Engebene Biblia
Nzambe asepelaka ntango biso tozali komona mpasi?
KOBUNDABUNDA na nsé ya bozito ya ekulusu monene ya nzeté, moto moko azali kokatisa limpinga ya bato na koselomwáká wana makila mazali kobima longwa na ekɔti ya nzube etyami likoló ya motó na ye. Ntango bakómi na esika basengelaki “koboma” ye, batandi ye likoló na ekulusu; babáki ye bansɛ́tɛ ya milai na mabɔkɔ. Ntango bazali kotɔbɔlɔ nzoto na ye, ayokaki bolɔ́zi mpenza. Ntango batomboli ekulusu, mpasi ekómi lisusu makasi koleka. Engebene Panorama, zulunalo moko ya Philippines, milulu ya mpasi motindo wana milekaka mbala na mbala na boumeli ya Pɔ́sɔ Esantu na Philippines.
Makambo oyo mamonisami awa likoló ezali bobele kolobelama ya mikolo na biso na ntina na minyoko ya Yesu. Nzokande, moto yango azali kosala masɛki te. Nsɛ́tɛ, makila mpe bolɔ́zi ezali mpenza ya solo.
Bipai mosusu, Bakatolike ya Loma ya molende bamibetaka bafimbo liboso na bato mpo na koyoka mpasi lolenge moko na Klisto. Mpo na nini? Basusu basalaka yango na kokanisáká ete bampasi na bango ekobimisa bikamwiseli, na ndakisa kobikisama ya balingami na bango oyo bazali maladi. Basusu basalaka yango na kokanisáká ete bakozwa bolimbisi ya masumu na bango, mpamba te babangaka ete bakozwa bolimbisi wana te soki makila na bango etangi te. Búku The Filipinos epesi ndimbola oyo: “Mpasi ezali mopɛtoli malamu ya makanisi mpe ya molimo. . . . Mosáli na lisumu amonani ete abimi na bolɔ́zi wana masumu na ye mapɛtwami mpe akitisami bozito na ye.”
Nzokande, ezali bobele te Bakatolike ya Phillippines nde bamiyokisaka mpasi. Bato ya mangomba ndenge na ndenge mpe kati na mikili mikeseni bakanisaka ete mpasi oyo bato bamipesaka bango moko ezali na motuya epai na Nzambe.
Na ndakisa, kati na bolukiluki na ye ya solo, moto na Bouddha, Siddhārtha Gautama, asundolaki mwasi na ye mpe mwana na ye, akendaki na esobe, epai kuna alekisaki mbula motoba na bomoi ya komipimela. Amisengisaki kotikala na etɛlɛmɛlo ya mabe mpe ya mpasi na boumeli ya bangonga mpe na nsima alobaki ete alekisaki bantango molai na kolyáká bobele mbuma moko ya loso na mokolo. Akɔndaki makasi mpenza mpe alobaki: “Loposo ya libumu na ngai ekanganaki na mikuwa ya mokɔngɔ.” Kasi, minyoko wana nyonso ememeli ye te kongɛnga oyo eutaka na Nzambe oyo ye azalaki koluka.
Bobele bongo, bato na komipimela oyo bazali ba hindous ya Inde bamipesaka minyoko mingi, mbala mosusu na lolenge eleki ndelo—kolala kati na mɔ́tɔ, kotala moi makasi kino kokóma mokufi-miso, kotɛlɛma na lokolo moko to na etɛlɛmɛlo ya mpasi na boumeli ya ntango molai. Malamu ya bato wana ya bomoi ya komipimela ekanisamaki ete ekokaki kobatela engumba na kokɔta ya banguna.
Biblia ezali mpe kolobela basambeli ya Baala oyo bazalaki komizokisa “lokola ezaleli na bango na mimpanga mpe na makɔnga kino makila ebimaki likolo na bango,” na komekáká na mpamba mpenza kobenda bongo likebi ya nzambe na bango.—1 Mikonzi 18:28.
“Bosengeli kokila biloko”
Lokola ezali ya solo ete Yehova apesaki etindá na libota na ye liponami ete: “Bosengeli kokila biloko,” tozali mpenza kososola ete alingaki koloba mpo na kolala nzala. (Levitike 16:31) Kolala nzala wana ezalaki lolenge ya komonisa mpasi mpe kobongola motema mpo na masumu to mpo na ezalela moko ya mpasi. Na bongo, ezalaki te lolenge moko ya etumbu oyo moto ye moko azalaki komipesa kasi nde elembo ya komikitisa liboso na Nzambe.—Ezela 8:21.
Nzokande, ezalaki na Bayuda mosusu oyo bakanisaki na lolenge ya mabe ete bampasi oyo euti na komipimela oyo bazalaki komipesa na kokila biloko ezalaki na motuya na yango mpenza mpe ezalaki kotya Nzambe na lisɛngisi ya kopesa bango mbano. Na ntango yango ezalaki koumela, bazalaki kosɛnga na lolendo nyonso epai na Nzambe mbano ya oyo bazalaki kokanisa ete basengeli kozwa yango: “Mpo na nini tokili bilei nde yo omoni yango te? Mpɔ na nini totuti milimo na biso nde yɔ oyebi yango tɛ?”—Yisaya 58:3.
Kasi bazalaki na libunga. Kokila biloko ya lolenge ya malamu oyo etalelaki losambo ezalaki te kosɛnga konyokola nzoto na nzala, lokola nde monyoko ya nzoto yango moko ezalaki na ntina. Mayoki ya makasi ekokaki kolɛmbisa nzala na bango. Na ntango elimo etondi na makanisi, nzoto esɛngaka eloko moko ya kolya te. Yango ezali komonisa na Nzambe mozindo ya mayoki ya moto oyo akili biloko.
Nzambe asepelaka na mpasi oyo moto amipesaka ye moko?
Mozalisi oyo atondi na bolingo asepelaka nde na lolenge moko to mosusu na komona bato bazali kominyokola bango moko? Ya solo, mbala mosusu baklisto bakoki “kosangana na mpasi na Klisto,” kasi yango elingi koloba te ete basengeli komikaba liboso na mikakatano to komimonisa lokola bamartíru.—1 Petelo 4:13.
Ya solo, Yesu azalaki te moto oyo aminyokolaki ye moko. Bakonzi ya mangomba bamilelaki mpo ete bayekoli na ye bazalaki kokila biloko te, balobaki na ye nkutu ete azali “molundi mpe molangwi.” (Matai 9:14; 11:19) Yesu azalaki na bokatikati na makambo nyonso, azalaki kosɛnga te na basusu to na ye moko koleka oyo ezalaki ya kolongobana.—Malako 6:31; Yoane 4:6.
Esika moko te kati na makomami tozali kokuta likambo ya komimonisa mpasi, lokola soki komipimela biloko ya ntina na bomoi to biloko ya mosuni ekokaki kozala na motuya epai na Nzambe. Tótalela maloba ya ntoma Paulo na ntina na bizaleli wana ya kominyokola: “Mateya mána, otali, okokanisa mateya ma solo mpo ya «kokumisa Nzambe», «koboya lolendo», «koyina nzoto»; kasi mazali kaka mpamba, mazali na ntina te, makokumisa se nzoto.”—Colosses 2:23, Liloba lya Nzambe.
Martin Luther, ntango azalaki sángó, aminyokolaki. Nzokande, na nsima, aboyaki bizalela wana, kolobáká ete ezalaki kolendisa likanisi ya nzela mibale oyo ezali kokamba kino epai na Nzambe; moko etombwami, mosusu na nsé, nzokande Makomami ezali koteya ete mazali bobele na nzela moko oyo ezali kokamba kino na lobiko—komonisa kondima kati na Yesu Klisto mpe na Tata na ye, Yehova. (Yoane 17:3) Epai mosusu, basusu bazalaki kotalela milulu ya kominyokola lokola myango ya komipesa yo moko lobiko.
Búku Church History in Plain Language epesi komantere oyo elandi na ntina na ezalela ya kominyokola: “Masɛngisi ya bomoi ya kominyokola eutaki na likanisi mabe ya lolenge ya bomoi ya moto. Mpo na sángó, molimo ekangisamaki na monyololo na mosuni lokola moto ya bolɔ́kɔ ya nzoto. Yango ezali likanisi ya Biblia te mpo na bomoi ya moto.” Ya solo, likanisi oyo ete kominyokola ekoki kosepelisa Nzambe ezwami na Biblia te. Ezwi moboko na yango likoló na makanisi ya bato oyo bandimaka makambo ya mibombamo engebene yango, nyonso oyo ezali na boyokani na mosuni ezali mabe mpe esengeli konyokolama na boye ete moto amona nzela mpo na kozwa lobiko.
Lokola Yehova alingi ete tózala na esengo; kosalela Nzambe ya bosepeli motindo wana ezali te likambo ya komikómisa baminyokoli. (Mosakoli 7:16) Na bongo, esika moko te kati na Biblia elobami ete tosengeli komimonisa mpasi mpo na kozwa lobiko. Nkutu, Liloba ya Nzambe emonisi yango polele ete ezali makila ya Yesu, elongo na kondima na biso kati na yango nde ezali kopɛtola biso na masumu nyonso.—Loma 5:1; 1 Yoane 1:7.