaki ete: “Makambo mingi nazwaki yango na búku moko.” Búku yango nini? Ezali bongo Biblia. Bobele bongo, Charles Dickens alobaki ete: “Uta kala, ezali mpe ekozala ntango nyonso búku oyo eleki malamu kati na mokili, mpamba te ezali koteya yo makambo maleki kitoko oyo makoki kotambwisa . . . moto nyonso.”

Ntembe ezali te, Biblia ezali kopesa litambwisi ya malamu mpo na kozala na bomoi oyo ezali na ntina. Uta na ebandeli kino na nsuka, ezali komonisa polele ete Nzambe apesaki mosala moko epai na moto, mosala ya kobatela mabelé, ya kokɛmbisa yango, ya kosɛnzɛla na bolingo nyonso likoló na banyama, mpe mingimingi, ya kokumisa Mozalisi na ye, Yehova. Talá ebongiseli oyo esengelaki kopesa nzela na mitungisi te! Bamilió ya baklisto ya molende basili komona ete na komityáká na ngámbo ya Nzambe mpe na komipesáká mobimba epai na ye, bomoi na bango ekómi na ntina mpe bazali kobengana mitungisi.

Mbala mosusu mitungisi oyo mizali komonana bipai binso ezali likambo ya sika; emonani ete liloba wana eyebanaki te na nkótá mingi ya kala. Nzokande, longola likambo oyo ete ezali komonisa ntina ya bomoi, Biblia ezali na batoli oyo ebongi mpo na kobundisa mitungisi. Na ndakisa, elobi ete ‘ye oyo azali komitangola azali kotɛmɛla mayele nyonso oyo mabongi.’ (Masese 18:1) Na maloba mosusu, ezali kopekisa ezaleli ya kozala yo moko.

Moto asalemaki mpo ete azala elongo na bato mosusu. Abotami na mayoki ya kozala na boyokani elongo na bazalani na ye mpe na kosepela kozala elongo na bango. Ye oyo azali koboya liyoki wana ya malamu na komitangoláká mpe na kozaláká lokola motáli mpamba azali na mayele te. Bobele bongo, kozala na boyokani ya likolólikoló elongo na bazalani ezali kotɛmɛla mayele oyo mabongi.

Ya solo, ezalaka pɛtɛɛ mingi mpo na kotala filime na televizyó to kosolola na bokɔtisi makambo kati na ordinatɛrɛ. Nzokande, komimesenisa na basusu esɛngaka milende. Kasi ye oyo azali na likambo ya kosepelisa mpo na koloba mpe oyo akabolaka makanisi mpe mayoki elongo na bazalani azwaka bosepeli mpe azalaka na mitungisi mingi te.​—Misala 20:35.

Salomo, oyo ayebaki malamu kotalela ezaleli ya moto, apesaki toli oyo: “Komona na miso eleki koyoka mposa o motema.” (Mosakoli 6:9, Liloba lya Nzambe) Na maloba mosusu, zwá litomba na ezalela na yo ya sikawa, talelá oyo ozali na yango sikawa. Yango ezali malamu koleka makambo mpamba oyo makoki kosalema te to, mpo na kozongela maloba ya Salomo, “koyoka mposa o motema.”

Mikolo oyo mibongisami malamu, mikano ya sikisiki mpe mposa makasi ya kolanda koyekola, ekosalisa mpe yo na kolónga mitungisi. Ya solo, ata wana moto azwi epasó, ezali na makambo mingi oyo akoki kosala. Na yango, na bisanga Baléares, Motatoli moko ya Yehova, oyo azalaki na mibu koleka ntuku nsambo amipesaki na esengo nyonso na koyekola lokótá Allemand. Mpo na mokano nini? Oyo ya kosolola Liloba ya Nzambe elongo na batamboli mingi ya Allemagne oyo bazalaki koyeba te nini bakokaki kosala na boumeli ya mobembo na bango. Mitungisi ezali mokakatano mpo na ye te.

Na nsuka, okanisaki kosala eloko na mabɔkɔ na yo? Mpo na nini te kokólisa makoki na yo na mosala moko ya mabɔkɔ, koyeba kotya balángi na ndako to koyeba kobeta esaleli moko ya miziki? Liyoki ya kosala mosala moko elendisaka limemya ya moto ye moko. Mpo na nini te kolinga kongumba lisɛti ya simisi na yo mpe kopesa mabɔkɔ na ndako? Ezali na makambo mingi ya mikemike oyo okoki kosala na ndako. Na esika ya kolɛmba na ntina ya mosala bobele moko, omitika kosalelama, omipesa na mosala oyo ezali na ntina na miso na yo, zalá na makoki mingi kati na misala ya mabɔkɔ. Kozanga ntembe, okozwa matomba mingi.​—Masese 22:29.

Lisusu, Biblia ezali kolendisa biso ete tósala na molimo na biso mobimba na misala nyonso oyo tozali kosala. (Bakolose 3:23) Esengeli mpo na yango komipesa mpe kosepela mpenza na mosala na yo. Ekoki kozala malamu komikundola ete liloba “bosepeli” euti na liloba ya Latin oyo ete interesse, oyo elimboli mpenza “kozala kati na” to “kozwama na,” elingi koloba komipesa kati na mosala na yo. Yango ekosala ete ezala ya kosepelisa.

Soki ozali kati na baoyo bazali komitungisa na ntango oyo bazali na mosala te, kosalela batoli kitoko oyo eumeli mibu mingi, ekoki kobongola bomoi na yo. Na yango, omipesa na oyo ozali kosala. Zalá elongo na bato mosusu. Salisá bato mosusu. Landá koyekola. Sololá elongo na basusu. Yebá malamu mokano mpenza ya bomoi. Na kosaláká bongo, okomituna te ete: ‘Mpo na nini bomoi etondi na mitungisi?’

[Etanda na lokasa 7]

Lolenge ya kolónga mitungisi

1. Kotika nzela te ete mikano na yo mibebisama na kominanola. Yebá kosala liponi mpo na oyo etali kominanola.

2. Zalá elongo na bato mosusu.

3. Landá koyekola. Omityela mikano.

4. Zalá na likoki ya koyeba kosala makambo. Salelá mabɔkɔ na yo.

5. Zalá na mokano kati na bomoi. Osengeli kobosana Nzambe te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto