Mpo na nini kotonga ndako na mabaya?
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA JAPON
EZALI komonana lokola nfatá ya mbisi, badɔ́me 22 lokola matungulu ya mbuma etelemi likoló ya ndakonzambe etongami na mabaya mpe ezali kongɛnga na moi ya nordi-wɛsti ya Russie. Soki opusani mpo na kotala yango penepene, okomona ete badɔ́me yango ezipami na bankóto ya batwili ya mabaya, sikawa egugi mpo na koumela na yango. Ekómi sikawa soko mibu nkama misato, ndako wana etongami na mabaya na láki Onega etɛlɛmɛli bahiver makasi ya mboka wana. Kozanga koloba, ezali kotatola boumeli ya kokamwa ya mabaya.
Bandako mosusu ezali kopesa kutu litatoli makasi koleka. Bandako ya mabaya oyo etondi na nɔ́rdi ya Mpótó mobimba etongami mpenza uta kala. Na ndakisa, mikanda ya bafandi na Norvège, mizali komonisa bandako ya nzeté oyo etongamaki na ekeke ya 12. Na Angleterre, pene na Ongaar, na Essex, ndako moko ya mabaya etongamaki soko na mobu 1013 ezali naino kotɛlɛmɛla mipɛpɛ. Kasi, oyo emonani ete eumeli koleka yango nyonso ezali bongo tempelo etongami na mabaya na Japon oyo esali bikeke mingi.
Ndako etongami na mabaya oyo eleki koumela
Ndenge nini tempelo ya Horyuji oyo etongami na nzeté ekoki koumela mingi boye? Libosoliboso ezali mpo na boyebi ya mozindo etaleli banzeté oyo basali-mabaya ya ntango wana bazalaki kosalela. Bayebaki nzeté nini basengeli kopona mpe eteni ya nzeté nini basengeli kosalela mpo na esika boye to boye. Mpo na tempelo oyo, baponaki nzeté ebéngami hinoki (cyprès ya Japon), oyo ekólaki esilaki koleka bambula nkóto to koleka liboso ete ekatama.
Tsunekazu Nishioka, mosali-mabaya wa ntɔ́ki oyo akufaki eleki kala mingi te, alekisaki ntango mingi na bomoi na ye mpo na kobongisa tempelo yango. Alobaki ete bansɛ́tɛ—oyo esalemaki lolenge moko na sabres ya samouraïs, kobetáká yango na malato mbala na mbala—ezalaki mpe na litomba monene mpo na boumeli ya tempelo. Alobaki ete na ntango ya mosala ya kobongisa, basalelaki bansɛ́tɛ ya kala pamba te “bansɛ́tɛ ya ntango na biso eumelaka mbula 20 te.”
Basusu bakoki kobeta ntembe soki mpenza tempelo ya Horyuji ekokisi mibu 1 300 nzokande 35 % na yango ebongisamaki na boumeli ya ekeke oyo. Kasi, makonzí mingi mpe mibónga ezali bobele ya ebandeli. Nishioka alobaki ete: “Nakanisi tempelo yango ekoumela lisusu mibu 1 000.”
Lokola banzeté ya motindo wana etondi na mboka na bango, likambo ya kokamwa ezali te ete bafandi na Japon ya ntango ya kala bazalaki kosepela mingi na kosalela banzeté. Kutu bandako na bango lelo oyo ezali komonisa ete bolingo yango esili naino ngala te.
Bandako ya Japon
Na kati, mabaya masalelami mingi, kasi epakolami mokobo te. Makonzí, bizibeli, mesa, bakiti mpe bongo na bongo, ezali na lolenge moko ya kitoko oyo epesaka nzela na kosepela na lángi na yango moko. Mabaya na yango ya mbalasani batiki yango lolenge ekatamaki na zámba. Mabaya motindo wana mazali kopesa lolenge moko kitoko ya banzeté mpe matiti kati na elanga. Yango ekembisaka esika malamu mpenza.
Bafandi na Japon mingi balobaka ete ezali ndako motindo wana nde balingaka kozala na yango mokolo mosusu. Nzokande, lolenge malamu ya mabaya ya kotonga ndako motindo wana ezali na ntalo mingi mpo na basáli oyo bazwaka lifuti moke. Atako bongo, bafandi na Japon balingaka kosalela nzeté bisika nyonso oyo bango bafandi pamba te lisoló ya bomoi na bango eteyaki bango ete longola likambo oyo ete emonanaka kitoko, nzeté ekómisaka makasi bisika bafándí mpo na kotɛmɛla koningana ya mabele oyo esalemaka mbala na mbala, mipɛpɛ oyo miutaka na mai monene, bileko ya molungé mpe bileko ya mpiɔ makasi.
Nzeté ezali litomba monene na mikili epai kuna koningana ya mabelé esalemaka mingi, pamba te emiyɔtɔlaka mpe egumbamaka soki biloko lokola mabanga epasuki. Nzeté ekangisaka mpe epekisaka koleka ya lontiliki. Atako mbula ebetaka mpe mabele makómaka maimai na Japon kobanda Yuní kino na Augústo, bandako ebebaka te. Nzeté emimesenisaka mpe ezalaka na matomba na ntango wana pamba te ekoki komela mai wana mpe kokauka na nsima. Kasi, nzeté esepelisaka bato mpo na bantina mingi ekeseni.
Kitoko na yango
Na mokili mobimba, bato mingi baponaka mabaya mpo na lolenge yango emonanaka. Albert Jackson mpe David Day kati na búku na bango Collins Good Wood Handbook bamonisi ete: “Lokola nzeté euti na biloko bizalisami, eteni moko na moko na yango ezali na ndenge na yango. Eteni moko na moko oyo ekamatami na nzeté moko, to ata na libaya moko ekokesene na mosusu. Ekoki kozala makasi ndenge moko to na lángi ndenge moko, kasi ekokembisa ndenge moko te. Ezali bokeseni wana ya lolenge na yango, makasi na yango, lángi na yango, likoki ya kosalela yango mpe kutu na nsolo na yango nde esalaka ete bato bálinga nzeté mingi.”
Mpo na nini nsinga (fibres) ndenge na ndenge ekoki komonana na kati ya libaya? Libosoliboso, ezali mpo ete mabaya mosusu ekólaka na nsinga ya semba, mosusu esalaka mantútu, nzokande mosusu ebimisaka mantútu to nsinga ya zolongono, ata mpe ya masusamasusa. Lisusu, wana nzeté ezali kokóla, emigumbaka to etengamaka, ebimisaka bintapi mpe nyamankɛ́kɛ ikómaka kofanda wana. Nyonso wana epesaka makembisi ya kosepelisa. Mpe makembisi yango makesenaka engebene ngámbo oyo nzeté ekatami. Nzeté moko ya lángi motane ngwa oyo soki bakati yango, ebimisaka misisa ya lángi moindo ebéngami zèbre na bamboka mosusu mpe tigre na bipai mosusu.
Oyo ebendaka likebi lisusu koleka mpo na nzeté, ezali bongo balángi ndenge na ndenge ya nzeté. Banzeté nyonso ezalaka motane te. Nzeté babéngi ébène, oyo motema na yango ezalaka moindo, eutaka na Inde mpe na Sri Lanka, camwood, oyo ezalaka moindo makasi, eutaka na nɔ́rdi ya Afrika, mpe oyo ezalaka na lángi ya motane kino na ngóla, lokola mahogany eutaka na Amérique centrale mpe na Amérique du Sud. Oyo ezalaka motane ngwaa, eutaka na Brésil, na oyo ya lángi motane ya ndimo mpe motane pɛ́ɛ. Banzeté mosusu ezalaka lángi mai ya pɔndu mpe mosusu ezalaka roze. Alaska ebimisaka banzeté ya lángi mosaka, manzani, sycomore ya Mpótó ezalaka mpe na lángi manzani. Na nsuka, ezali na banzeté ya lángi mpɛmbɛ, mpɛmbɛ mpenza lokola nde ezangi lángi.
Bato mingi mpe basepelaka na nsolo ya nzeté. Kati na banzeté ya nsolo kitoko ezali na nzeté oyo babéngi genévrier, oyo basali-mabaya ya Salomo bazipaki na pavemá ya tempelo. (1 Mikonzi 6:15) Mbala mosusu nsolo na yango ezalaki komata na mpema mpe kosangana na nsolo ya mpaka malasi. (2 Ntango 2:4) Genévrier eyebani mingi bobele mpo na nsolo kitoko na yango te, kasi mpe mpo na bokasi mpe boumeli na yango.
Makambo ya kolobela mazali mingi mpo na nzeté. Makambo na yango ya malamu mazali mingi na boye ete tokoki komituna soki tokoki kozwa mbeba moko mpo na yango.
Likabo ya solosolo
Ya solo, banzeté nyonso te nde eumelaka to epolaka te soki nyamankɛ́kɛ ikɔteli yango, to mpe eumela bikeke mingi. Mokakatano monene mpo na baoyo batongaka ndako na nzeté ezali bongo mɔ́tɔ. Nzokande, soki ezwi mɔ́tɔ makasi, nzeté oyo ezali makasi epelaka malɛmbɛmalɛmbɛ, eumelaka mingi mpe ebukanaka noki te lokola ebende. Kasi, lelo oyo bandako oyo etongami na mibonga mpe makonzí ya nzeté ezali mingi te. Na bongo, wana ndako etongami na nzeté ezali kozika, esengeli kobima nokinoki.
Nzeté ezali te etongeli ya mabe. Na esika ete ezala ndenge wana, soki eponami malamu mpe esalelami na lolenge ya malamu ekoki komonisa ndako ya malamu mpe koumela bankáma ya bambula. Bato mosusu oyo bayekolaka banzeté balobaka ete nzeté ekopola soko moke te soki bazali kotalela yango malamu. Ezala solo to lokuta, nzeté ezali mpenza moko na bitongeli malamu oyo Mozalisi asila bongo kopesa biso.
[Elilingi na lokasa 17]
Dɔ́me lokola matungulu ya mbuma oyo ezali komonana na ndakonzambe moko etongami na nzeté na láki Onega
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Tass/Sovfoto
[Bililingi na lokasa 18]
Tempelo ya Horyuji etongami na nzeté na Japon