Sida ekosila? Soki ekosila, ndenge nini?
BANDA mwa kala, na bikólo mingi ya Afrika, bato bandimaka mpenza te ete sida ezali. Bato mosusu kutu balingaka ata kolobela likambo ya sida te. Kasi, na bambula oyo euti koleka, milende esalemaki mpo na koteya, mingi mpenza bilenge, mpe kolendisa bato bálobelaka likambo ya sida polelepolele. Kasi, milende yango ebimisaki mpenza matomba ya malonga te. Bato bakangamá makasi na lolenge na bango ya bomoi mpe na mimeseno na bango; ezali pɛtɛɛ te mpo na kobongola makanisi na bango.
Minganga bayebi sikoyo makambo mingi
Mayele ya monganga esalisi bato ya siansi báyekola makambo mingi etali mikrobe ya sida, bábimisa mpe bankisi oyo esali ete bato mingi oyo bazali na mikrobe yango bákufa noki te. Ntango basangisaki bankisi ya sida soki misato esika moko, bamonaki ete yango esalaki nkisi moko ya makasi mpenza mpe ntango bamekaki yango, ebimisaki matomba ya malamu.
Atako esilisaka sida te, bankisi yango esali ete bato mingi oyo bazali na maladi yango bákufa noki te, mingi mpenza na mikili ya bozwi. Bato mingi bazali kotya mbamba mpo bankisi yango epesama mpe na mikili ya bobola. Kasi, bankisi yango ezali na ntalo makasi, mpe eleki makoki ya bato mingi ya mikili yango mosika mpenza.
Likambo yango ebimisi motuna oyo: Mbongo ezali nde na ntina mingi koleka bomoi ya moto? Monganga Paulo Teixeira, mokambi ya programɛ ya kobundisa sida na ekólo Brésil, amonaki bonene ya likambo yango mpe alobaki boye: “Tosengeli te kotika bankóto ya bato ndenge wana kozanga kopesa bango bankisi ya komisalisa, kaka mpo tozali koluka kozwa matomba mingi koleka ndelo.” Abakisaki ete: “Nazali kosepela ata moke te ete makambo oyo etali mombongo ekóma na valɛrɛ mingi koleka mitinda ya bizaleli malamu mpe koleka bato.”
Bikólo mosusu endimaki kobuka mibeko etali lotomo oyo bakompanyi minene oyo esalaka bankisi ezalaka na yango ya kosala bankisi to ya kosomba yango na ntalo moke. Bikólo yango emekolaki to esombaki na mboka mosusu, na ntalo ya moke, bankisi ya sida oyo ebengami médicaments génériques.a Zulunalo moko (South African Medical Journal) emonisi ete ntango bayekolaki likambo yango, bamonaki ete ntalo ya bankisi yango [oyo bamekolaki] ezalaki na nse mpenza (82 %) soki tokokanisi yango na ntalo mpenzampenza ya bankisi wana ndenge ezali kotɛkama na Amerika.”
Mikakatano mpo na kozwa nkisi
Nsima ya mwa ntango, bakompanyi ya minene oyo esalaka bankisi ebandaki kotinda bankisi ya sida na ntalo ya moke na mikili ya bobola oyo esengeli na yango. Na ndenge wana, bakanisaki ete bato mingi bakozala na likoki ya kozwa bankisi yango. Nzokande, ezali na mikakatano mosusu ya minene oyo ezali kosala ete bato oyo bazali na mikili yango ya bobola bázwa mpenza te bankisi yango. Mokakatano ya liboso: ntalo. Atako bakitisi mpenza ntalo ya bankisi yango, ezali komonana kaka ntalo makasi na miso ya bato ebele oyo basengeli na yango.
Mokakatano mosusu yango oyo: komɛla nkisi yango esɛngaka makambo mingi. Esengeli komɛla yango mikolo nyonso mpe kaka na bangonga oyo batyá. Soki olandi malako yango malamu te to soki okati nkisi, mitindo ya sika ya mikrobe ya sida ekoki kobima mpe nkisi ekosala yango eloko te. Na ndenge bato bazalaka na Afrika, ezali mpasi mpo moto alanda makambo wana nyonso, mpamba te bilei ya malamu ezali mingi te, mai ya komɛla ezali pɛto te mpe balopitalo ezali mingi te.
Lisusu, esɛngaka kolandela baoyo bazali komɛla nkisi yango. Soki nkisi esali eloko te, esɛngaka kotika yango mpe kobanda komɛla mosusu. Nyonso wana ezali kosɛnga ete minganga oyo bayebi mosala yango malamu bázala. Lisusu baekzame mpe ezali ntalo makasi. Longola yango, bankisi yango ezalaka na mitungisi mosusu ya mikemike mpe mitindo mosusu ya mikrobe ya sida ezali kobima, oyo nkisi ezali kokoka kosala yango eloko te.
Na sanza ya Yuni 2001, na likita moko ya ntina mingi oyo ONU esalaki mpo na kolobela likambo ya sida, babimisaki likanisi ya kotya mbongo mpo na kosalisa mikili ya bobola. Balobaki ete lisalisi yango ekoki kosɛnga dolare kobanda miliare 7 tii 10. Kasi, mbongo oyo batye ekómi ata pene te ya motuya oyo bakanaki.
Bato ya siansi bazali kaka na elikya makasi ete bakozwa nkisi ya mangwele ya sida, mpe basili komeka mwa bankisi mosusu ya mangwele na mikili mosusu. Ata soki milende yango elongi, ekosɛnga bambula ebele liboso ete nkisi yango ya mangwele ezwama, bámeka yango, mpe emonisa ete ezali makasi.
Bikólo mosusu, na ndakisa Brésil, Thaïlande mpe Ouganda, bazwi mwa matomba na programɛ na bango ya kosalisa bato ya sida. Na Brésil, lokola bazali kosala bankisi ya sida na mboka na bango, bato oyo bazali kokufa na sida bazali lisusu mingi te. Botswana, ekólo moke oyo ezali na mwa makoki na yango, ezali kosala milende mpo na kopesa bankisi ya sida na bato nyonso ya ekólo na bango oyo basengeli na yango, mpe bazali kobundana mpo na kotonga balopitalo ya malamu na ekólo na bango.
Ndenge sida ekosila
Sida ekeseni na bamaladi mosusu oyo epalanganaka na likambo moko: okoki komibatela mpo ozwa sida te. Soki bato bandimi kotosa mitinda ya Biblia, mingi na bango, mpo na koloba te ete bango nyonso, bakoki komibatela mpo bázwa sida te.
Mitinda oyo ezali na Biblia mpo na bizaleli malamu ezali polele. Baoyo bazali minzemba basengeli kosangisa nzoto te. (1 Bakolinti 6:18) Baoyo babalá basengeli kozala sembo epai ya babalani na bango, mpe kosala ekobo te. (Baebele 13:4) Kotosa mobeko oyo Biblia epesi ya koboya makila ekoki mpe kobatela moto azwa sida te.—Misala 15:29, 30.
Baoyo basili kozwa sida bakoki kosepela mpe kobɔndisama mingi soki bayekoli makambo etali mokili ya sika epai maladi ekozala lisusu te, mokili oyo Nzambe alaki ete etikali moke etyama mpe soki batosi makambo oyo Nzambe azali kosɛnga.
Biblia endimisi biso ete, na ntango oyo esilá kobongisama, bampasi nyonso ya bato ezala mpe maladi ekosila. Elaka wana epesami na mokanda ya Emoniseli: “Nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato, mpe akofanda elongo na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala elongo na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.’ ”—Emoniseli 21:3, 4.
Elikya wana epesami kaka te epai ya baoyo bazali na makoki ya kosomba bankisi ya ntalo makasi. Esakweli oyo ezali na Yisaya 33:24 emonisi ete elaka wana ya Emoniseli mokapo 21 ekokokisama solo. Esakweli yango elobi ete: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” Na nsima, bato nyonso oyo bakofanda awa na mabelé bakotosa mibeko ya Nzambe mpe bakozala nzoto kolɔngɔnɔ. Na lolenge wana, maladi ya sida oyo ezali kosilisa bato lelo—ezala mpe bamaladi nyonso mosusu—ekosila mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Médicaments génériques ezali bankisi oyo basalaka na komekoláká bankisi ya bakompanyi oyo ezwá ntomo ya kosala yango. Bikólo oyo ezali na kati ya ebongiseli babengi Organisation mondiale du commerce ekoki kosala bankisi ya ndenge wana, soki basengeli na yango nokinoki, kozanga kolanda mibeko etali kosala bankisi.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
YANGO NDE NKISI YA SOLOSOLO OYO NAZALAKI KOLUKA
Nafandaka na ekólo moko na sudi ya Afrika, mpe nazali na mbula 23. Nazali kokanisa lisusu mokolo oyo bayebisaki ngai ete nazali na mikrobe ya sida (séropositive).
Ngai ná mama tozalaki na kati ya biro ya monganga, ntango monganga yango ayebisaki ngai nsango yango. Ezalaki nsango oyo eleki mabe na bansango nyonso nayoká na bomoi na ngai. Nazalaki lisusu ngai te. Nazalaki kondima yango te. Nazalaki kokanisa ete ntango mosusu bato ya laboratware wana bamikosi. Nazalaki koyeba te eloko ya koloba to ya kosala. Nazalaki koyoka mposa ya kolela, kasi mai ya miso ezalaki koya te. Monganga wana abandaki kosolola na mama mpo na bankisi ya sida mpe makambo mosusu, kasi likambo yango ezalaki kosala ngai mpasi mingi na motema; nakokaki kutu te kokanga makambo oyo bazalaki koloba.
Nayaki koyeba ete ekoki kozala nazwaki maladi yango na mwana mobali moko na iniversite epai nazalaki kotánga. Nazalaki koluka moto oyo akokaki komitya na esika na ngai soki nayebisi ye mpasi oyo nazalaki na yango na motema, kasi nazwaki moto te. Nakómaki komiyoka ete nazangi ntina mpe esili mpo na ngai. Atako bandeko na ngai basalisaki ngai, nazalaki lisusu na elikya te mpe nazalaki na kimya te. Ndenge kaka bilenge nyonso bakanaka, nazalaki kokana kosala makambo mingi. Etikalaki kaka mbula mibale mpo nazwa diplome na ngai ya inivɛrsite na makambo ya siansi, kasi elikya nyonso ekweaki na mai.
Nabandaki komɛla bankisi ya sida oyo bakomelaki ngai mpe kokende kolanda mateya epai ya bato oyo bapesaka toli na makambo ya sida, kasi nazalaki kaka kotungisama na makanisi. Nasambelaki Nzambe alakisa ngai lingomba ya boklisto ya solo liboso ete nakufa. Nazalaki kosambela na lingomba moko ya Bapantekotiste, kasi ata moto moko te ya lingomba yango ayaki kotala ngai. Nazalaki koluka nayeba solo na likambo etali esika oyo nakokende ntango nakokufa.
Mokolo moko na ntɔngɔ, na ebandeli ya sanza ya Augusto 1999, Batatoli ya Yehova mibale babɛtaki na ndako na ngai. Nazalaki kobɛla makasi mokolo wana, kasi nazwaki mwa makasi ya kofanda na bango na ndako. Basi yango mibale bayebisaki ngai bankombo na bango mpe balobaki ete bazali kosalisa bato na koyekola Biblia. Namonaki mpenza ete nazwi libɔndisi mpe nsukansuka Nzambe ayoki losambo na ngai. Kasi, na ntango wana, nzoto elɛmbaki makasi mpe nakokaki te kotánga to kotya likebi mpo na ntango molai.
Atako bongo, nayebisaki bango ete nalingi koyekola Biblia mpe toyokanaki mpo bázongela ngai. Nzokande, liboso ete bázongela ngai, nakɔtaki lopitalo mpo na maladi ya motó, mpo nazalaki kotungisama na makanisi. Pɔsɔ misato na nsima, nabimaki na lopitalo yango mpe nasepelaki mingi komona ete Batatoli wana babosanaki ngai te. Nazali koyeba lisusu ndenge moko na bango azalaki kobenga ngai na telefone mbala na mbala mpo na kotuna soki nazali ndenge nini. Nayokaki mwa malamu, mpe nabandaki koyekola Biblia pene na nsuka ya mbula wana. Atako bongo, ezalaki kaka pɛtɛɛ te mpo nazalaki, lelo mwa malamu, lobi na mbeto. Kasi mwasi oyo azalaki koyekola na ngai azalaki komitya na esika na ngai mpe azalaki na motema molai.
Nakamwaki mingi na makambo oyo nayekolaki na Biblia mpo na Yehova mpe bizaleli na ye mpe oyo elimboli mpenzampenza koyeba ye mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko. Ezalaki mpe mbala na ngai ya liboso ya koyeba ntina ya mpasi ya bato. Makambo oyo nayekolaki mpo na Bokonzi ya Nzambe, oyo etikali moke ezwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya bato, epesaki ngai esengo mingi. Etindaki ngai nabongola bomoi na ngai na makambo nyonso.
Yango nde nkisi ya solosolo oyo nazalaki koluka. Nabɔndisamaki mpenza ntango nayebaki ete Yehova azali kaka kolinga ngai mpe kotyela ngai likebi! Kala, nazalaki kokanisa ete Nzambe ayinaka ngai mpe ezali mpo na yango nde nazwaki maladi oyo. Kasi, nayekolaki ete, na bolingo na ye, Yehova azwaki bibongiseli mpo na kolimbisa masumu na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. Na nsima, nayebaki ete Yehova atyelaka biso likebi ndenge 1 Petelo 5:7 elobi: ‘Bóbwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.’
Lokola nayekolaka Biblia mikolo nyonso mpe nakendaka makita na Ndako ya Bokonzi, nazali kosala milende ya solosolo mpo nazala ntango nyonso pene na Yehova. Atako ezali ntango nyonso pɛtɛɛ te, nabwakaka mitungisi na ngai nyonso likoló na Yehova na nzela ya libondeli mpe nasɛngaka ye apesaka ngai makasi mpe abɔndisaka ngai. Bandeko ya lisangá bazali wana mpo na kosalisa ngai, yango wana nazali na esengo.
Nabimaka mbala na mbala na mosala ya kopalanganisa nsango malamu elongo na bandeko ya lisangá na biso. Nalingi kosalisa bato mosusu na elimo, mingi mpenza baoyo bazali na maladi lokola oyo ya ngai. Nazwaki batisimo na sanza ya Desɛmbɛ 2001.
[Elilingi]
Nasepelaki mingi ntango nayebaki makambo etali Bokonzi ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 8]
Ekipi ya bapesi-toli mpo na sida na Botswana
[Elilingi na lokasa 10]
Na Paladiso awa na mabelé, bato nyonso bakozala nzoto kolɔngɔnɔ