Toli ya malamu mpo na baoyo balingi kotikala minzemba to kobala
“Nazali koloba boye . . . mpo na komema bino na oyo ebongi mpe na oyo elakisi kosalela Nkolo mosala ntango nyonso kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.”—1 KO. 7:35.
1, 2. Mpo na nini tosengeli koluka toli ya Biblia na oyo etali kozala monzemba to kobala?
BOYOKANI oyo ezali kati na bato oyo babalani ekoki kopesa esengo, to mawa, to mpe kotungisa mingi. Mpo na yango, tosengeli koluka lisalisi ya Nzambe; kasi ezali mpe na bantina mosusu oyo tosengeli koluka litambwisi ya Nzambe. Na ndakisa, mokristo oyo azali kosepela ndenge azali monzemba akoki komona ete libota to baninga na ye bazali kotya ye mbamba mpo abala. Moto mosusu akoki kozala na mposa ya kobala kasi azwi naino te moto oyo abongi na ye. Bato mosusu oyo balingi kobala bazalaka na mposa ya batoli oyo ekosalisa bango bákokisa malamu mokumba ya mobali to mwasi ya libala. Lisusu, ezala minzemba to bato oyo babalá, bango nyonso bakoki komekama mpo na kosala pite to ekobo.
2 Makambo wana ekoki kobakisa to kosilisa biso esengo, kasi ekoki mpe kobongola boninga na biso ya Yehova Nzambe. Na mokapo 7 ya mokanda na ye ya liboso epai ya Bakorinti, Paulo apesaki toli oyo etali kozala monzemba to kobala. Asalaki bongo mpo na kotinda bato oyo bakotánga mokanda yango “na oyo ebongi mpe na oyo elakisi kosalela Nkolo mosala ntango nyonso kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.” (1 Ko. 7:35) Wana tozali kotalela batoli oyo Paulo apesaki na makambo wana ya ntina mingi, talá ndenge ekoki kosalisa yo osalela Yehova mingi koleka, ezala obalá to ozali monzemba.
Ekateli monene oyo moto ye moko asengeli kozwa
3, 4. (a) Nini ekoki kosalema soki baninga to bandeko bazali kotinda moto abala? (b) Ndenge nini toli ya Paulo ekoki kosalisa moto azala na makanisi ya malamu na oyo etali libala?
3 Ndenge moko na Bayuda ya ekeke ya liboso, lelo oyo mpe bato mingi bamonaka ete kobala ezali malamu koleka. Soki elenge mobali to elenge mwasi akómi mwa mokóló kasi abali naino te, baninga mpe bandeko oyo balingaka ye bakoki komona ete basengeli kopesa ye mwa toli. Na masolo na bango, bakoki koyebisa ye asala mwa makasi lisusu mpo azwa moto. Bakoki kobenda likebi na ye epai ya moto moko boye. Bakoki kutu kosalela mayele mpo na kokutanisa minzemba mibale. Kosala bongo ekoki koyokisa moto nsɔni, kokabola baninga, mpe kopesa mpasi na motema.
4 Paulo amekaki ata moke te kotinda moto abala to atikala monzemba. (1 Ko. 7:7) Ye moko andimaki kosalela Yehova kozanga mwasi, kasi alobaki mabe te mpo na baoyo bamonaki malamu ete bábala. Lelo oyo mpe, mokristo mokomoko akoki kopona kobala to kotikala monzemba. Bandeko mosusu basengeli te kotinda bakristo yango ete bábala to bátikala minzemba.
Ndenge ya kozala monzemba ya esengo
5, 6. Mpo na nini Paulo alendisaki bakristo ete bátikala minzemba?
5 Na mokanda oyo Paulo akomelaki Bakorinti, amonisaki ete kozala monzemba ezali malamu. (Tángá 1 Bakorinti 7:8.) Atako Paulo abalaki te, amonaki te ete aleki bato oyo babalá, ndenge bakonzi ya mangomba ya bokristo oyo babalaka te bamonaka. Paulo amonisaki nde ete moto oyo azali monzemba akoki kosala makambo ndenge na ndenge na mosala ya Nzambe. Na ndenge nini?
6 Mokristo oyo azali monzemba akoki kondima mikumba oyo mbala mosusu moto oyo abalá akokoka kondima te. Paulo azwaki lokumu monene ya kozala “ntoma ya bikólo.” (Rom. 11:13) Soki otángi Misala mokapo 13 tii 20, okomona ndenge ye ná bamisionɛrɛ mosusu basakolaki na bisika oyo nsango malamu ekɔtaki naino te mpe bafungolaki masangá na bisika ndenge na ndenge. Na mosala na ye, Paulo amonaki bampasi oyo ekokómela bato mingi te kati na biso lelo oyo. (2 Ko. 11:23-27, 32, 33) Kasi, esengo oyo azwaki na mosala ya kokómisa bato bayekoli esalaki ete abosana bampasi yango. (1 Tes. 1:2-7, 9; 2:19) Akokaki kosala nyonso wana soki abalaki to azalaki na bana? Mbala mosusu te.
7. Lokola bazalaki minzemba, ndenge nini Batatoli mibale bamipesaki mpo na kosakola Bokonzi?
7 Bakristo mingi oyo babali naino te balukaka kosala mingi na mosala ya Bokonzi. Tózwa ndakisa ya Sara ná Limbania. Bandeko basi yango mibale oyo babalá te bazali babongisi-nzela na ekólo Bolivie. Bakendaki na mboka moko oyo, esalaki mbula mingi, Batatoli bazalaki kokóma lisusu kuna te mpo na kosakola. Atako kura ezalaki te, ezalaki mokakatano te. Bandeko yango balobaki boye: “Lokola radio to televizyo ezalaka kuna te, bato balekisaka ntango kaka na kotánga mikanda.” Bato mosusu ya mboka yango balakisaki bandeko basi yango mikanda oyo Batatoli ya Yehova bapesaki bango kala, mpe bazalaki kaka kotánga yango atako mikanda yango etiká kobimisama kala mpenza. Lokola bato mingi bazalaki kosepela, ezalaki mpasi mpo bandeko basi básolola na moto nyonso na teritware yango. Mobange moko ya mwasi alobaki na bango boye: “Emonani ete nsuka ekómi mpenza pene mpo Batatoli ya Yehova bakómi tii epai na biso.” Eumelaki te, bato mosusu ya mboka yango bakómaki koyangana na makita ya lisangá.
8, 9. (a) Mpo na nini Paulo alobaki ete kozala monzemba ezali malamu? (b) Kosalela Yehova ntango ozali monzemba ezali na matomba nini?
8 Ya solo, bakristo oyo babalá mpe basalaka mosala ya malamu na bateritware ya mpasi. Kasi, mikumba mosusu oyo babongisi-nzela oyo bazali minzemba bakoki kosala, bandeko oyo babalá to bazali na bana bakokoka kosala yango te. Ntango Paulo akomelaki masangá mikanda, ayebaki ete mosala ya kosakola nsango malamu ezalaki naino mingi. Alingaki ete moto nyonso ayoka esengo ya kokómisa bato bayekoli ndenge ye moko ayokaki. Mpo na yango nde alobaki ete kozala monzemba na mosala ya Yehova ezali malamu.
9 Na États-Unis, ndeko mwasi moko oyo azali monzemba akomaki boye: “Bato mosusu bakanisaka ete soki obali te, okozala na esengo te. Kasi ngai namonaka ete esengo ya solosolo eutaka nde na boninga oyo moto azali na yango na Yehova. Atako kozala monzemba elimboli komipimela makambo mosusu, ekoki mpe kozala likabo moko monene soki osaleli yango malamu.” Amonisaki ete kozala monzemba epekisaka moto azala na esengo te. Ekoki nde kosala ete moto azala na esengo. Abakisaki boye: “Nayebi ete Yehova alingaka moto nyonso, ezala abalá to azali monzemba.” Lelo oyo, ndeko mwasi yango azali kosala na esengo na mboka moko oyo bazali na mposa ya bato mingi mpo na kosakola nsango malamu. Soki ozali monzemba, mpo na nini te komipesa mingi na kosalisa bato báyeba solo? Soki osali bongo, yo mpe okomona ete kozala monzemba ezali likabo ya motuya monene oyo euti epai ya Yehova.
Minzemba oyo bazali kokana kobala
10, 11. Ndenge nini Yehova asalisaka baoyo bazali koluka kobala kasi bazwi naino moto oyo abongi te?
10 Nsima ya kosalela Nzambe na bosembo mwa ntango molai, minzemba mosusu bazwaka ekateli ya kobala. Lokola bayebi ete bazali na mposa ya toli, basɛngaka Yehova asalisa bango bázwa molongani ya malamu.—Tángá 1 Bakorinti 7:36.
11 Soki ozali na mposa ya kobala moto oyo asalelaka Yehova na motema mobimba lokola yo, kotika te kobondela Yehova mpo na likambo yango. (Flp. 4:6, 7) Ata soki omoni ete ezali koumela, kolɛmba nzoto te. Tyelá Yehova motema ete akosalisa yo. Azali Tata ya bolingo mpe akopesa yo makasi mpo oyika mpiko.—Ebr. 13:6.
12. Mpo na nini mokristo asengeli kokanisa malamu liboso ya kondima moto oyo atuni ye libala?
12 Okosala nini soki mokristo moko oyo azali na boninga makasi te na Nzambe to mpe moto oyo azali Motatoli te atuni yo libala? Mbala mosusu ozali na mposa makasi ya kobala. Kasi, kobosana te ete mpasi oyo okoyoka soki oponi molongani ya mabe ekoki koleka mosika mpasi oyo ozali koyoka ndenge ozali monzemba. Mpe nsima ya kobala, ozala na esengo na libala to te, okangami na molongani na yo libela. (1 Ko. 7:27) Na yango, kobala moto moko boye te kaka mpo ozali kozwa molongani te. Okoya kolela na nsima.—Tángá 1 Bakorinti 7:39.
Yebá makambo oyo ezali kozela yo na libala
13-15. Makambo nini oyo ekoki kobimisa mindɔndɔ na libala bafianse basengeli kolobela?
13 Atako Paulo amonisaki ete kozala monzemba mpo na kosalela Yehova ezali malamu, amonaki te ete ye aleki bato oyo baponi kobala. Kutu, toli oyo apesaki esalisaka bato báyeba makambo oyo ezali kozela bango na libala mpe ndenge ya kobatela libala na bango.
14 Mbala mosusu esɛngaka ete bato oyo balingi kobalana báyekola kotalela libala na ndenge oyo ebongi. Ntango bato bazali bafianse, bakoki kokanisa ete bolingo na bango ekeseni na oyo ya bato nyonso, mpe ete bakozala ntango nyonso na bisengo na libala na bango. Babandaka libala na makanisi ya ndenge wana mpe bamonaka ete eloko moko te ekoki kobebisa esengo na bango. Kasi, kokanisa bongo ezali komikosa. Ya solo, lolango oyo ezalaka na libala epesaka esengo, nzokande kaka yango te nde ekoki kosilisa matata mpe mikakatano oyo ebimaka na mabala nyonso.—Tángá 1 Bakorinti 7:28.a
15 Nsima ya kobalana, bato mosusu bakamwaka, mbala mosusu kutu balɛmbaka nzoto, na komona ete bazali koyokana te na molongani na bango na makambo mosusu ya ntina. Na ndakisa, bazali koyokana te mpo na ndenge ya kosalela mbongo, kominanola to masano, epai bakofanda, to mpe soki mbala boni bakokendeke kotala baboti na bango. Mpe moto na moto azali na makambo oyo ekoki kopesa moninga nkanda. Ntango bato bazali bafianse, bakoki kokanisa ete ezali na ntina te kolobela makambo ya ndenge wana; kasi na nsima, makambo yango ekoki kobimisa mikakatano minene na libala. Na yango, eleki malamu bafianse bálobela makambo yango liboso ya kobalana.
16. Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli koyokana na ndenge ya kosilisa mikakatano na bango?
16 Mpo mwasi ná mobali bázala na esengo na libala na bango, basengeli kosala na bomoko mpo na kosilisa mikakatano. Basengeli koyokana na ndenge ya kopesa bana disiplini mpe na ndenge ya kosalisa baboti oyo bakómi mibange. Mwasi ná mobali basengeli te kotika mikakatano oyo ebimi na libala na bango ekabola bango. Soki basaleli toli ya Biblia, bakosilisa mikakatano mingi, bakoyikela mosusu mpiko, mpe bakozala na esengo na libala.—1 Ko. 7:10, 11.
17. Mpo na nini mwasi ná mobali ‘bamitungisaka mpo na makambo ya mokili’?
17 Paulo alobelaki makambo mosusu ya libala na 1 Bakorinti 7:32-34. (Tángá.) Bato oyo babalá ‘bamitungisaka mpo na makambo ya mokili,’ na ndakisa, kolya, kolata, ndako mpe makambo mosusu ya ndenge wana. Mpo na nini bongo? Ntango ndeko mobali azali naino monzemba, akoki kopesa ntango mpe makasi na ye nyonso na mosala ya Nzambe. Kasi ntango abali, akoki komona ete asengeli kosalela ndambo ya ntango mpe ya makasi na ye mpo na kokipe mwasi na ye, mpo mwasi andima ye. Ezali mpe bongo mpo na mwasi. Yehova mpe ayebi ete esengeli kozala bongo. Ayebi ete mpo libala ezala malamu, ekoki kosɛnga ete mwasi ná mobali bákitisa ntango mpe makasi oyo bazalaki kosalela na mosala ya Nzambe ntango bazalaki minzemba.
18. Mwasi ná mobali basengeli kobongola makambo nini nsima ya kobalana?
18 Kasi esuki wana te. Lokola mwasi ná mobali basengeli kozwa ndambo ya ntango mpe ya makasi oyo bazalaki kosalela na mosala ya Nzambe mpo na kotyelana likebi mpe kobongisa libala na bango, basengeli mpe kosala bongo mpo na ntango mpe makasi oyo bazalaki kosalela na masano elongo na baninga ntango bazalaki minzemba. Mwasi akoyoka ndenge nini soki mobali na ye azali kolekisa ntango mingi na masano elongo na baninga na ye kaka ndenge azalaki kosala ntango azalaki monzemba? To mobali akoyoka ndenge nini soki mwasi na ye azali kaka komipesa mingi na masano oyo alingaka elongo na baninga na ye? Moto oyo molongani na ye asali bongo akoyoka ete azali kaka ye moko; akozala na esengo te mpe akomona ete molongani na ye alingi ye te. Mpo likambo ya ndenge wana esalema te, mwasi ná mobali basengeli kosala nyonso mpo libala na bango ezala malamu.—Ef. 5:31.
Yehova asɛngi tózala na bizaleli ya pɛto
19, 20. (a) Mpo na nini bato oyo babalá basengeli komibatela mpo básala ekobo te? (b) Likama nini ekoki koyela mwasi ná mobali oyo bakabwani ntango molai?
19 Basaleli ya Yehova basalaka nyonso mpo bázala na bizaleli ya pɛto. Na yango, bato mosusu babalaka mpo bákwea na pite te. Nzokande, ata soki moto abali, akoki kosala makambo ya mbindo. Na ntango ya kala, engumba oyo ebatelami makasi ekokaki kobatela moto kaka soki moto yango atikali na kati. Soki moto abimi libándá ya engumba, akokaki kokutana na miyibi mpe bato mabe mpe bakokaki koyiba ye to koboma ye. Ndenge moko mpe, bato oyo babalá bakokwea na ekobo te, kaka soki batosi mibeko oyo Yehova atyá na oyo etali kosangisa nzoto na kati ya libala.
20 Paulo alobelaki mibeko yango na 1 Bakorinti 7:2-5. Mwasi asengeli kosangisa nzoto kaka na mobali na ye. Mobali mpe asengeli kosangisa nzoto kaka na mwasi na ye. Mokomoko asengeli kopesa moninga “eloko oyo asengeli na yango,” elingi koloba lotomo ya kosangisa nzoto oyo moto oyo abalá azali na yango. Nzokande, bato mosusu oyo babalá bakabwanaka na balongani na bango ntango molai. Bamosusu bakendeke konje moto na moto epai. Bamosusu bakendeke mibembo ya mosala. Mpo na yango, bakokaka te kopesa molongani “eloko oyo asengeli na yango.” Kanisá ndenge ekosuka soki mpo na “kozanga komipekisa,” moto alandi makanisi ya mokili ya Satana mpe asali ekobo! Yehova apambolaka batata ya mabota oyo bakokisaka bamposa ya mabota na bango kozanga bábebisa mabala na bango.—Nz. 37:25.
Kotosa toli ya Biblia esalisaka
21. (a) Mpo na nini ezalaka mpasi kozwa ekateli ya kobala to ya kotikala monzemba? (b) Ndenge nini 1 Bakorinti mokapo 7 ekoki kosalisa biso?
21 Kozwa ekateli ya kobala to ya kotikala monzemba ezalaka mpasi mpenza. Ezala oponi kobala to kotikala monzemba, mikakatano ekozanga te mpo biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Na yango, ata basaleli ya Yehova bakutanaka na mikakatano, ezala bazali minzemba to babalá. Soki olandi toli oyo ezali na 1 Bakorinti mokapo 7, okoki kokima mikakatano mosusu. Na miso ya Yehova, ‘okosala malamu,’ ezala ozali monzemba to obalá. (Tángá 1 Bakorinti 7:37, 38.) Likambo ya ntina mingi oyo tosengeli koluka ezali nde kondimama na Nzambe. Soki Nzambe andimi yo, okokoba kokende liboso tii okozwa bomoi na mokili ya sika. Kuna, boyokani ya mwasi ná mobali ekozala na mikakatano te ndenge ezali lelo.
[Maloba na nse ya lokasa]
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini moto moko te asengeli kotinda monzemba ete abala?
• Ndenge nini okoki kosalela ntango na yo malamu na mosala ya Yehova soki ozali monzemba?
• Ndenge nini bafianse bakoki komibongisa mpo na mikakatano ya libala?
• Mpo na nini bato oyo babalá basengeli komibatela mpo básala ekobo te?
[Bililingi na lokasa 14]
Bakristo oyo bazali minzemba bazalaka na esengo soki bamipesi mingi na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 16]
Bato mosusu basengeli kobongola makambo nini nsima ya kobalana?