Makambo mazali koleka na mokili
Mosolo ya makila
Na 1994, ba Allemands batungisamaki mingi ntango bayokaki ete bato 2 500 bazwaki mikrobe ya V.I.H. na nzela ya kozongisama makila mpe bankisi oyo eutaka na makila. (Talá Lamuká! ya 22 Apríli 1994, lokasa 28, ebimeli ya Lifalansé) Zulunalo Süddeutsche Zeitung emonisi ete na ntango balobelaki likambo yango na Leta na Yanuáli 1995, ministre ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ asɛngaki na bato oyo bazwaki mikrobe “bolimbisi na nkombo ya guvernemá” mpo na mabunga oyo ekólisi mpasi na bango. Na ntango batalelaki likambo yango emonisamaki ete bakompanyi oyo etekisaka bankisi mpe minganga bazalaki basali ya likambo yango, mpe Croix-Rouge ya Allemagne ebebisaki lokumu na yango na kolukáká kokóma “mosali ya bankisi oyo euti na makila.” Mwasi moko oyo azwaki mikrobe ya V.I.H. na mobali na ye oyo akufaki, amilelaki ete: “Hémophiles soko 700 bakokaki kozala naino na bomoi soki [kompanyi ya bankisi] ekanisaki na mozindo koleka likambo ya kozwa bobele mosolo.”
Bozangi basángó
Kalakala Espagne eyebanaki lokola mboka oyo ezalaki kotinda bamisionere bakatolike bipai mosusu. Lelo oyo, ezali kosala mokakatano ya kobimisa basángó mpo na mposa ya bafandi na mboka. Zulunalo ya Madrid El País emonisi ete motuya ya basángó kati na Espagne mozali kokita na 150 mbula na mbula. Bakonzi ya mangomba bazali kobanga ete bailikindo 2 000 oyo bazali sikawa kati na likindo bakokoka te mpo na kokokisa bosɛnga ya basángó. Mobu moleki, bobele basángó 216 bakulisamaki bonganga—kokita na basángó 73 soki tokokanisi yango na mobu 1993—mpe 70 % ya bakonzi ya mangomba ya Espagne bazali na mibu koleka 50. Na bokeseni, kala mingi te Batatoli ya Yehova na Espagne bamoni milɔ́ngɔ́ ya babongisi-nzela na mobu wana mikóli na bato 300 mbula na mbula. Babongisi-nzela ezali bongo basali ya bolingo malamu mpe kozanga lifuti oyo balekisaka bangonga 90 to koleka sanza na sanza mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.
Makámá mosusu ya kozongisama makila
Engebene zulunalo The Canberra Times ya Australie, Croix-Rouge ekebisaki minganga ete makila oyo mazwi mikrobe makoki kopesa oyo babéngaka infection bactérienne oyo ekoki kopesa liwa mpe kino sikawa ekzamɛ́ moko te ekoki komonisa yango na bosikisiki. Kotángáká lapólo oyo euti na zulunalo The Medical Journal of Australia, zulunalo Times elobi ete bato minei kati na etúká Nouvelle-Galles du Sud bakufaki na infection yango kati na 1980 mpe 1989. Na nsima lisoló yango elandi ete: “Mokakatano mozali ete bactérie Yersinia enterocolitica, ekoki koyikana noki kati na mabenga ya makila nyonso ata soki molungé ya makila ekómi pene na kokóma ngalási. Bato oyo bazalaki na mpasi ya estomá mwa bapɔ́sɔ liboso ete bápesa makila na bango, bapesaka mbala mosusu mikrobe, oyo ekoki na nsima koyikana na motuya monene wana makila matyami na basasɛ́ mpe mazali kozila kotyama na nzoto ya moto. Bato oyo bazongisami makila yango bakoki kozwa nokinoki mokakatano oyo babéngaka choc toxique mpe kokufa.”
Bana ya monene ya mabe na Canada
Zulunalo The Globe and Mail emonisi ete: “Minganga oyo bayekolaka makambo matali bilei, minganga oyo basalisaka bana mike mpe balukiluki mingi balobi ete baboti oyo balɛmbaka mingi bazali koleisa bana na bango bilei oyo bikámolami mingi mpe bileki mafuta mingi.” Mbala mingi, soki baboti nyonso mibale bakendaka mosala, bomoi ya zolɔlɔ ekamataka ntango mingi, kutu ntango nyonso mpe na yango ezalaka mpasi mpo ete libota mobimba balya elongo. Matomba na yango nini? Zulunalo elobi ete engebene makanisi ya bato na siansi, “soko 20 % ya bana na Canada bazali na monene ya mabe oyo euti na bilei ya mafuta mingi mpe kozanga ngalasisi.” Monganga Stan Kubow, molakisi-mosungi oyo ayekolaka makambo matali bilei na Eteyelo monene McGill, na Montréal, alobi ete bokatikati ezali na ntina mingi. Alobaki ete “baboti basengeli kosɛnzɛla ete bana na bango balia biloko oyo bizali na míliki mingi, na proteine, bálya mbuma, ndunda mpe fibres.” Molukiluki moko atunaki na mawa ete: “Soki otye likebi na kolɔngɔ́nɔ́ na nzoto na yo te, okotya likebi lisusu na nini?”
Likebisi mpo na amiante
Zulunalo New Scientist emonisi ete bankóto ya batongi-ndako na Grande-Bretagne bakokufa na kanser euti na amiante mpo na mabunga oyo bakonzi basalaki na likambo litali libateli. Esili koleka bambula mingi, na mobu 1960, ntango bato ya siansi balobaki ete fibres ya amiante ezali mabe mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, guvernemá ya Grande-Bretagne epesaki mitindá kati na bakompanyi ete bakutola kotya fibres yango na mpema. Nzokande, balukiluki sikawa bamoni ete basáli mosusu oyo bazali na likámá monene ezali bongo: basali-mabaya, babongisi lontiliki, babongisi-pɔ́mpi mpe basali na bagázi, oyo basalaka kozanga mwango ya libateli na biloko oyo bizali na amiante. Lokola kanser ya mipúlúlú emiyokisaka nsima ya mbula 30, libunga yango liutaki koyebana kala mingi te. Mpo na sikawa mwango ya botongi to biloko nini oyo bizali na amiante bizali na likámá mingi biyebani naino te. Na yango, Conseil britannique de la Santé et de la Sécurité ezali kolendisa batongi-ndako ete bákeba makasi soki bakutani na eloko moko oyo ezali na amiante, bayebisa mokakatano na bango na bakambi ya mosala oyo basengeli kotalela malamumalamu bitongeli mpe kopesa myango ya libateli oyo mibongi.
Nani azali molóngi?
Zulunalo Veja emonisi ete “Kompanyi ya masano ya mbongo ekweyaka te.” Zulunalo yango elobi ete bafandi na mboka Brésil balekisaka soko miliare 4 ya badolare mbula na mbula na loteri mpe na masano mosusu ya mbongo ya lolenge wana. Yango ezali mosolo oyo kompanyi monene ya mituka ekɔtisaka na mbula mobimba! Likambo oyo libendaka bato na bingo ezali bongo komisepelisa elongo na basusu. Zulunalo elobi ete: “Na bingo likoki ya kosolola na bapaya ezali, to kosala boyebani na bato mosusu, kolya, komela mpe kosakana na komekáká nzoto mpo na kolónga.” Kasi nani azali molóngi? Oswald de Souza, moto na ntɔ́ki na matematiki alobi ete: “Kati na bakompanyi nyonso ya masano ya mbongo, moko te ekɔtisaka mbano lokola bingo. Molóngi [na bingo] azwaka bobele 45 % ya mosolo nyonso oyo basani babeti.”
Mikakatano mizangi myango
Atako guvernemá ya Inde epesaka mosolo mingi na ebongiseli ya bilei kati na mokili, ezali naino na bato milió 250 kati na mboka yango oyo bazali komona mpasi na nzala na lolenge moko to mosusu. Lapólo ya Fonds des Nations unies pour l’enfance emonisi ete atako mpo na milende oyo mizali kosalema, 43,8 % ya bana na Inde bazangi baproteine kati na nzoto. Lisusu, milió 6,6 ya bana bazali kokóla malamu te to bazali na mwa mbeba mosusu ya mayele, milió 2,2 bazali na bokɔnɔ babéngi crétinisme, mpe mbula na mbula 60 000 bakómaka na lolanda mpo na bozangi ya vitamíni. Kati na bana oyo bazali pene mpo na kokɔta kelasi, 56 % bazali na bozangi ya fer, mpe kati na bato milió 40 oyo bazali na limeú, bana mpe bazali.
Kosomba bilei bizwami kati na manzanza
Zulunalo Winnipeg Free Press ekebisi ete: “Mpo na kobatela mosolo, bato mosusu basombaka bilei oyo bizwami kati na manzanza oyo bisengeli mpenza kobwakama pamba te bizali na likámá.” Peter Parys, ya Services sanitaires na engumba Winnipeg alobi ete: “Manzanza mingi oyo mazali na mantútú mandimami, kasi mosusu mandimami te. Ntango batyaka bilei yango kati na manzanza, mazalaka malamu, kasi mayaka kobeba nde na nsima.” Engebene Services sanitaires, manzanza oyo masengeli kobwakama mango maye: oyo mindɔlu na yango, bikuke na yango to mobimba na yango egugi, oyo malelaka pɔkupɔku soki baningisi yango, bakisa mpe oyo mavimbi, oyo mazali kotángisa súpu mpe oyo dati na yango ya kobeba ezali te to esili koleka. Zulunalo yango epesi likebisi oyo ete: “Soki linzanza lifungwami, mikrobe babéngi salmonelles mpe staphylocoques ekɔtaka mingi mpe ekoki kopesa pulúpulú, kosanza mpe mpasi ya mingai.”
Kokita ya motuya ya kobotama
Babalani mingi na Europe de l’Est bazali kolekisa ntáká molai mpo na kobotama ya mwana mosusu na ntina na mikakatano ya nkita mpe bozangi ya mosala. Zulunalo The New York Times emonisi ete “mokakatano yango ya nkita mobimisi te bobele kokita ya babotami kasi mokitisa mpe motuya ya mabala mpe mokólisi mbala zomi motuya ya komikómisa ekomba.” Zulunalo Times ebakisi ete engebene bato oyo batalelaka motuya ya babotami “kokita motindo oyo emonana naino te longola bobele ntango ya bitumba, makámá mauti na biloko bizalisami to na nzala.” Mpo na kokweisa bopusi motindo wana, guvernemá ya Belgique, Luxembourg, Hongrie, Pologne mpe Portugal epesaki mosolo lokola mbano na mwa bantango mosusu na mabota oyo mabimisaki mobotami ya sika, yango mpo na kolendisa bato ete bábota bana. Kala mingi te, guvernemá ya etúká ya Brandenburg na Allemagne ebandaki kopesa badolare 650 na mobotami nyonso ya sika.
Matomba mabe ya bitumba
Matomba mabe ya bitumba na ex-Yougoslavie esuki te bobele na bakufi to na bilɛ́mɛ oyo bazwaki masasi to babombe. Zulunalo The Medical Post emonisi ete bolukiluki moko euti kosalema kala mingi te emonisi ete “bankáma ya batone ya bosɔtɔ oyo euti na kobetama ya mandoki, kobwakama ya babombe mpe kopanzana ya produits chimiques ekobimisa matomba mabe koleka mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto.” Produits chimiques mpe bibende ya ngenge wana ezali kobebisa bibale mpe ekoki kutu kobebisa mai oyo mazwami na nsé ya mabelé. Engebene zulunalo Post, bato na siansi bazali kokebisa ete “ekozala na bokóli monene ya motuya ya bana oyo bakozala na mbeba ya kobotama pamba te baboti na bango bamelaki mai oyo mabebisamaki na bosɔtɔ wana.”