BOMOI YA BAKRISTO
Ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe ngalasisi ya nzoto
Ngalasisi ya nzoto ezalaka na litomba? Ɛɛ, kasi makambo oyo tosalaka mpo na kokómisa boyokani na biso na Yehova makasi eleki yango na litomba. (1Ti 4:8) Yango wana, bakristo basengeli kotalela masano na ndenge oyo ebongi.
TALÁ VIDEO MOTO AZALI KOYEMA OYO OSENGELI KOYEBA MPO NA MASANO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
1. Makoki nini masano ekoki kopesa biso?
2. Wapi makambo misato oyo ekoki kosalisa biso tóyeba soki lisano boye to boye ezali malamu to mabe?
3. Ndenge nini Nzembo 11:5 ekoki kosalisa biso tópona masano nini tokotala to tokosala?
4. Ndenge nini tokoki kosalela Bafilipi 2:3 mpe Masese 16:18 na ndenge oyo tozali kobɛta masano?
5. Ndenge nini Bafilipi 1:10 esalisaka biso tóboya kolekisa ntango mingi na kotala mpe kobɛta masano?