Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Kokɔta na bikipi ya masano ezali malamu mpo na ngai?
“Nalingaka masano. Namiyokaka mpenza malamu. Mpe nasepelaka kozala elongo na baninga na ngai.”—Sandy, elenge mwasi ya mibu 14.
“ESENGO!” “Nsai!” “Kolónga!” Wana ezali bamoko ya bantina oyo bilenge ya États-Unis mpe ya Canada bapesaki ntango batunaki bango mpo na nini bakɔtaka na bikipi ya masano. Ya solo, bilenge mingi bazalaka na mayoki motindo wana.
Na ndakisa, tótalela naino États-Unis. Engebene búku Your Child in Sports, ya Lawrence Galton, “mbula na mbula, milió 20 ya bana na États-Unis kobanda mibu motoba kino likoló babɛtaka, to bamekaka kobɛta na bikipi ya masano.” Nzokande, esili koleka mwa bambula, bikipi oyo bibongisami bizalaki bobele na bana mibali, kasi sikawa motuya monene ya bana basi bazali kobɛta baseball, basketball mpe kútu komekana kati na lisano ya motópi.
Mbala mosusu ozali mosani malamu mpe okanisi ete kokɔta na ekipi moko ekoki kozala malamu. To ekoki kozala ete ozali kozwa bilendiseli mingi—mbala mosusu kútu bopusi—oyo euti na baboti, balakisi to antrɛnɛ́rɛ ete okɔta na ekipi moko. Ezala ndenge nini, kokɔta na ekipi ya masano esɛngaka kopesela yango ntango mingi mpe nguya. Na yango, ezali likambo lilongobani mpe libongi ya koyeba bamoko ya matomba mpe mbeba na yango. Liboso, tiká tótalela mwa matomba mosusu.
Masano—Matomba na yango
Biblia elobi ete: “Kokembisa nzoto ekopesa litomba mwa moke.” (1 Timoté 4:8, NW) Mpe bilenge bakoki mpenza kozwa matomba na kosaláká ngalasisi. Na États-Unis, motángo monene ya bana bazali na maladi ya monene ya mabe, hypertension mpe cholestérol. Ngalasisi ya mbala na mbala ekoki kozala malamu mpenza mpo na kokitisa mikakatano wana. Engebene lisoló moko ya zulunalo American Health, bilenge oyo basalaka ngalasisi mbala na mbala “babongisaka kopema na bango mpe kotambola ya makila koleka bilenge oyo basalaka eloko moko te. Basáli na ngalasisi ya mbala na mbala mpe basanaka malamu koleka mpe babatelaka kiló ya nzoto oyo elongobani.” Balukiluki mpe balobaka ete ngalasisi ekoki kosilisa kotungisama na makanisi, kosilisa bolɛmbu mpe kutu kosalisa yo ete olala mpɔngi malamu.
Likambo ya kobenda likebi, búku Your Child in Sports elobi ete: “Ekómi komonana ete mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya bakóló euti na lolenge ya bomoi oyo bazalaki na yango na bolenge na bango.” Na bongo, minganga mingi bakanisi ete matomba ya ngalasisi ya mbala na mbala ekoki kokóma kino na bokóló. Mokomi Mary C. Hickey alobi ete: “Bolukiluki emonisi ete bana oyo basanaka masano bakoki kozala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu koleka ntango bakokóma mikóló.”
Mingi bakanisaka ete ezali na matomba mosusu ya sikisiki ya kozala kati na bikipi ya masano. Tata moko alobaki na ntina na mwana na ye oyo abɛtaka motópi ete: ‘Esalaka ete atambolatambola na balabála te. Ezali koteya ye disipilíni.’ Basusu bakanisaka ete kosana kati na ekipi eteyaka elenge lolenge ya kosalana elongo na basusu—ntɔ́ki oyo ekoki kozala na matomba ya ntango molai. Bikipe ya masano mpe eteyaka bilenge ete bálanda mibeko, bázala na disipilíni, bázala na makoki ya kotambwisa bokonzi mpe bázala ntango nyonso na esengo mpe boboto wana bazali kolónga to kolónga te. Monganga George Sheehan alobi ete: “Masano ezali laboratware monene mpo na bilenge. Epesaka bayekoli eksperianse ya makambo oyo mbala mingi bayokaka na batei na bango: mpiko, ntɔ́ki, komipesa.”—Current Health, Sɛtɛ́mbɛ 1985.
Lisusu, kozala kati na ekipi oyo ezali kolónga ekoki kozala ntina ya lolendo mpo na moto ye moko. Elenge Eddie alobaki ete: “Soki nazwi ndembo to nakɔtisi mokele, namiyokaka nzoto.”
Lokumu, bozwi, mpe koyebana mingi
Nzokande, engebene bilenge mosusu, kokɔta na bikipi ya masano ezali mpo na koluka kondimama mpe koyebana na baninga na bango. Gordon, elenge ya mibu 13, alobi ete: “Ntango nyonso oyo okosala likambo moko ya malamu, moto nyonso azali kopesa yo longonya.”
Búku Teenage Stress, ya Susan mpe Daniel Cohen, endimi ete: “Soko ezali na nzela moko ya sikisiki ya koyebana, mingimingi mpo na bilenge mibali, ezali bongo masano. . . . Esalemaka mpenza te ete elombe ya ekipi ya motópi to ya basketball azanga koyebana.” Bolukiluki moko emonisaki mpenza lolenge oyo bilombe ya masano bakumisamaka mingi. Batunaki bana ya kelasi mpo na koyeba soki balingaka ete bákanisaka bango lokola elombe ya masano, to moyekoli ya mayele, to mpe lokola moto oyo ayebani mingi koleka. Kati na bilenge, kozala “elombe ya masano” ezalaki likambo ya liboso oyo baponaki.
Likambo oyo ete mosani ya motópi to ya basketball azwaka lokumu koleka savá ezali mpenza kokamwisa te soki totaleli likebi makasi oyo bipanzeli-nsango etyaka likoló na bilombe ya masano. Bapiblisité mingi ebendaka likebi likoló na lifuti na bango mpe lolenge na bango ya bomoi ya lokumu. Ezali likambo ya kokamwa te ete bilenge ebele, mingimingi oyo bafandi kati na bisika ya mpasi na bingumba, bákoka kotalela masano ya eteyelo lokola fungola ya bozwi—mwango ya kopɛngola bobóla!
Likambo ya mawa, kokokisama ya bamposa wana esalemaka solo te na kotaleláká lolenge makambo malekaka. Lisoló moko kati na zulunalo Current Health ezalaki na motó na likambo oyo ete: “Lolenge nini basani mingi balóngaka na kokómisa lisano mosala na bango mpenza?” epesaki mwa mitángo ya kolɛmbisa. Elobaki ete: “Bana mibali koleka milió 1 [kati na États-Unis] babɛtaka lisano ya motópi na Eteyelo ya ntei; pene na bana 500 000 babɛtaka basketball mpe soko bana 400 000 babɛtaka baseball. Longwa na Eteyelo ya ntei kino Eteyelo monene, motángo ya basani mozali kokita makasi mpenza. Bobele soko basani 11 000 bango nyonso basanaka lisano ya motópi, basketball mpe baseball na Eteyelo monene.” Longwa na Eteyelo monene, motángo mozali kútu kokita mingi koleka. “Bobele soko 8 % [ya basani ya Eteyelo monene] baponamaka na bikipi minene mpe bobele soko 2 % basinyaka kɔntrá ya lisano lokola mosala mpenza.” Na nsima lisoló yango lipesaki bokundoli oyo: “Ata soki asinye kɔntrá, yango elingi koloba te ete mosani akozwa esika kati na ekipi.”
Na yango nyonso, “bobele mosani moko kati na basani nyonso ya Biteyelo ya ntei 12 000 nde akokómisa lisano mosala na ye mpenza.” Yango ekoki kozala malamu te koleka nkɔ́nzɔ ya kolónga na lisano ya loteri! Kasi ntango mosusu okoki komituna, mosani akoki te kopesamela mateya kozanga kofuta na Eteyelo monene mpo na milende na ye? Lisusu, nkɔ́nzɔ ezalaka malamu te. Engebene búku On the Mark ya Richard E. Lapchick mpe Robert Malekoff, “kati na bamilió ya basani na Eteyelo ya ntei . . . , bobele mosani 1 likoló ya basani 50 nde akozwa búrsɛ ya masano na Eteyelo ya ntei.” Motángo mosusu ya kolɛmbisa ezali oyo ete: “Kati na basani minene oyo bazwaka búrsɛ na masano oyo ezali na mbongo mingi lokola motópi mpe basketball, na nsé ya 30 % bakozwa mapɔlɔ́mi na Eteyelo ya monene nsima ya mbula minei.”
Mpo na basani mingi, likanisi ya kokóma mosani ya bozwi mpe ya lokumu ezali bobele ndɔ́tɔ mpamba—ndɔ́tɔ oyo ekokokisama te.
Baoyo balongwaka
Soki totaleli bilikya ya kokóma na kolɔngɔ́nɔ́ malamu, bizaleli ya bomoto, koyebana mingi; kokɔta na bikipi ya masano ekoki komonana lokola likambo ya malamu mpo na kosala. Kasi liboso ya komeka, tálela naino oyo elobelamaki kati na zulunalo Ladies’ Home Journal: “Bilenge mingi bazali kokomisa nkombo na bikipi ya masano lelo koleka mabota oyo masili koleka. Likambo ya mawa: Mingi kati na bango bazali kolongwa na masano yango.” Dr. Vern Seefeldt, moto na mayele na makambo matali masano atángami na kolobáká ete: “Ntango bakómaka na mibu zomi na mitano, bilenge ntuku nsambo na mitano kati na bilenge monkama oyo basilaki kosana lisano moko boye, batikaka yango.”
Tótalela Canada, epai kuna lisano ya likoló ya bangalasi lisepelisaka bato mingi. Kati na etuluku moko ya baálingá-lisano likoló ya bangalasi, na motángo ya basani na yango koleka 600 000, 53 % bazalaki na nsé ya mibu ya kobotama 12. Nzokande, bobele 11 % bazalaki na mibu koleka 15. Ntina nini? Bilenge mingi balongwaki ntango bakómaki na mibu wana. Mpo na nini mingi balongwaka?
Balukiluki balobi ete baoyo balongwaka bapesaka ntina moko ya kokamwisa mpo na kolongwa na bango: Masano masepelisaka lisusu te. Ya solo, kosana kati na ekipi ekoki kozala mokano moko ya konyokola nzoto mpe koboma ntango. Zulunalo Seventeen eyebisaki batángi na yango ete bobele kosala momekano mpo na ekipi ekoki kosɛnga kobongisama “ngonga misato na mokolo, mikolo mitano na pɔ́sɔ . . . na boumeli soko ya pɔ́sɔ moko to pɔ́sɔ mibale.” Soki olóngi mokano wana mpe opesameli nzela ya kokɔta na ekipi, bangonga mingi ya antrɛnɛmá mpe ya kobongisama ezali kozila yo. Na ndakisa, mosangani ya ekipi moko ya bilenge basi basani ya basketball alekisaka bangonga koleka misato na mokolo na ntina na kobongisama mpo na lisano na ye. Ntango yango ekokaki kolekisama na kosaláká likambo mosusu oyo lileki motuya.
Ya solo, bilenge mingi bamitungisaka te na mosala oyo elɛmbisaka makasi. Balingaka bosepeli mpe momekano ya kokólisa ntɔ́ki na bango ya masano. Kasi ezali na bantina mosusu oyo mpo na yango motángo monene ya bilenge balongwaka na bikipi ya masano. Osengeli koyeba bantina yango mpo na kozwa ekateli soko okokɔta na ekipi ya masano to okokɔta te. Lokola Masese 13:16 elobi yango: “Moto na moto na mayele akosalaka na boyebi.” Lisoló moko ya mbala ya nsima na ebimeli ya Lifalansé ekolobela yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Koyebana ya basani ebendaka bilenge mingi ete bakɔta na bikipi ya masano
[Elilingi na lokasa 14]
‘Basani minene ya Eteyelo monene oyo bazwaka búrsɛ balongaka te na kozwa mapɔlɔ́mi’