Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Mpo na nini basusu bazali kobala, bongo ngai te?
“Nalingi kobala. Na yango nakozala na esengo.”—Caroline.a
EZALI mabe te mpo na kolinga kobala. Nzambe atyaki kati na mwasi mpe mobali mayoki ya kosepelana moko na mosusu. Mpe atyaki libala lokola ekanganeli ya seko kati na mwasi mpe mobali.—Genese 1:27, 28; 2:21-24.
Nzokande, okoki kolɛmba to mpe kozala na mayoki ya kobwakama soki obali naino te—mingimingi soki mingi kati na baninga na yo basili komikɔtisa na makambo matali libala. Baninga mosusu mpe bakoki kobakisa bopusi mpo na yango. Tina alobaki ete: “Nazali na mibu 24 mpe nabandami naino na moto moko te. Emonani ete moto nyonso azali komituna mpo na nini nabali naino te mpe yango ekómi kotungisa ngai mingi. Nakómi komimona lokola moseka mobangé to mpe likambo moko lizali malamu te kati na ngai.”
Mpo na bato mosusu, bonzemba ekoki kobanda komonana lokola efelo, efelo molai oyo ezali kokabola bango na esengo. Mbula moko na moko oyo ezali koleka, ekoki komonana lokola molɔngɔ́ mosusu ya bilíki mozali kobakisama likoló ya efelo yango. Elenge mwasi to elenge mobali akoki kokanisa ete azali kitoko te to basepelaka na ye te. Rosanna, elenge mwasi moko mofandi na Italie alobaki ete: “Mbala mingi namiyokaka ete nazali ngai moko mpe ete nazali na ntina te, nazali na likanisi ete nazali na nkɔnzɔ moko te mpo na kobala.” Elenge mobali mpe akoki kozala na mayoki motindo wana. Na ndakisa, Frank abandaki kokanisa ete baninga na ye nyonso bakómaki malamu mpe na biloko mingi na nsima ya kobala na bango. Abandaki komituna soki mpe libala ekozala na bopusi motindo wana mpo na ye.
Yo mpe ozalaka na makanisi motindo wana? Soki ozali monzemba, mbala mosusu omitunaka soki likambo moko ya mabe lizali kati na yo to okozala monzemba libela na libela?
Libala—Ndɔ́tɔ mpe bosolo
Libosoliboso, tiká totalela likanisi oyo lipalangani ete libala epesaka mpenza nzela na kozala na bomoi ya esengo. Ezali solo ete libala ekoki mpe mbala mingi kopesa esengo. Nzokande, bobele kobala mpamba, epesaka moto esengo te. Ata mpe mabala oyo maleki mpenza kitoko ememaka “mitungisi na bomoi.” (1 Bakolinti 7:28, NW) Esengo kati na libala eyaka bobele na nzela ya ezaleli ya komipesa mpe milende makasi. Likambo ya kosepelisa, moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, Yesu Klisto, azalaki monzemba. Moto moko akoki koloba ete azalaki na esengo te? Soko moko te! Esengo na ye ezalaki kouta na kosaláká mokano ya Yehova.—Yoane 4:34.
Elobamaka lisusu ete libala esilisaka ezaleli ya komimona ete ozali yo moko. Ezali bongo te! Mobalani moklisto moko amilelaki ete: “Mwasi na ngai afungolelaka ngai motema na ye te, asololaka mpe ngai te masolo ya ntina mpenza, mokolo moko te!” Baklisto basi mosusu bamilelaki mpe lolenge yango ete mibali na bango basololaka na bango te to ete bamipesaka mingi na misala to na baninga koleka bango. Ezali mawa mpo na koloba yango, kozala kati na libala mpe komiyoka ete ozali yo moko ezali likambo oyo lizali kotambola nzela moko.
Lisusu, ezali na baoyo bamonaka ete libala ezali mwango ya kokima mitungisi ya libota. Elenge mwasi moko mobalani alobaki ete: “Nakanisi ete baboti na ngai basengelaki kopesa ngai libaku ya kokóla. Kasi bapesaki ngai nzela te ete nazala na makango to nabimaka elongo na baninga . . . Soki bapesaki ngai libaku wana, mbele nabalaki na mibu 16 te. Kasi nalingaki komonisa bango ete nakómi mokóló.”
Okoki kozala na makanisi ete kozala na ndako ya baboti eleki nkaka mingi. Nzokande, libala ememaka mikumba oyo mikoki mpenza kokutola bonsomi na yo. Kanisá na oyo etali kozwa mosala, kofuta bafaktire, kobongisa biloko oyo bibebi na ndako, kobongisa motuka, kolamba, kobongisa ndako, kosukola bilamba mpe mbala mosusu kobokola bana! (Masese 31:10-31; Baefese 6:4; 1 Timoté 5:8) Bilenge mingi bamonaka mpasi ntango bakutanaka na mikumba wana ya bokóló.
Basusu mpe bakanisaka ete libala ezali mwango ya koyebana mingi. Kasi endimiseli ezali te ete basusu bakosala boninga elongo na yo—to boninga elongo na mobalani na yo—bobele mpo ete obali. Bato bakolinga yo soki ozali na boboto, okabaka mpe ozalaka na ezaleli ya moimi te, ezala obala to obala te. (Masese 11:25) Ata soki kobala epesaka nzela mwa moke mpo na kozala na boyokani na baninga babalani, mwasi mpe mobali basengeli komikundwela ete bazali “mosuni moko.” (Genese 2:24) Lobanzo na bango ya ntina esengeli ya koyeba lolenge nini kozala na boyokani moko epai na mosusu—kasi mpo na baninga na bango te.
Omibongisi mpenza mpo na libala?
Ya solo, ata soki ososoli makanisi oyo, okoki mbala mosusu kolɛmba. Lisese moko ya kala lilobi ete: “Elikya oyo ezilisami epesi motema mpasi.” (Masese 13:12) Na ndakisa, elenge Tony amonaki ete elikya ezali lisusu te pamba te azalaki monzemba. Na bongo, abandaki kokanisa ete akobala mwasi nyonso oyo akomonana. Ezalaki mpe bongo mpo na elenge mwasi Sandra, alɛmbaki na makanisi mbala nyonso oyo azalaki koyoka nsango ya libala ya moninga na ye moko; na yango azalaki komituna soki ngala na ye ekoya mokolo nini.
Liboso ya kolɛmba nzoto, omituna naino, ‘Namibongisi mpenza mpo na libala?’ Mpo na koloba solo, soki ozali naino elenge, eyano ezali ete te! Kati na États-unis, mabala mingi ya bilenge maumelaka bobele mbula mitano.b Ezali solo ete bilenge mosusu bakoki kokɔmɛla mpo na mbula na bango mpe bazali na makoki ya kolónga na mabala na bango. Kasi yango elingi koloba te ete yo osengeli kobala. Osili komitalela na bosembo nyonso soki omibongisi mpo na kokokisa mikumba ya libala?
Komitalela na bosembo nyonso ekoki komonisa yo makambo na polele. Na ndakisa, okɔmɛli mpenza mpe ozali na makoki ya kokokisa mikumba? Obatelaka mosolo malamu, to osilisaka yango nokinoki wana ozwi yango? Ofutaka bafaktire na yo na ntango ebongi? Ozali na likoki ya kozwa mosala to kozala na ndako? Oyokanaka malamu na basusu, na ndakisa, baninga ya mosala mpe baboti na yo, to ozalaka na bango na matata oyo esilaka te? Soki ezali bongo, okoki komona ete koyokana mpe na mobalani na yo ekozala mpasi koleka.
Soki ozali naino elenge, okoki komona ete osengeli naino na mwa bambula mosusu ya eksperiansi mpo na kokɔmɛla mpe kokóma na makoki oyo masengeli mpo na kozala mobali malamu to mwasi malamu. Koyeba makambo oyo ekoki kosunga yo ete obongola makanisi na yo mpe otalela libala lokola likoki ya mikolo ya nsima. Yango ekoki kosunga yo na ‘koyeba solo na motema na yo’ mpo na kozala monzemba ata mpo na mikolo oyo.—1 Bakolinti 7:37.
Komilengela malamu
Ezali boni soki omimoni ete osili koleka “ntango ya bolenge” mpe omibongisi mpo na kobala? Ekoki kolɛmbisa soki bato ya kobala bazali mingi te to soki bandimaka yo te mbala nyonso oyo yo omonisaka bosepeli na moto moko. Kasi yango elingi mpenza koloba ete ozali na ntina te? Te, ezali bongo te. Mokonzi Salomo alóngaki te kozwa elenge mwasi oyo alingaki mingi koleka—nzokande azalaki moko na bato na bozwi mpe ya mayele koleka! Mokakatano ezalaki nini? Mokakatano ezalaki ete mayoki ya elenge mwasi yango masepelaki te na Salomo. (Loyembo ya Salomo 2:7) Bobele bongo, ekoki kozala ete okutáná naino te na moto moko oyo bokoki kosala na ye ekanganeli malamu.
Okanisaka ete ozali mpenza kitoko koleka mpo na kosepelisa moto nyonso? Ya solo, kitoko ezali na matomba na yango, kasi eleki makambo nyonso te. Soki okanisi babalani oyo yo oyebi, ezali solo ete ezali na bato ya lolenge nyonso, ya mitɛ́lɛ́ nyonso, ya nzoto lolenge nyonso mpe ya kitoko mitindo nyonso, boye te? Lisusu, moto oyo azali mpenza na bobangi Nzambe akotalela libosoliboso bomoto na yo ya kati “kitoko oyo ebombami na motema.”—1 Petelo 3:4.
Nzokande, osengeli kobosana soko moke te kobongisa nzoto na yo, ezali malamu komonana mpe kitoko na miso ya bato. Elateli ya mobulumobulu mpe nsuki bosɔtɔ ekoki kopesa na basusu makanisi mabe.c Lisusu, kozanga kosolola na basusu to mbeba moko boye ekoki kosala ete basusu baboya yo liboso ete báyeba yo malamumalamu. Moninga moko ya motema to moboti na yo akoki koyebisa yo soki osengeli kosala mwa mbongwana kati na likambo yango. Bosolo ekoki kozala mpasi, kasi soki ondimi kosalela makanisi oyo ekoki kosunga yo ete osala mbongwana mpe osepelisa basusu koleka.—Masese 27:6.
Nzokande, na botaleli ya nsuka, motuya na yo lokola moto abongi etaleli te ete ozala mobalani to monzemba. Oyo esengeli ezali nde lolenge oyo Nzambe atalelaka yo, mpe ‘amonaka oyo ezali kati na motema na yo.’ (1 Samwele 16:7) Na yango, lobanzo na yo esengeli nde kozala ete ondimama na Nzambe kasi mpo na kobala te. Kosala te ete makambo ya libala eleka makanisi na yo mpe masoló na yo. Poná baninga na yo na likebi nyonso, kebá mpe na miziki ozali koyoka mpe kominanola na yo.
Ya solo, mbala mosusu mposa ya kobala ekoki kolongwa te, kasi komitungisa te mpo na yango. Zalá motema mpiɔ. (Mosakoli 7:8) Na esika ete omona bonzemba lokola kolakelama mabe, zwá matomba ya bonsomi oyo yango ezali kopesa na yo mpe mabaku oyo yango ezali kotyela yo ya kosalela Nzambe kozanga mobulungano. (1 Bakolinti 7:33-35, 38) Libala likoki kokómela yo na ntango ebongi—mbala mosusu mosika te koleka ntango okanisaki mpo na yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ebongwamaki.
b Talá lisoló “Mituna bilenge batunaka . . . Tobalani bilenge—Tokoki kolónga?” kati na nimero ya 22 Apríli 1995, ebimeli ya Lifalansé.
c Mpo na kozwa makanisi ya sikisiki mpo na yango, talá mokapo 10 mpe mokapo 11 ya búku Mituna bilenge batunaka—Biyano bibongi, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 26]
Epesaka makanisi ya kobwakama wana moninga moko abali