Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 53
  • Makambo nini nasengeli koyeba mpo na masano?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo nini nasengeli koyeba mpo na masano?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Matomba nini okozwa?
  • Makama nini ememaka?
  • Ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe ngalasisi ya nzoto
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Kokɔta na bikipi ya masano ezali malamu mpo na ngai?
    Lamuká!—1996
  • Nasengeli koyeba nini mpo na masano ya video?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Nasengeli kobɛta masano ya video?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 53
Bilenge bazali kobɛta volleyball

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Makambo nini nasengeli koyeba mpo na masano?

Masano ekoki komemela yo matomba to ekoki komemela yo makama. Yango etali lisano osalaka, ndenge osalaka yango mpe ngonga oyo olekisaka na lisano yango.

  • Matomba nini okozwa?

  • Makama nini ememaka?

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Matomba nini okozwa?

Kosala masano ekoki kosala ete moto azala nzoto malamu. Biblia emonisi ete “ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.” (1 Timote 4:8) Elenge mobali moko ya mbula 27 na nkombo Ryan, alobi: “Kokende kosala masano ezali ndenge ya malamu ya kosalisa nzoto mosala. Ezali malamu koleka kofanda na ndako mpo na kobɛta masano ya video.”

Kosala masano ekoki kosalisa moto asala na bomoko na baninga mpe akóma na ezaleli ya komipekisa. Biblia esaleli ndakisa ya lisano mpo na koteya likambo moko ya ntina. Elobi: “Bapoti-mbangu na momekano ya mbangu bapotaka mbangu bango nyonso, kasi kaka moko nde azwaka libonza.” Mpe ebakisi: “Moto nyonso oyo azali kosangana na momekano amipekisaka na makambo nyonso.” (1 Bakorinti 9:24, 25) Elingi mpenza koloba nini? Esɛngaka kozala na komipekisa mpe koyokana na baninga mpo na kotosa mibeko ya lisano. Abigail, elenge moko ya mbula 17, andimi likambo yango; alobi: “Kosala masano esalisi ngai nayokanaka mpe nasololaka na basusu.”

Kosala masano ekoki kosala ete moto azwa baninga. Lisano esangisaka bato. Jordan, elenge mobali moko ya mbula 21, alobi: “Masano mingi etindaka bato báwelana, kasi soki otaleli yango kaka lokola lisano, ekosalisa yo ozwa baninga.”

Makama nini ememaka?

Lisano nini osalaka? Biblia elobi: “Yehova ye moko atalatalaka moyengebene ná moto mabe, mpe molimo na Ye eyinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.”​—Nzembo 11:5.

Masano mosusu ezalaka mobulu. Na ndakisa, Lauren, elenge mwasi moko ya mbula 21, alobi: “Lisano ya makofi esɛngaka kobɛta moto oyo bozali kobunda na ye. Lokola tozali Bakristo, toboyaka kobunda, bongo mpo na nini tokosepela kotala ndenge bato mosusu bazali kobunda?”

Kanisá naino: Kosala to kotala masano ya mobulu etindaka yo oluka komilongisa mpe okanisa ete ekotinda yo te na kosala makambo ya mobulu? Soki ezali bongo, kobosana te ete Nzembo 11:5 elobi ete Yehova ayinaka kaka te bato oyo ‘balingaka mobulu,” kasi mpe baoyo basalaka yango.

Ndenge oyo osalaka lisano. Biblia elobi: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.”​—Bafilipi 2:3.

Toboyi te, mosala nyonso oyo esangisaka baekipi ekeseni, mwa kowelana ezangaka te. Kasi, kozala na likanisi kaka ya kolonga elongolaka masɛki na lisano. Brian, elenge moko ya mbula 18, alobi: “Elimo ya kowelana ekokɔtela yo noki. Kasi soki oyebi lisano moko malamu mpenza, ekosɛnga osala makasi mpo omonisa ezaleli ya komikitisa.”

Kanisá naino: Chris, elenge moko ya mbula 22, alobi: “Pɔsɔ nyonso tobɛtaka bale mpe bato bazokaka.” Na yango, omituna: ‘Nini ekoki kosala ete bato bázoka? Nakoki kosala nini mpo bato bázoka te?’

Ngonga olekisaka na lisano. Biblia elobi: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

Osengeli koyeba makambo nini kotya na esika ya liboso; makambo ya elimo esengeli kozala na esika ya liboso. Masano mingi elyaka ngonga, ata soki ozali kosala yango to kaka kotala yango. Daria, elenge mwasi moko ya mbula 22, alobi: “Nazalaki koyokana te na mama mpo na ngonga oyo nazalaki kolekisa na kotala masano na TV, mpo nakokaki kosalela ngonga yango na ndenge ya malamu.”

Moto moko atye mungwa ebele na saani ya biloko

Kotyela masano likebi mingi ezali lokola kotya mungwa mingi na bilei

Kanisá naino: Oyokaka toli ya baboti na oyo etali makambo oyo otyaka na esika ya liboso? Trina, elenge mwasi moko ya mbula 19, alobi: “Ntango ngai ná bandeko na ngai tozalaki na momeseno ya kotala masano mpe koboya kokipe misala ya ntina, mama azalaki koyebisa biso ete ata soki totali basaani yango to te, bakofuta bango. Mpe azalaki kotuna biso boye: ‘Kasi nani akofuta bino?’ Alingi koloba ete: Basaani yango bazali na mosala. Kasi soki biso tosali badevuare na biso te mpe misala mosusu, tokokoka te kokokisa bamposa na biso ntango tokokola. Mama ateyaki biso ete kotala to kosala masano esengeli te kozala eloko oyo eleki ntina na bomoi na biso.”

MAKAMBO BILENGE MOSUSU BALOBI

Abigail

“Kosala masano esalisaka moto ngalasisi, epesaka ye esengo mpe esalaka ete amiyoka malamu. Esalisaka moto ayekola ndenge ya kolonga na komikitisa mpe abatela lokumu na ye soki alongi te.”​—Abigail.

Deven

“Nalingaka masano, kasi ezali na ntina mingi te koleka makambo mosusu oyo nasengeli kosala. Mpo na ngai, kotala lisano ezali mbano mpo na mikumba na ngai oyo nakokisi. Yango elendisaka ngai mpe esalisaka ngai nayeba makambo ya kotya na esika ya liboso.”​—Deven.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto